2010–2019
Komoma Basantu ba Mikolo Mya Nsuka ya Ndakisa Malamu
Sanza ya Zomi 2018


Kokoma Basantu ba Mikolo Mya Nsuka ya Ndakisa Malamu

Natiki likolo na bino bolingo mpe lipamboli, ete bokoka kosala feti likolo ya liloba ya Nkolo na bomoi na bino moko na moko.

Oyo ezali likita moko ya bofuli mpe ya motuya mpenza. Tozali kotala lobi na elikia. Totindikami na kosala malamu mingi koleka mpe kozala malamu mingi koleka. Bitinda bipesami uta na elobeli oyo na Bakambi Banene mpe Bayangeli Banene mpe miziki ezalaki ya bonkumu! Natindi bino boyekola bitinda oyo, kobanda na poso oyo.1 Yango elakisi makanisi mpe bolingi ya Nkolo mpo na bato na Ye, lelo.

Mwango ya sika, ya kosunga Eklezia mobimba ezali na likoki ya kokangola nguya ya mabota, soki libota na libota elandi mobimba na bwania mpe na bokebi mpo na kobongola ndako na bango ekoma esika esantu ya bondimi. Nalaki ete soki bosali lisusu ndako na bino ekoma esika ya katikati ya koyekola nsango malamu, nsima ya ntango mokolo ya saba na bino ekozala solo esengo monene. Bana na bino bakosepela mingi na koyekola mpe kosalela mateya ya Mobiksi, mpe nguya ya monguna na bomoi mpe na ndako na bino ekokita. Mbongwna na libota na bino ekozala ya kokamwa mpe ya bosungi.

Na likita oyo tozali na bokasi ya koyanola mpo na kokokisa bokasi ya ntina mpenza mpo na kokumisa Nkolo Yesu Klisto ntango nyonso kozala ndaisa ya Eklezia na Ye. Nalaki bino ete bokebi makasi mpo na kosalela malamu nkombo ya Eklezia mpe bandimi na yango ekomema na bokoli ya bondimi mpe ekokotisa nguya monene ya molimo mpo na bandimi ya Eklezia na Ye.

Sikoyo tika tobaluka na mama ya likambo ya Tempelo. Toyebi ete ntango na biso na tempelo ezali ya motuya mpenza mpo na lobiko mpe bonetoli na bino mpe mpo na oyo ya mabota na biso.

Nsima ya kozwa makuli ya tempelo mpe kosala mayokani elongo na Nzambe, moko na moko na biso asengeli na kokoba bolendisa mpe boyekoli ya molimo mpe oyo ekoki kosalema bobele na ndako ya Nkolo. Mpe bankoko na biso bazali na mposa na biso mpo na kosala lokola bazwili mpo na bango.

Bamaniola ngolu mpe boboto monene ya Nzambe, oyo, liboso ya bokeli ya mokili, apesaki nzela moko mpo na kopesa mapamboli ya tempelo mpo na bango baye bakufa na kozanga koyeba nsango malamu. Milulu oyo ya tempelo ezali ya kala. Mpo na ngai makambo wana ya kala ezali efulama mpe elembo mosusu ya bosolo ya bompenza na yango.2

Bandeko ya mibali mpe bandeko ya basi, loma ya monguna ezali kobakisama na motuya eluti, na bokasi mpe na kilikili.3 Mposa na biso mpo na kozala na tempelo mbala na mbala ezala naino monene mingi koleka boye te. Nabondeli bino na kotalela na losambo boniboni bokolekisa ngonga na bino. Bosalela ngonga na lobi na bino mpe na oyo ya libota na bino. Soki bokoki kokende na mpasi te na tempelo, natindi bino bozala na lolenge ya kosala bokutani mbala na mbala na Nkolo—ya kozala na ndako ya Ye ya esantu—nsima kobatela bokutani wana na sikisiki mpe esengo. Nalaki bino ete Nkolo akomema makamwisi Ye ayebi bosengeli soki bosali mabonza mpo na kosala mpe kokumbamela na tempelo na Ye.

Sikoyo tozali na batempelo 159 ebulisama. Bobateli malamu mpe bosokoli ya batempelo oyo ezali ntina mingi koleka mpo na biso. Na boleki ya bantango, batempelo ezali na bosenga mpenza ya bolengeli mpe bokomisi sika. Na nsuka wana, miango etiami sikawa mpo na kobongisa mpe kokomisa kitoko Tempelo ya Salt Lake mpe batempelo misusu ya nkola ya bapionie. Mabongisi mpo na misala oyo ekokabolama lokola ezali kotombwama.

Lelo tosepeli na kosakola miango mpo na kotonga batempelo 12 mosusu. Batempelo oyo ekotongama na bisika oyo elandi: Mendoza, Argentina; Salvador, Brazil; Yuba City, California; Phnom Penh, Cambodia; Praia, Cape Verde; Yigo, Guam; Puebla, Mexico; Auckland, New Zealand; Lagos, Nigeria; Davao, Philippines; San Juan, Puerto Rico; mpe Washington County, Utah.

Kotonga mpe kobatela batempelo ekoki ntango mosusu kobongola bomoi na bino te, kasi kolekisa ngonga na tempelo ekokoka na ntembe te. Na bango baye bazala te na tempelo kala, nalendisi bino mpo na komilengela na kozonga nokinoki lokola ekoki kosalema. Nde nabengisi bino na bokumbami na tempelo mpe kosambela mpo na koyoka na mozindo bolingo ya ndelo te ya Mobikisi mpo na bino, ete moko na moko na bino akoka kozwa litatoli ete Ye azali kokamba mosala oyo ya bule mpe ezanga mibu.4

Bandeko mibali mpe bandeko basi, natondi bino mpo na bondimi mpe makasi ya lisungi na bino. Natiki likolo na bino bolingo mpe lipamboli, ete bokoka kosala feti likolo ya liloba ya Nkolo na bomoi na bino moko na moko. Nayebisi bino ya solo ete bobimisi ezali kokoba na Eklezia mpe ekokoba kino makanisi ya Nkolo ekokokisama, mpe Yehova Monene akoloba mosala esili.”5

Napamboli bino na bondimi ya kobakisa na Ye mpe na mosala na Ye esantu, na bondimi mpe bompikiliki mpo na koyika mpiko na mikakatano ya bomoi na bino. Napamboli bino mpo na kokoma Basantu ya Mikolo mya Nsuka ya Ndakisa malamu. Napamboli bino mpe napesi litatoli na ngai ete Nzambe azali na bomoi! Yesu Klisto azali na bomoi! Oyo ezali Eklezia na Ye. Biso tozali bato na Ye, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala bitinda ya likita linene na LDS.org mpe na Gospel Library app. Ekotiama na Ensign mpe Liahona. Nkasa ya Eklezia, lokola New Era and the Friend, epesamaka na nzela ya mikanda to Internet, ezali eteni ya motuya ya mwango ya nsango malamu katikati ya ndako.

  2. Tala, mpo na ndakisa, Esode 28; 29; Lewitiko 8.

  3. Tala Moziya 4:29.

  4. Tala Wilford Woodruff, “The Law of Adoption,” discourse delivered at the general conference of the Church, Apr. 8, 1894. Mokambi Woodruff alobaki: “Tozali na bobimisi te. Tosilisi [na] mosala ya Nzambe te. … Ekozala na nsuka te na mosala oyo kino ekobongisama nie” (Deseret Evening News Sanza ya minei 14, 1894, 9).

  5. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 142.