2011
Esika ya Mosala Etandolama
sánzá ya zómi na míbalé 2011


Etinda ya Bamama Bateyi Batali, Sanza ya Zomi na Mibale 2011.

Esika ya Mosala Etandolama

Yekolani liteya liye, mpe na lolenge esengeli, solola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba lya Bamama Basungi likoma eteni yoko ya mosala na bomoi bwa yo.

Bondimi • Libota • Lisungi

Nkolo, Eklezia ya Ye, mabota, mpe mangomba izali na mposa ya nguya ya basi ba bosembo. Ya solo, Mpaka M. Russell Ballard ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na babale ateyaki, “Ndeko ya mwasi nyonso kati na Eklezia eye oyo asali mayokani na Nkolo azali na mosala ya bonzambe ya kosalisa na kobikisaka milimo, kokamba basi ba mokili, kolendisa bandako ya Siona, mpe kotonga bokonzi bwa Nzambe.”1

Boko bandeko basi bakoki komituna soki bakoki kosala misala mya lokumu ya boye. Kasi lokola Eliza R. Snow (1804–87), Mosungi wa mibale ya Mokambi wa Lisanga ya Bamama Basungi, alimbolaki “Ezali na ndeko mwasi moko te azali kaka ye moko mpenza, mpe esika ya ye ya nkaka mingi ete akoki te kosala mosala monene mpo na kotia Bokonzi bwa Nzambe na mabele”2 Ndeko mwasi Snow ateyaki lisusu ete Lingomba ya Bamama Basungi ebongisamaki “mpo na kosala mosala nyonso ya malamu mpe ya lokumu.”3

Kosala elongo na Lingomba ya Bamama Basungi etandoli esika ya nguya ya biso na kopesaka na ndeko mwasi moko na moko mabaku mpo na kotonga bondimi, kolendisa mabota mpe ndako, mpe kopesa lisalisi na ndako mpe na mokili mobimba lokola. Mpe esengo, makasi ma biso moko na moko mpe mangomba ya Bamama Basungi isengeli te kozala monene to ya koniata bato, kasi isengeli kozala ya mokano pe ya molende. Misala ya bosembo lokola losambo la moto na moto mpe ya libota, boyekoli ya makomi mokolo na mokolo, mpe na kokumisaka na molende mabiangi ma biso na Eklezia ikosalisa kokolisa bondimi mpe kotonga bokonzi bwa Nkolo.

Na bandeko basi baye bamituni soki misala miye mikomonanaka mya kimia mikosolaka bokeseni, Mpaka Ballard asakoli: “Ndeko mwasi moko na moko oyo atelemi mpo na bosolo mpo bosembo akokitisaka nguya ya bobe. Ndeko mwasi moko na moko oyo akolendisaka mpe akobatelaka libota azali kosala mosala mwa Nzambe. Ndeko mwasi moko na moko oyo azali kowumela lokola mwasi wa Nzambe akomi mwinda mpo na basusu balanda mpe balona nkona ya nguya ya bosembo eye bakobuka zomi na mibu mingi.”4

Uta na Makomi

1 Bakolinti 12:4–18; 1 Timote 6:18–19; Mosiya 4:27; Articles de Foi 1:13

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

Eliza R. Snow, oyo asalaki lokola kalaka ntango Lingomba ya Bamama Basungi libongisamaki na Nauvoo, abiangemaki na Mokambi Brigham Young (1801–77) mpo na kotambola na Eklezia mobimba, kosalisaka baepisikopo kobongisa Lingomba ya Bamama Basungi na bapalwasi na bango.

Ndeko mwasi Snow ateyaki: “Soki bana basi mpe bamama na Yisalaele bayoki ata basuki na bisika ya bango, bakokuta bomoni bonene mpo na nguya mpe bokoki mpo na kosala bolamu boye balatisama mingi koleka na bokabi boluti. … Mokambi Young abalulaki fungola na esika ya mosala enene mpe etandolama mpe ya malamu.”5

Matangi

  1. M. Russell Ballard, “Women of Righteousness,” Liahona, Sanza ya Zomi na mibale 2002, 39.

  2. Eliza R. Snow, “An Address,” Woman’s Exponent, Sanza ya Libwa 15, 1873, 62.

  3. Eliza R. Snow, “Female Relief Society,” Deseret News, mokolo mwa 22, Sanza ya Minei, 1868, 81.

  4. M. Russell Ballard, Liahona, Sanza ya Zomi na Mibale. 2002, 39.

  5. Eliza R. Snow, Deseret News, Sanza ya Minei. 22, 1868, 81.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Boniboni nakoki kosalisa bandeko basi nakei kotala bayeba mpe basala na likoli lya bango mpo na kozala na nguya ya bosembo?

  2. Boniboni ekoki ngai kosalela makabo mpe batalanta ya bobele ngai mpo na kopambola basusu?