2010–2019
Mosala ya Buku ya Mormon kati na Bongwana.
Sanza ya Zomi 2018


Mosala ya Buku ya Mormon kati na Bongwana.

Tosali kosangisa Yisalaele mpo na ngonga ya nsuka mpe tozali kosala yango na Buku ya Mormon, moko ya bisaleli ya kafukafu koleka nyonso ya mbongwana.

Bato mingi lelo bazali komituna na oyo etali solo ya Nzambe mpe bozalani na biso na Ye. Mingi bayebi moke to eloko te mpenza na oyo etali mwango mwa Ye monene ya esengo. Mingi koleka mibu 30 eleki, Mokambi Ezra Taft Benson alobaki ete “mingi ya … mokili lelo ezali kobwakisa bonzambe ya Mobikisir. Bazali kotia ntembe na mbotama na ye ya kokamwa, bomoi na Ye ebonga nie, mpe solo ya bosekwi na Ye ya nkembo.”1

Na ntango na biso, mituna etali te bobele Mobikisi na biso kasi lisusu Eklezia na Ye—Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka—oyo Azongisaki na nzela ya Profeta Joseph Smith. Mituna oyo mbala mingi etali lisolo, mateya, to misala ya Eklezia ya Mobikisi.

Buku Ya Mormon Esalisaka Biso Tokola na Litatoli

Uta na Koteya Nsango malamu na Ngai, totangi: “Bomikundola ete bososoli na biso [ya Tata na Lola mpe mwango mwa Ye ya esengo] euti na baprofeta ya ntango ya lelo—Joseph Smith mpe bakitani na ye—oyo bazwaka bobimisi euti mbala moko na Nzambe. Yango wana, motuna ya yambo moko asengeli koyanola ezali soki Joseph Smith azalaki profeta, mpe ye mobali to mwasi akoki koyanola motuna oyo na kotangaka mpe kosambelaka na oyo etali Buku ya Mormon .”2

Litatoli na ngai ya libiangi ya bonzambe ya Profeta Joseph Smith elendisami na koyekolaka na losambo Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto. Nasaleli libengisi ya Moroni ya “kotuna Nzambe, Tata wa Seko, na nkombo ya Klisto,” mpo na koyeba bosolo ya Buku ya Mormon.3 Napesi litatoli ete nayebi yango ezali solo. Boye bi wana eyeli ngai, lokola ekoki koya epai na yo, “na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.”4

Boyingisi ya Buku ya Mormon elobi: “Bango baye bakolonga litatoli liye lya bonzambe [ya Buku ya Mormon] uta na Molimo Mosantu bakoya lokola koyeba na nguya ena kaka ete Yesu Klisto azali Mobikisi wa mokili, ete Joseph Smith azali mobimisi mpe profeta wa ye o mikolo miye mya nsuka, mpe ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali bokonzi bwa Nkolo bosalemi mbala yoko lisusu o mabele, lokola bolengeli mpo ya boyei bwa ibale bwa Masiya.”5

Ntango nazalaki misionele moko ya elenge kokendaka na Chilie, nayekolaki liteya moko ya kobongwanisa bomoi etali nguya ya bongwana ya Buku ya Mormon. Mr. Gonzalez asungaki na esika ya botosi koleka na kati ya Eklezia uta mibu ebele. Azalaka na boyekoli ya bonzambe mingi, kobakisaka lipolomi na mambi ya theolozi. Azalaki na lolendo mpenza ya boyebi na ye ya bibiliya. Ezalaki solo mpo na biso ete azalaki nganga ya mayele ya nzambe.

Azalaki ayebaki bamisionele ya Eklezia ya Yesu ya Basantu ya mikolo mya Nsuka malamu mingi koleka ntango bakendaki mosala na bango na engumba na ye ya Lima, Peru. Azalaki kolinga ntango nyonso kokutana na bango mpo ete akoka koteya bango kati na Biblia.

Mokolo moko, penepene lokola likabo euti na lola, bongo nde ekanisaki, misionele mibala batelemisaki ye kati na balabala mpe batunaki soki bakokaki koya na ndako na ye mpe kokabola makomi elongo na ye. Oyo ezalaki bokokisi ndoto na ye! Nsambo na ye eyanolamaka. Na nsuka, akokaki kosembola bilenge mibali babunga oyo mbala moko. Ayebisaki bango ete akosepela komona bango koya na ndako na ye mpe kosolola na ntina ya makomi.

Akokaki kozela te elaka na ye. Abelemaki mpo na kosalela Bibilia mpo na kopengola boyambi na bango. Azalaki na bondimi ete Bibilia ekolakisa polele mpe na nguya libungi kati na mateya na bango. Butu ya elaka eyaki, mpe bamisionele babetaki na ekuke. Azalaki na esengo. Ngonga na ye na nsuka eyaka .

Afungolaki ekuke mpe abengaki bamisionele bakota na ndako na ye. Moko ya bamisionele apesaki buko mokoya langi ya bule mpe apesaki litatoli moko ya bosembo ete ayebaki buku yango ezalaki na liloba ya Nzambe. Misionele ya mibale abakisaki litatoli na ye kafukafu oyo etali buku yango, kotatolaka ete ebongolamaki na profeta ya ntango ya sika ya Nzambe babengi Joseph Smith mpe ete eteyaki Klisto. Misionele basengaki bolimbisi mpe batikaki ndako na ye.

Mr. Gonzalez asiswaki mpenza. Kasi afungolaki buku yango, mpe abandaki kotanga nkasa na yango. Atangaki lokasa ya yambo. Atangaki lokasa moko moko nsima mpe atelemaki te kino na kati ya mpokwa ya mokolo elandi. Atangaki buku mobimba mpe ayebaki ete ezalaki solo. Ayebaki nini asengelaki kosala.’” Abengaki bamisionele, azwaki mateya, mpe atikaki bomoi oyo ayebaki mpo na kokoma mondimi ya Eklezia ya Yezu Klisto ya Basntu ya Mikolo ya Suka.

Moto malamu wana azalaki moteyi ya MTC na Provo, Utah. Lisolo ya bongwana ya ndeko mobali Gonzalez mpe nguya ya Buku ya Mormon etutaki ngai na motema.

Ntango nakomaki na Chilie, mokambi na ngai ya misio, Mokambi Royden J. Glade, abengisaki biso totanga litatoli ya profeta Joseph Smith oyo ekomama kati Joseph Smith—Lisolo mposo nyonso. Ateyaki biso ete litatoli ya Limoni ya Yambo ezali na botindiki ya mala moko epai ya litatoli ya bisomei etali nsango malamu mpe litatoli na biso ya buku ya Mormon.

Nazwaki libengisi na ya na bokebi. Natangi lisolo ya Limoni ya Yambo; natangi Buku ya Mormon. Nasambeli lokola lokola lokola eyangelamaki na Moroni mpe nasengaki “Nzambe, Tata wa Seko, na nkombo ya Klisto”6 soki Buku ya Mormon ezali solo. Natatoli lelo ete nayebi Buku ya Mormon, lokola Profeta Joseph Smith alobaki, ezali “ya malamu koleka nyonso na mabele, mpe libanga likonzi ya eyamba na biso, mpe moto [ako] belema penepene na Nzambe na kokangamaka na misise na yango koleka buku nyonso mosusu.”7 Profeta Joseph lisusu asakolaki: “Longola Buku ya Mormon mpe babobimisi, mpe eyamba na biso ezali wapi? Tozali na moko te.”8

Mbongwana ya Moto ye moko.

Lokola tososoli malamu koleka banani tozali mpe bantina ya Buku ya Mormon, mbongwana na biso ezwi mozindo mpe ekomi sikisiki mingi. Tolendisami na bomipesi na biso ya kobatela mayokani tosali elongo na Nzambe.

Ntina ya Yambo Buku ya Mormon ezali mpo na kosangisa Yisalaele epalangana. Kasangisa oyo epesi bana nyonso ya Nzambe libaku ya kokota kati na nzela ya liyokani mpe, na kotosaka mayokani maye, kozonga na miso ya Tata . Ntango toteyi boyamboli mpe tobatisi babongwani, tosangisi Yisalaele epanzana.

Buku ya Mormon etalisi nzela 108 elobeli ndako ya Yisalaele. Na ebandeli ya Buku ya Mormon, Nefi ateyaki, “Mpo litondi lya mokano mwa ngai ezali ete nakoka kondimisa bato mpo ya koya epai ya Nzambe wa Abalayama, mpe Nzambe wa Yisaka, mpe Nzambe wa Yakobo, mpe kobikisama.”9 Nzambe ya Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo azali Yesu Klisto, Nzambe ya Boyambi ya Kala. Tobikisami ntango toyei epai ya Klisto na nzela ya kobika nsango malamu na Ye.

Nsima, Nefi akomaki:

“Iyo, kutu tata wa ngai alobaki mingi etali Bapaganu, mpe lisusu etali ndako ya Yisalaele, ete bakomekisama bo nzete ya elaya, ya yango bitape bikobukama mpenza mpe bikopalanganisama likolo lya etando enso ya mabele. …

“Mpe ekosila ndako ya Yisalaele kopalanganisama, bakosangana lisusu esika yoko; to, o nsuka, ekosilisa Bapaganu kozwa litondi lya Nsango Elamu, bitape bya mboka bya nzete ya elaya to mintika mya ndako ya Yisalaele, mikoyingisama o kati, to mikoya o boyebi bwa Masiya wa solo, Nkolo wa bango mpe Mosikoli wa bango.”10

Mpela moko, na nsuka ya Buku ya Mormon, profeta Moroni akundolisi biso mayokani na biso, kolobaka, “Ete okoka lisusu te kobulunganisama, ete mayokani ma Tata wa Seko maye asalaki epai ya yo, O ndako ya Yisalaele, makoka kokokisama.”11

Mayokani ya Tata wa Seko

“Mayokani ya Tata wa Seko” elobelami na Moroni ezali nini? Totangi na buku ya Abalayama?

“Nkombo na ngai ezali Yehova, mpe nayebi nsuka uta na ebandeli; yango wana loboko na ngai ekozala likolo na yo.

“Mpe nakosala yo ekolo monene mpe nakopambola yo koleka nyonso, mpe nakosala nkombo na yo monene kati bikolo binso, mpe okozala lipamboli likolo ya nkona na yo nsima na yo, ete na maboko na bango bakomema mosala oyo mpe Bonganganzambe likolo ya bikolo binso.”12

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki na bopanzi nsango na mokili mobimba eleki kala te ete “oyo solo ezali mikolo mya nsuka, mpe Nkolo Nkolo azali kotambwisa mbangu mosala na Ye mo na kosangisa Yisalaele. Bosangisi wana ezali likambo ya motuya monene koleka nyonso kosalamaka na mabele lelo. Likambo moko te mosusu emekisami monene, likambo moko te mosusu te emekisami na motuya, likambo moko te mosusu emekisami na lokumu. Mpe soki oponi, soki olingi, okoki kozala eteni monene na yango. Okoki kozala eteni monene ya likambo moko monene, likambo moko ya mokolo, mpe likambo moko ya lokumu!

“Ntango tozali kolobela kosangisa, tozali na pete koloba solo ya ebandeli oyo: moko na moko ya bana ya Tata na Lola, na ngambo nyonso mibale ya elamba, abongi mpo na koyoka nsango ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto. Bazali kokana mpo na bangomei soki balingi koyeba mingi.”13

Wana ezali oyo tozali kosala lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka: tozali koluka komema mokili epai ya kososola moko ya—mpe mbongwana moko epai ya—nsango malamu ya Yesu Klisto. Tozali “basangisi ya mikolo ya nsuka.”14 Etinda na biso ezali polele. Bandeko mibali mpe basi, tika toyebana lokola baoyo bakotisi elaka ya Moloni na motema, basambeli mpe bazwi eyano moko mpo koyeba ete Buku ya Mormon ezali solo, mpe nsima bakaboli boyebi wana elongo na basusu na liloba mpe, ya motuya koleka nyonso, na mosala.

Mosala ya Buku Ya Mormon kati na Mbongwana

Buku ya Mormon ezali na litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto.15 Ekambaka biso na mayokani ya Tata, oyo soki tobateli yango tokopesa biso likabo monene—ya bomoi ya seko.16 Buku ya Mormon ezali libanga likonzi mpo na mbongwana ya bana mibali mpe basi banso ya Tata na Lola.

Kotangaka lisusu uta na Mokambi Nelson: “Ntango ozali … kotanga mokolo na mokolo uta na Buku ya Mormon, okoyekola mateya ya kosangisa, babosolo oyo etali Yesu Klisto, Bomikabi na Ye, mpe litondi ya nsango malamu na Ye oyo ezwami te na Bibilia. Buku ya Mormon ezali eteni ya katikati mpo na bosangisi ya Yisalaele. Yango wana, soki ezalaki Buku ya Mormon moko te, bosangisi elakama ya Yisalaele elingaki kosalama te.”17

Tika nasukisa na maloba ya Mobikisi ntango ateyaki Banefi na tina ya mapamboli elakelama: “Mpe tala, bozali bana ba baprofeta; mpe bozali ba ndako ya Yisalaele; bozali ba boyokani boye Tata asalaki elongo na batata ba bino, kolobaka epai ya Abalayama: Mpe na nkona ya yo mabota manso ma mabele makopambolama.”18

Natatoli ete tozali bana mibali mpe bana basi ya Nzambe, nkona ya Abalahama, ndako ya Yisaela. Tozali kosangisa Yisalaele mpo na ngonga ya nsuka mpe tozali kosala bongo na Buku ya Mormon—buku moko oyo, soki esangisami na Molimo ya Nkolo, ezali esalelo yea nguya koleka nyonso ya mbongwana. Tokambami na profeta ya Nzambe, Mokambi Russell M. Nelson, oyo azali koyangela bosangisi ya Yisalaela na ntango na biso. Buku Ya Mormon ezali solo. Ebongoli bomoi na ngai. Nalaki bino, lokola Moloni mpe baprofeta mingi na mibu ebele basali, ete ekoki kobongola ya yo.19 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Enseignement des Presidents de l’Eglise: Ezra Taft Benson 2014), 129.

  2. Mosala ya Buku ya Mormon ezali Nini?Precher Mon Evangile: Guide Missionaire, rev. ed. (2018), lds.org/manual/missionary.

  3. Moloni 10:4

  4. Moloni 10:4

  5. Boyingisi na Buku ya Mormon.

  6. Moloni 10:4

  7. Boyingisi na Buku ya Mormon.

  8. Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (2007), 196.

  9. 1 Nefi 6:4

  10. 1 Nefi 10:12, 14

  11. Moroni 10:31

  12. Abraham 2:8–9.

  13. Russell M. Nelson, “Hope of Israel” (losambo ya bilenge ya mokili mobimba, Sanza ya motoba 3, 2018), 4, broadcasts.lds.org.

  14. Tala Yakobo 5:72.

  15. Mokambi Ezra Taft Benson ateyaki: “Nkolo Yemei alobi ete Buku ya Molomoni ezali na ‘litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto’ (D&C 20:9). Wana elingi koloba te ete ezali na mateya nyonso, malongi nyonso ebimisami naino. Kasi, elingi koloba ete kati na Buku ya Mormon tokozwa litondi ya malongi wana esengelami mpo na lobiko na biso. Mpe eteyami na mobimba mpe na pete mpo ete ata kutu bana bakoki koyekola banzela ya lobiko mpe bonetolami” (Teachings: Ezra Taft Benson, 131).

  16. Tala Doctrine et Alliances 14:7.

  17. Russell M. Nelson, “Hope of Israel,” 7.

  18. 3 Nefi 20:25

  19. Tala, ndakisa, Henry B. Eyring, “The Book of Mormon Will Change Your Life,” Liahona, Feb. 2004, 12–16.