2011
Bamisionele Mingi na Bomoi bwa Ngai
sánzá ya míbalé 2011


Bolenge

Bamisionele Mingi na Bomoi bwa Ngai

Eyenga ya yambo nazalaki na ekelzia elongo na bamisionele, nayebaki lisusu bato nakolaka elongo na bango mpe nayebaki uta na lingomba. Namonaki moko ya baninga ba ngai ba bolingo mingi koleka, bakalaka ba kelasi ya bana mpe ya bilenge, mwana mwasi moko nazalaki na ye mpenza malamu mingi te na ntango ya kala, mpe kutu mwana mobali moko nazalaki na matata na ye.

Moko na moko ya bato baye batikaka elembo ya kowumela na ngai. Moninga wa ngai ya bolingo mingi koleka azalaki elenge mwasi ya bosembo mingi, mpe na ntina ya ye naponaki kokoba koyekola Eklezia. Bakalaki baye bamikundoli ngai uta na kelasi basungaki ngai koyeba ete nazali na motuya. Nayekolaki etali bolingo mpe lolango la Nzambe uta na elenge mwasi oyo ayambaki ngai atako ezaleli na ngai ezalaki ya boboto te epai na ye na ntango ya kala. Matata ma ngai ma kala na bolenge etiaki lolenge ya ndakisa elamu, nayebaki mpenza mwinda mwa ye mpe nalingaki kozala nzinganzinga na ye.

Mayele maye masungaki ngai koyekola ete, kutu yambo ya komimonisa na bamisionele, Tata wa Lola alengeleka ngai mpo ya kozwa nsango elamu na nzela ya bato Ye atiaki nzinganzinga na ngai. Uta na bango nayekolaki ete makambo make tokosalaka makoki kozala na mosala monene. Eye eleki na motuya, nayekoli ete mosala ya misio ebandi na ngai.