2011
Bozongisi Bwa Makambo Manso
sánzá ya míbalé 2011


Etinda ya Bamama Bateyi Batali, sanza ya Mibale 2011

Bozongisi Bwa Makambo Manso

Yekola liteya oyo, mpe na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala kati na bomoi na yo.

Bondimi • Libota • Lisungi

Profeta Joseph Smith abongisaki Lingomba ya Bamama Basungi lokola eteni ya ntina mpenza ya Eklezia. Lokola bakambi, tolikii ete tokoki kosunga yo kososola ntina nini Lingomba ya Bamama Basungi ezali na ntina mpenza na bomoi bwa yo.

Toyebi ete basi ba Boyokani bwa Sika balakisaki bondimi na Yesu Klisto mpe basanganaki na mosala mwa Ye. Luka 10:39 elobi na ntina ya Malia ete, “oyo afandaki na makolo na Nkolo, koyoka maloba na ye.” Na Yoane 11:27 Malata apesi litatoli lya Klisto: “Alobaki epai ya ye ete, ee, Motei, najali kondima ete yo ojali Klisto, Mwana na Njambe oyo ajali koya na mokili.” Misala 9:36, 39 elobi na ntina ya “Moyekoli … nkombo na ye Tabita, … Ye ajalaki moto na misala malamu … Basi-bakufali-mibali yonso batelemi na ye elongo … kolakisa ye mikoto, na kasaka, na bilamba yonso bisalaki [ye].” Foibe, na Baloma 16:1–2, azalaki “mosungi na lingomba” mpe “mosungi na bato mingi.”

Ndakisa iye ya bondimi, litatoli, mpe lisalisi exali kokoba kati na eklezia ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka mpe ezwi nzoto na libongisi lya Lingomba ya Bamama Basungi. Julie B. Beck, mokambi monene wa Lingomba ya Bamama Basungi, ateyaki: “Kaka lokola Mobikisi abengisaki Malia mpe Malata na ntango ya Boyokani bwa Sika mpo ya kosangana na mosala mwa Yemei basi ba ekeke eye bazali na etinda ya Mokonzi na kosangana na mosala mwa Nkolo. … Libongisi lya Lingomba ya Bamama Basungi na 1842 etambolisaki nguya ya basi banso elongo mpe misala moko na moko ya bango mpo ya kotonga bokonzi bwa Nkolo.1

Tokokisaka mosala mwa biso ntango tokangami na ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi: mpo ya kobakisa bondimi, kolendisa mabota mpe ndako, mpe koluka lisungi lya baye bazali na mposa.

Natatoli ete Lingomba ya Bamama Basungi ebongisamaki na Nzambe na mosala mwa lobiko. Ndeko mwasi ya Lingomba ya Bamama Basungi moko na moko azali na mosala ya kosala na kokokisaka mosala moye mwa bule.

Silvia H. Allred, mosungi ya yambo kati na bokambi monene ya Lingomba ya Bamama Bosungi.

Uta na Makomi

Yoele 2:28–29; Luka 10:38–42; Baefese 1:10

Uta na Mambi ma kala ma Biso

Ndeko mwasi Julie B. Beck ateyi ete “toyebi na nzela ya Profeta Joseph Smith ete Lingomba ya Bamama Basungi ezalaki eteni mpenza ya Bozongisi.”2 Mosala mwa bozongisi ebandaki na Limoni lya Yambo na 1820 mpe akobaki “monkoloto likolo ya monkoloto, meko likolo ya meko” (D&A 98:12). Ntango Lingomba ya Bamama Basungi ebongisamaki mpenza na mokolo mwa 17, 1842, Profeta ateyaki basi mpo na oyo etali esika ya ntina mpenza ya bango na Eklezia ezongisami. Alobaki, “Eklezia ebongisamaki mpenza te kino basi babongisamaki boye.”3

Bankoma

  1. Julie B. Beck, “Fulfilling the Purpose of Relief Society,” Liahona, Nov. 2008, 108.

  2. Julie B. Beck, “Fulfilling the Purpose of Relief Society,” 108.

  3. Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (2007), 369.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Lisungi kani nakopesa na bandeko basi sanza eye liye lilakisa ndakisa ya bondimi bwa basi bazali bayekoli ba Yesu Klisto?

  2. Liteya kani ya nsango elamu ezongisami nakoyekola mpo ya kolendisa litatoli lya ngai sanza eye?