2010
Mapamboli ya Tempelo
sánzá ya mwambe 2010


Etinda ya Bokambi ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Mwambe 2010

Mapamboli ya Tempelo

Nakoki lisusu kokundola ntango baboti ba ngai bamemaki libota na biso na Tempelo ya Swisse oyo batongaki sika na Poto, mpo na kokoma libota ya seko. Nazalaki na mibu 16 o ntango ena mpe mwana ya nsuka kati na bana minei. Tobukaki mabongolo na lotale mpo na kokangisama na mabele na nguya ya bonganganzambe, na elaka moko ya kitoko ete tokoka kokangisama mpo na boseko. Nakobosana ntango oyo ya kitoko soki moke te.

Lokola mwana mobali nabetisamaki na motema ete tokatisaki bandelo ya mboka mpo na kokangisama lokola libota. Mpo na ngai ezalaki moko elili ya lolenge nini mosala mwa tempelo ezali kokatisa bandelo ya mokili mpo na komema mapamboli ya seko na bafandi banso ba mabele. Batempelo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka etongami solo mpenza mpo na litomba ya mokili mobimba, na kozangaka kotala ekolo, bonkoko, to bosangisani na lingomba moko ya politiki.

Batempelo ezali litatoli ya kotiela ntembe te ete bolamu ekoyangela. Mokambi George Q. Cannon (1827–1901), Mosungi ya Yambo kati na Bokambi ya Yambo, alobaki mokolo moko ete, “Libanga nyonso ya moboku liye litiami mpo na Tempelo, mpe Tempelo nyonso oyo basilisi kotonga … esilisaka nguya ya Satana na mabele, mpe ebakisaka nguya ya Nzambe mpe Bonzambe.”1

Wana ezali tempelo moko moko kobakisa bopusi ya bolamu na mabele, mapamboli manene koleka, solo mpenza, mayaka epai ya baoyo wana bazali sikawa kokende na tempelo. Kuna tozwaka pole ya koleka mpe boyebi mpe kosala mayokani ma lipombo maye, soki balandi yango, makosalisa biso kotambola na nzela ya bayekoli. Na bokuse, tempelo ezali koteya biso mpo na oyo etali ntina ya bule ya bomoi mpe ezali kosalisa biso kozwa makoki ma solo ya nzoto mpe ya molimo.

Nzokande, tokendaka tempelo bobele mpo na biso moko te. Ntango nyonso tokotaka kati na bandako oyo ya bule, tozali na mokumba kati na mosala ebenisami, mosala mwa bosikoli mpo na lobiko moye mopesami na bana ya Nzambe banso lokola litomba ya Bomikabi ya Mwana se Moko ya Tata. Oyo ezali mosala moko ya komikanisa se yo moko te mpe ya mosantu oyo epesi biso nzela lokola bato ya kufa ete tozala na mosala ya kokoma babikisi na Ngomba ya Siona.

Mpo na baoyo bakoki te kokende na tempelo sikawa mpo na likambo songolo, tozali kolendisa bino kosala nyonso na nguya na bino mpo na kozala na mokanda mondimami ya kokota na tempelo oyo ekoki. Mokanda mondimami ya kokota tempelo ezali elembo ya botongono mpe mokano mwa biso ya kosalela Nkolo. Ezali elembo ya bolingo na biso mpo na Nkolo, mpo lokola Yesu ateyaki, “Ye oyo azwi mitindo mya ngai, mpe abombi yango, azali ye oyo alingaka ngai: mpe ye oyo alingaka ngai bakolinga ye na Tata wa ngai, mpe nakolinga ye, mpe nakomimonisa epai na ye” (Yoane 14:21).

Lokola lolenge ya mokili ezali kokoba se kokoma kitoko na bandako ya kitoko oyo ebulisami mpo na Nkolo, ezali losambo na ngai ete tokosala ya biso eteni ya mosala na komemaka lola penepene na mabele na kozalaka bato balongobani mpo na kozala na mokanda mondimami mpo na kokota na tempelo mpe kosalelaka yango. Wana ezali biso kosala bongo, na ntembe te bobele bosembo ekobakisama na bomoi mpe bandako na biso te, kasi na masanga na biso manso ya bato mpe epai nyonso na mokili.

Mokanda

  1. George Q. Cannon, na “Temple ya Logan,” Millennial Star, Sanza ya zomi na moko 12, 1877, 743.

Koteya na Etinda Oyo

Bato mingi koleka bayekolaka malamu mpe bamikundolaka mpo na ntango molai soki oteyi makanisi na kosalelaka bilili ya komona na esika ya maloba mpamba (tala Teaching, No Greater Call [1999], 182). Ntango okoteya liteya, sala ete olakisa elili moko ya tempelo moko. Nsima ya kotanga lisolo oyo, bosolola na koteyaka mpo na nini tempelo ezali na ntina monene mpo na Mokambi Uchtdorf. Bianga bana bake na libota basala elili ya libota na bango na tempelo.

Buku Teaching, No Greater Call elobi ete, “Lendisa baoyo oteyaka kotia ntina moko to mingi oyo ekoki kosalisa bango kosalela na bomoi na bango mabongisi oteyaki” (159). Tala lolenge nini okoki kotanga etinda ya Mokambi Uchtdorf elongo na libota mpe bato ya libota mpo na kokoma ntina moko ya bino moko oyo ekosalisa bango kotikala bato balongobani mpo na kozala na mpe kosalela mokanda mondimami mpo na kokota na tempelo.