2011
Zwani Momekano ya Botondi
sánzá ya zómi na míbalé 2011


Bilenge

Zwani Momekano ya Botondi

Tolobela bobele te kotanga mapamboli ma biso—nde tosala yango! Komani molongo mwa makambo 100 maye ozali na botondi mpo na yango. Soki yango ezali koyokana lokola mingi koleka, mekani eye:

  1. Komani makoki 10 maye ozali na botondi mpo na yango.

  2. Komani biloko ya bozwi 10 biye ozali na botondi mpo na yango.

  3. Komani bato ba bomoi 10 baye ozali na botondi mpo na bango.

  4. Komani bato bakuta 10 baye ozali na botondi mpo na bango.

  5. Komani biloko ya mokili 10 biye ozali na botondi mpo na yango.

  6. Komani biloko ya lelo 10 biye ozali na botondi mpo na yango.

  7. Komani bisika ya mabele 10 biye ozali na botondi mpo na yango.

  8. Komani bikela ya mikolo miye 10 biye ozali na botondi mpo na yango.

  9. Komani bilei 10 biye ozali na botondi mpo na yango.

  10. Komani makambo ma nsango malamu 10 maye ozali na botondi mpo na yango.

Ntango tosali molongo lokolo eye, tokomona ete molongo ya 100 ebandi kutu te na eloko te na etando ya biloko binso Nzambe apesi biso.