2010–2019
Kokoma Mobateli Mpate
Sanza ya Zomi 2018


Kokoma Mobateli Mpate

Nalikii ete baye ozali kosalisa bakomona yo lokola moninga mpe bakoyeba mpenza ete, na yo, bazali na elombe moko, mpe mobombeli makambo.

Mobu eleki, mwana moko ya Eteyelo ya Bana nakutanaki na ye na Chili amemelaki mwa koseka na elongi na ngai. “Mbote,” alobaki, “nazali David. Okoki koloba oyo etali ngai na likita linene?”

Na bangonga ya kimia, namaniolaki mbote ya David oyo nazelaki te. Biso banso tolingi koyebana. Tolingi tozala na ntina, tokundolama, mpe toyoka tolingami.

Bandeko basi mpe bandeko mibali, moko na moko na bino azali na ntina. Atako balobeli bino te na likita monene, Mobikisi ayebi bino mpe alingaka bino. Soki omituni soki ezali ya solo, osengeli kaka kokanisa ete Ye akomaki [yo] likolo ya kati ya loboko na [Ye] .”1

Koyebaka ete Mobikisi alingaka biso, tokoki nde komituna, boniboni ekoki biso malamu mingi kolakisa bolingo na biso mpo na Ye.

Mobikisi atunaki Petelo, “Olingaka ngai … ?”

Petelo ayanolaki, “Iyo, Nkolo; Oyebi ete nalingaka yo. Ye alobaki na ye, Leisa bampate na ngai.”

Ntango atunaki motuna oyo mibale ya mibale mpe ya misato, “Olingaka ngai?” Petelo, kotungisamaki kasi andimisaki bolingo na ye: “Nkolo, yo ayebi makambo nyonso, oyebi ete nalingaka yo. Yesu alobaki na ye, Leisa bampate na ngai.2

Petelo asilaki komilakisa molandi ya bolingo ya Klisto? Uta bokutani na bango ya liboso na libongo ya mbu, ye “na mbala moko” atikaki moniama ya bambisi mpo na kolanda Mobikisi.3 Petelo akomaki molobi ya solo ya bato. Azalaka, kokende elongo na Mobikisi na ntango ya mosala na Ye mpe kosungaka koteya basusu nsango malamu ya Yesu Klisto.

Kasi sikoyo Nkolo mosekwi ayebaki Ye alingaki kozala lisusu penepene na Petelo te, kolakisaka ye boniboni mpe ntango nini asengelaki kosala. Na kozanga Mobikisi, Petelo asengelaki koluka bokambami ya Molimo, kozwa bobimisi na ye moko, mpe nsima kozala na mpiko mpe bondimi mpo na kosala. Na kokangamaka na bampate na Ye, Mobikisi azalaki na mposa ya Petelo asala oyo Ye alingaki kosala soki Ye azalaki kuna. Ye asengaki Petelo akoma mobateli mpate.

Sanza ya minei eleki, Mokambi Russell M. Nelson atandaki libengisi ekokana na biso mpo na koleisa bampate na Tata na lolenge moko mpe kosala yango na nzela ya lisalisi.4

Mpo na kondima libengisi na ye, tosengeli kokolisa motema ya mobateli mpate mpe kososola mposa ya bampate ya Nkolo. Yango wana boniboni tokomaka babateli ya bampate Nkolo azali na mposa biso tokoma?

Lokola na mituna nyonso, tokoki kotala na Mobikisi, Yesu Klisto—Mobateli mpate malamu. Mobikisi bayebanaki mpe batangamaki, bakengelamaki, mpe basangisamaki na etonga ya Nzambe.

Bayebanaki mpe batangamaki

Wana ekolanda biso ndakisa ya Mobikisi, tosengeli liboso koyeba mpe kotanga bampate na Ye. Topesameli bato mpe mabota songolo mpo na kobatela boye toyebi mpenza ete etonga ya Nkolo eyebani motango mpe moko te abosanami. Koyeba motango, nzokande, etali mpenza mitango te; etali kosala keba ete moto nyonso ayoka bolingo ya Mobikisi na nzela ya moto moko oyo azali kosala mpo na Ye. Na lolenge wana, banso tokoki koyeba mpenza ete bayebani na Tata ya bolingo na Lola.

Elilingi
Mobikisi elongo na mpate

Kala te, nakutanaki na elenge moko ya mwasi oyo batindaki mpo na kosalisa ndeko moko ya mwasi penepene na miibu mbala mitano ya ye. Elongo, bamonaki bazalaki na bolingo moko mpo na miziki. Soki elenge mwasi oyo akei kotala, bayembaka elongo nzembo, mpe bakabolaka oyo ya bango balingaka. Bazali kotonga kimoninga oyo epamboli bomoi ya bango mibale.

Nalikii ete baye ozali kosalisa bakomona yo lokola moninga mpe bakoyeba mpenza ete, na yo, bazali na elombe moko mobateli moko mpe mobombeli makambo moko—moto moko oyo azali kolengela makambo na bango mpe kosunga bango na bilikia mpe bamposa na bango.

Kala te nazwaki etinda ya kosalisa ndeko mwasi moko moninga na ngai mpe ngai moko toyebaki malamu te. Ntango topesanaki toli na Jess, moninga na ngai ya lisalisi ya mibu 16, na mayele apesaki likanisi, “Tosengeli koluka koyeba ye.”

Elilingi
Ndeko mwasi Cordon mpe moninga na ye ya bosalisi

Tokanaki mbala moko ete foto moko ya biso moko mpe nkoma moko ya kobanda ebongisama. Nasimba telefone, mpe Jess afinaki bouton mpo na kokanga foto. Libaku na biso ya liboso ya lisalisi ezalaki makasi ya kimoninga.

Na botali na biso ya liboso, totunaki na ndeko na biso ya mwasi soki ezalaki na likambo moko tokokaki kokotisa na nsambo na biso mpo na ye. Akabolaki mokakatano na ye moko ya boboto mpe alobaki alingaki bongo kondima nsambo na biso. Bosembo mpe bondimi na ye ememaki mokangano moko ya mbala moko. Libaku nini malamu ya kokanisa ye na nsambo na ngai ya mikolo na mikolo.

Ntango bosambeli, bokoyoka bolingo ya Yesu mpo na oyo bzali kosalisa. Kokabola bolingo wana elongo na bango. Nzela malamu kani ezali wana mpo na koleisa bampate na Ye koleka kosunga bango bayoka bolingo na Ye—Na nzela na yo?

Kokengela

Lolenge ya mibale mpo na kotombola motema ya mobateli ezali ya kokengela mpate na Ye. Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu listo ya Basantu ya mikolo mya Nsuka, tokoki kotombwama, kobongisa, kolengela, mpe kotonga lisusu na ntina ya eloko nyonso. Tozali mbongo mpo na kokokisa mposa na loboko ya kosunga to sani moko ya bagato. Kasi ezali na likambo mosusu?

Bampate na biso bayebi ete tozali kokengela bango na bolingo mpe tokosala mpo na kosunga?

Na Matai 25 totangi:

“Boya, bino bopambolami na Tata na ngai, kokitana bokonzi elengelami mpo na bino … :

“Mpo nayokaki nzala mpe bopesi ngai bilei: nazalaki na mposa ya mai mpe bomelisaki ngai: nazalaki mopaya, mpe boyambaki ngai:

“Bongo bayengebene bakozongisa liloba ete, Nkolo, ntango nini tomonaki yo na nzala, mpe toleisaki yo? To na mposa ya mai mpe tomelisaki yo?

“Ntango nini tomonaki yo mopaya, mpe toyambaki yo?5

Bandeko mibali mpe basi, liloba ya fungola emonanaki. Basembo bamonaki baoyo na mposa mpamba te bakengelaki mpe bamonaki bango. Biso lokola tokoki kozala na liso ya kokengela mpo na kosunga mpe kolendisa, mpo na kosepelisa mpe kutu kolota. Ntango tosali, biso tokoki koyeba mpenza elaka na Matai: “Mbala nionso bosali yango na oyo aleki moke na kati ya bato oyo … , bosali yango na ngai.”6

Elilingi
Mobikisi alengelaka mpate

Moninga moko—tokobenga ye John—akabolaki oyo ekokaki kokoma ntango totali mposa eleki moke ya basusu: “Ndeko mwasi moko na palwasi na ngai amekaki komiboma. Nsima ya basanza mibale, namonaki moto te na lisanga likoki na ngai abelemaki epai na mobali na ye mpo na kolobela likambo wana ya nsomo. Mawa mingi, ngai mpe nasalaki eloko te. Na nsuka, nabengaki mobali wana na kolia na midi. Azalaki moto moko ya nsoninsoni, mbala mingi ya kobomba makambo. Mpe kasi ntango na lobaki, ‘Mwasi na yo amekaki komiboma. Yango esengeli kolekela yo. Olingi kolobela yango?’ ya alelaki mpenza. Tosalaki lisolo moko ya boboto mpe ya kati mpe tokolisaki komoninga ya penepene mpe boyokani na miniti.”

John abakisaki, “Nakanisi momesano na biso ezali biloko ya elengi esika ya kokanisa boniboni kotambola na ngonga wana na bosembo mpe bolingo.”7

Bampate bakoki kozala na mpasi, ya kobunga, to ya kopengwa na bolingi na bango; lokola mobateli ya bampate, tokoki kozala na kati ya baliboso mpo na komona mposa na bango. Tokoki koyokemela mpe koloba na kosambisa te mpe kopesa elikia mpe lisungi na bokambi ya bososoli ya Molimo Mosantu.

Bandeko basi mpe mibali, mokili ezali mingi ya kotonda elikia mpe esengo na ntina ya misala efulama ya boboto bozali kosala. Soki boluki bokambi ya Nkolo na boniboni komema bolingo na Ye mpe komona bamposa ya bango oyo bokosalisa, miso na yo ekofungwana. Etinda na bino ya kosalisa ya bule ekopesa bino likoki ya bonzambe mpo na bofuli. Bokoki koluka bofuli wana na bondimi.

Basangani na Etonga ya Nzambe

Ya misato, tolingi bampate na biso basangana na kati ya etonga ya Nzambe. Kosala bongo, tosengeli tosengeli koyeba esika bazali na nzela ya liyokani mpe kozala na bolingi ya kotambola elongo na bango na mobembo na bango ya bondimi. Ya biso ezali litomba ya bule mpo na koya koyeba mitema na bango mpe kolakisa yango epai na Mobikisi na bango.

Elilingi
Mpate kolandaka Mobateli Malamu

Ndeko mwasi Josivini na Fiji azalaki na kpokoso komona nzela na ye epai na nzela ya liyokani—mpenza. Moninga na ye amonaki ete Josivini azalaki kobunda mpo na komona makomi malamu ya kokoka mpo na kotanga. Apesaki Josivini lineti ya sika ya kotangela mpe crayon ya jone makasi mpo na kopelisa botangi nyonso ya Yesu Klisto na Buku ya Mormon. Tobandaki lokola mposa moko ya pete mpo na kosalisa mpe kosunga na koyekola makomi esukaki na Josivini kokende na tempelo mpo na mbala ya liboso 28 nsima ya kobatisama.

Elilingi
Ndeko mwasi Josivini
Elilingi
Ndeko mwasi Josivini na tempelo

Bampate na biso bazali makasi to na botau, na kosepela to na kobangabanga, tokoki kosala mpenza ete moko te atambola ye moko kaka. Tokoki kolinga bango epai nyonso bazali na molimo mpe kopesa lisungi mpe bolendisi mpo na litambe ekolanda. Soki tosambeli mpe toluki kososola mitema na bango, natatoli ete Tata ya Lola akokamba biso mpe Molimo na Ye ekokende elongo na biso. Tozali na libaku ya kozala “banzelu nzingazinga” na bango lokola akei liboso na bango.8

Elilingi
Mobateli Mpate Malamu elongo na mpate na Ye

Nkolo abiangisi biso toleisa mpate, mpo na kokolisa etonga na ye lokola alingi. Abiangisi biso tozala babateli mpate malamu na bikolo nyonso, na bamboka nyonso. (Mpe iyo, Mpaka Uchtdorf, tolingaka mpe tozali na bolingo mpo na babateli mpate ya Allemagne.) Mpe alingi bilenge na Ye basangana na likambo yango.

Bilenge na biso bakoki kozala boko ya babateli mpate baleki makasi mingi. Bazali, lokola Mokambi Russell M. Nelson alobaki, “baleki malamu kati ya oyo Nkolo kutu atindaki na mokili oyo.” Bazali “milimo ya lokumu,” “basambeli na biso baleki malamu” oyo bazali kolanda Mobikisi.9 Bokoki kobanza nguya babateli ya boye bakomema ntango bazali kolengela bampate? Na kosalisaka mpembeni ya bilenge oyo, tokomona makamwisi.

Bilenge basi mpe bilenge mibali, tosengeli na bino! Soki bozangi etinda ya lisalisi, boloba na mokambi ya Lingomba ya bamama basungi to ya lisanga likoki na bino . Bakosepela na bolingi na bino mpo na kosala ete bampaqte na Ye bayebana mpe batangama, bakengelama, mpe basangisama na kati ya etonga ya Nzambe.

Ntango mokolo ekoya ete tokofukama na makolo ya Mobikisi na biso ya bolingo, nsima ya koleisa etonga na ye, nasambeli et tokoka koyanola lokola Petelo asalaki: “Iyo, Nkolo; oyebi ete nalingaka yo.”10 Baye, Bampate na yo, balingami, bazali na likama te, bazali na ndako. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.