2011
Boniboni Enene Ekozala Esengo Ya Bino
sánzá ya míbalé 2011


Etinda ya Bokambi ya Yambo, sanza ya Mibale 2011

Boniboni Monene Ekozala Esengo Na Bino

Esengo mingi te kati na bomoi ezalaka na elengi mpe ewumelaka ntango molai koleka esengo ya koyebaka ete osalisaki basusu na kozwa nsango elamu ezongisami ya Yesu Klisto o kati ya mitema mya ngai. Kozwaka esengo ena ezali konzo ya mondimi moko na moko ya Eklezia. Ntango tobatisamaki, tosalaki elaka ete “tokotelema lokola banzeneneke ba Nzambe na ntango inso na makambo manso, mpe na bisika binso epai tokozala, kutu kino liwa, ete tokoka kosikolama na Nzambe, mpe kotangama elongo na baye ba lisekwa lya yambo, ete tokoka kozala na bomoi bwa seko” (Moziya 18:9).

Bandimi banso bandimi eteni ya mokumba epesami na Eklezia mpo ya komeme nsango elamu ya Yesu Klisto na mokili, bipai binso mpe bomoi bwa bango mobimba Nkolo alobaki yango polele: “Tala, natindi bino kotatola mpe kokebisa bato, mpe esengeli moto nionso oyo akebisami akebisa moto ya penepene na ye” (D&C 88:81). Bandimi ba Eklezia basengeli kozala na nguya ya kokuta baye Nkolo alengeli mpo ya bamisionele koteya.

Tozali na mposa ya kosalela bondimi bwa biso ete Nkolo alengeli bato nzinga nzinga na biso mpo ete bateyama. Ayebi nani bazaIi mpe ntango kani balengelami, mpe Ye akoki kokamba biso epai ya bango na nguya ya Molimo Mosantu mpe kopesa biso maloba ya kobianga bango mpo ete bateyama. Elaka Nkolo apesaki na misionele moko na 1832 ezali lisusu elaka apesi na biso na mokumba mwa biso ya kokuta bato basili kolengelama mpo ete bateyama na bamisionele: “Nakotinda likolo lya ye Molendisi, oyo akoteya ye bosolo mpe nzela wapi akokende; mpe mbala inso akozala na botongono, nakotia likolo lya ye motole lisusu elongo na maboke” (D&A 79:2-3).

Mpe elaka ya esengo monene mpo na bamisionele ya botongono ezali lisusu ya biso bandimi ba botongono baye bapesi mitema na mosala mwa mision:

“Mpe sikawa, soki esengo na yo ekozala monene na moto moko oyo yo omemi epai na ngai kati na bokonzi na Tata na ngai, ndenge nini esengo na yo ekozala monene soki osengeli komeme bato ebele epai na ngai!

“Tala, ozali na nsango elamu liboso lya yo, mpe libanga, mpe lobiko la ngai.

“Tuna Tata o nkombo ya ngai, na bondimi kondimaka ete okozwa, mpe okozala na Molimo Mosantu, oyo akolakisaka makambo manso maye masengelami mpo ya bana ba bato” (D&C 18:16–18).

Na bobakisi na Molimo Mosantu mpo ya kosalisa biso koyeba lisusu mpe kobengisa baye basili kolengelama mpo ete bateyama, Nkolo abiangaki mpe ateyaki bakambi mpo ete bakamba biso. Na mokanda mwa sanza ya mibale ya mokolo mwa 28, 2002, Bokambi bwa Yambo babakisi mokumba mpo ya mosala mwa misio na baepisikopo mpe bapaloasi.1 Na lisalisi lya lisanga lya paloasi to etape, lingomba lya lisalisi lya bonganganzambe ebongisi mwango ya misio mpo ya eteni ya Eklezia. Na mwango mona epesami makanisi boniboni bandimi bakoki kokuta baye balengelaki mpo ya koteyama na bamisionele. Ezali na moto moko abiangemi lokola mokambi wa misio ya paloasi to etape. Mokambi wa misio ona azali penepene na bamisionele ba ntango mobimba mpe baluki.

Ezali na nzela mingi okoki malamu mingi kokokisa lotomo na bino ya moto moko moko mpo ya kosalisa na kokutaka bato bamisionele basengeli koteya. Nzela eleki petepete mingi ekozala malamu mingi koleka.

Sambela mpo ya kokambema na Molimo Mosantu. Loba na bakambi ba esika mpe bamisionele, kotunaka makanisi mpe kolakaka bango lisalisi lya yo. Lendisa baye bazali elongo na yo na mosala. Zala nzeneneke na ntango inso na nini okolobaka mpe okosalaka ete Yesu azali Klisto mpe ete Nzambe ayanolaka nsambo.

Natatoli ete Molimo Mosantu akokamba yo na baye bazali koluka bosolo lokola ozali kosambela mpe kosala mpo ya bokambemi bona. Mpe nayebi na mayele ete esengo ya yo ekowumela elongo na baye baponi kozwa nsango elamu na motema mwa bango mpe nde bakowumela libela.

MATANGI

  1. Tala, “News of the Church: Ward and Branch Missionary Work Emphasized,” Liahona, Aug. 2002, 4.

Koteya uta na Etinda Oyo

  • Enseignement, Pas De Plus Grand Appel eteyi biso kolendisa baye toteyi kotia ntina mpo ya kosunga bango kowumela na mibeko bayekoli (tala lokasa 159). Elongo na libota, maniola koyeba mapamboli ma mosala ya misio lokola elobami na Mokambi Eyring mpe, soki ofulami na Molimo, bengisa libota batia ntina mpo ya kokabola nsango elamu.

  • Maniola kosangisa makanisi elongo na libota mpe nzela ya kokabola nsango elamu, komikundolaka toli ya Mokambi Eyring ete “Nzela eleki petepete mingi ekozala malamu mingi koleka.” Mpo ya koyekola mingi koleka etali kosangisa makanisi, tala Enseignement, Pas De Plus Grand Appel, lokasa 160.