2010
Bakisa Bondimi mpe Bosembo bwa Yo moko
sánzá ya mwambe 2010


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali, Sanza ya mwambe 2010

Bakisa Bondimi mpe Bosembo bwa Yo Moko

Yekola mateya oyo, mpe na lolenge ekoki solola yango na bandeko basi otalaka. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamam basungi ekoma eteni moko ya mosala kati na bomoi na yo.

Elilingi
Relief Society seal

Bondimi • Libota • Mosala

Uta na makomi

Yisaya 2:2–3; D&C 109:22–23; 110:8–10

Mokumba na Biso ya Kozala Balongobani ya Mokanda mwa Bondimami Kokota na Tempelo

“Mayokani tosalaka elongo na makuli makangami na yango oyo tozwaka na tempelo ekomaka makambo tosengeli kozala na yango mpo tondimama liboso ya Nzambe. Mayokani maye matombolaka biso koleka bandelo ya nguya na biso mpe mpe likolo ya oyo ezali bomoni na biso. Tosalaka mayokani mpo na kolakisa bomipesi na biso mpo na kotonga bokonzi. Tokokoma bato ya liyokani ntango tokomitia o nse ya liyokani ya Nzambe. Mapamboli malakami manso mazali ya biso o nzela ya botongono na biso na mayokani maye. …

“Nini ekoki basi ba Eklezia kosala mpo na kosenga mapamboli ya tempelo lokola ya bango?

“O nzela ya baprofeta na Ye, Nkolo abiangi baoyo bazwi naino mapamboli maye ma tempelo te kosala nyonso esengeli mpo ete bakoka kozwa yango. Abiangi baoyo basili kozwa mapamboli oyo kozonga mbala na mbala kosepela lisusu na makmbo yango, mpo na kobakisa limoni mpe bososoli na bango ya mwango mwa Ye ya seko.

“Tika ete tozala bato balongobani mpo na kozala na mokanda mondimami mpo na kokota na tempelo. Tika ete tokende na tempelo mpo na kokangisa mabota na biso seko na seko. Tika ete tozonga mbala na mbala na tempelo lokola makambo ekopesa biso nzela. Tika ete topesa na badeko bakufa na biso libaku ya kozwa makuli ma bonetoli. …Tika biso tosepela bolendisi ya molimo mpe emoniseli tozwi lokola tokei na tempelo ntango nyonso. Tika ete tozala na botongono mpe tosala mpe tobatela mayokani ma tempelo mpo na kozwa mapamboli ma Bomikabi.”1

Silvia H. Allred, mosungi ya yambo kati na bokambi monene ya Lingomba ya Bamama po na Bosalisi.

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

Mokambi Gordon B. Hinckley (1910–2008) ateyaki ete Lisanga ya Bamama Basungi ekolaki uta na mposa ya bandeko basi mpo na kokumbamela kati na tempelo:

“Na ntango ya botongi Tempelo ya Kirtland, basi babiangamaki kosala bonyangoli ya mabele ya kosala basani na biteni ya mike mike ya kosangisa na sima ya kokanga na bifelo ya tempelo, oyo mpo na kokanga pole ya moi mpe ya sanza mpe kopesa pole oyo ekobimisa kitoko ya ndako monene yango.

“Na bantango oyo, ntango mbongo ezalaki moke mpenza kasi ebele ya bondimi, bato ya misala bapesaki mingi ya bokasi na bango mpe bozwi na bango mpo na kotonga tempelo. Basi bazalaki kopesa bango bilei, ya kitoko bakokaki kolamba. Edward W. Tullidge abetaki lisolo ete wana ezalaki basi kotonga bilamba ya tempelo, Joseph Smith, kotalaka bango, alobaki, ‘Malamu, bandeko basi, bozali ntango nyonso na esika oyo. Bandeko basi bazali ntango nyonso bato ya yambo mpe liboso na banso na misala malamu minso. Malia azalaki moto ya yambo na bosekwi; mpe bandeko bazali sikawa bato ya yambo ya kosala mosala na kati ya tempelo.’ …

“Lisusu na Nauvoo, ntango tempelo ezalaki kotongama, motango moke ya basi basanganaki mpo na kotonga bilamba ya likolo mpo na bato ya misala. Ezalaki na libaku ya makambo te ete basi ntuku mibale kati na bango basanganaki na mokolo ya Minei mwa 17, Sanza ya misato ya mobu 1842, na kisuku ya likolo ya ebombelo ya Profeta.” Boye Lisanga ya Bamama Basungi.

Nini Ekoki Biso Kosala?

  1. Lisungi nini ekoki ngai kopesa mpo na kosalisa bandeko basi ba ngai mpo na kokende na tempelo?

  2. Lolenge boni ekoki kolanda to kolakisa ndakisa ya libula ya bandeko basi ya ntango ya yambo baoyo bamipesaki mbeka mpo na kozwa mapamboli ya tempelo?

  3. Lolenge nini ekoki ngai kosenga mapamboli ma ngai ya tempelo?

Bankoma

  1. Silvia H. Allred, “Holy Temples, Sacred ovenants,” Liahona, Sanza ya zomi na moko, 2008, 113, 114.

  2. Gordon B. Hinckley, “Ambitious to Do Good,” Ensign, Sanza ya misato, 1992, 2.