2010
Bomoni uta na Mabele ma Likolo
sánzá ya mwambe 2010


Bolenge

Bomoni uta na Mabele ma Likolo

Lokola elenge nazwaki mabaku mingi ya kosala mabatisi mpo na bakufi na Tempelo ya San Diego na California. Atako ntango nyonso makambo mazalaki malamu mpo na ngai, mobembo moko mpenza etikala kokangama na mayele na ngai.

Nazalaki na mibu 16, mpe ndeko na ngai ya mwasi ya leki akomaki na mibu 12 mpe azalaki kosala mobembo na ye ya yambo mpo na kosala mabatisi mpo na bakufi. Lokola ezalaki mbala na ye ya yambo, tozwaki ekateli ya kotambola libanda nzinga nzinga na tempelo nsima ya kosilisa.

Libanda ya tempelo ezalaki na bisika mibale ya kotala libanda na mopanzi moko, boye tozalaki kotambola kuna. Mpo ete Tempelo ya San Diego ekangami na balabala monene moko ya makelele, ntango otelemi na esika ya kotala libanda, na ntembe te ozali kotala balabala yango.

Kotelemaka na Mabele ya Likolo ya tempelo mokolo wana epesaki ngai lolenge ya sika ya kotala bomoi. Nazalaki kotala mokili na nse na mituka na yango kolekaka na lombangu, ya kotonda na bandako minene ya kotekaka biloko, mpe bikomakoma likolo ya bilembo ya kolakisa nzela.

Ezalaki o ntango ena ete likanisi liyaki na mayele ma ngai: “Osengeli kozala kuna te; ezali yango wana nde ntina ya bomoi te.” Bateyaki ngai ntango nyonso ete ntina ya bomoi ezali kozonga kozala esika moko na Tata na biso na Likolo mpe kokoma lokola Ye. Nayebaki ete nazalaki na ntina ya biloko ya mokili te mpo na kokokisa ntina ena.

Nabalukaki mpe natalaki epai na tempelo ya kitoko, mpe natondaki na botondi mpo na boyebi ya nsango malamu mpe bomoni oyo epesaki ngai. Nayebaki ete na kati kati ya mokili oyo ya kobeba mpe ya makama, nasilaki kozwa mabele maleki likolo wapi kotelema.

Mokolo wana kati na tempelo nalakaki Tata wa ngai na Likolo ete nakotelema mikolo nyonso na ngambo na Ye kasi na ngambo ya mokili te. Likambo ezali te nini mokili ezali kobwakela biso, kasi tokoki kolonga yango nakobatelaka mayokani oyo tosalaki mpe nakotelemaka na bisika ya santu (tala D&C 87:8).