2011
Kopona Kozala na Botondi
sánzá ya zómi na míbalé 2011


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Zomi na Mibale 2011

Kopona Kozala na Botondi

Elilingi
Na Mokambi Henry B. Eyring

Tata wa Biso ya Lola atindi biso tozalaka na botondi na makambo manso (tala 1 Batesaloniki 5:18), mpe Ye asengi biso ete topesa botondi mpo na mapamboli tozwi (tala D&A 46:32). Toyebi ete mitindo minso misengeli kopesa biso esengo, mpe toyebi ete kobuka mitindo etindi na bobola.

Yango wana mpo na kozala na esengo mpe koboya bobola, tosengeli kozala na motema ya botondi. Tomoni na bomoi bwa biso mokangano katikati na botondi mpe esengo. Biso banso tokolingaka koyoka botondi, kasi ezali petepete te kokangama na botondi na makambo manso na mimekano mya bomoi. Maladi, bosisoi, mpe kobungisa bato tokolingaka ikoyaka ntango mosusu na bomoi bwa biso. Mawa ma biso ekoki kosala toyoka mpasi komona mapamboli ma biso mpe kolula mapamboli Nzambe azali kobomba mpo na biso mikolo mikoya.

Ezali kpokoso kotanga mapamboli ma biso mpamba te tozali na momesano ya kozwa makambo malamu lokola soki esili kopesamela biso. Ntango tobungisi ndako ya biso, bilei ya kolia, to bolingo ya baninga mpe libota, tososoli boniboni botondi bosengelaki kozala ntango tozalaki na yango.

Mbala mingi, ntango mosusu ezali mpasi mpo na biso kozala na botondi bokoki mpo na makabo manene mingi koleka tozwi: mbotama ya Yesu Klisto, Bomikabi bwa Ye, elaka ya bosekwi, libaku ya kosepela bomoi bwa seko elongo na mabota ma biso, Bozongisi bwa nsango malamu elongo na bonganganzambe mpe fungola ya yango. Bobele na lisalisi lya Molimo Mosantu ekoki biso kobanda koyoka nini mapamboli mana malingi koloba mpo na biso mpe mpo na baye tokolingaka. Mpe lisusu bobele nde tokoki kolikia kozala na botondi mpe koboya kotuka Nzambe na bozangi botondi.

Tosengeli kotuna na losambo ete Nzambe, na nguya ya Molimo Mosantu, asalisa biso komona mapamboli ma biso na polele ata na kati ya mimekano mya biso. Akoki kosalisa biso na nguya ya Molimo kososola mpe kozala na botondi mpo na mapamboli tozwi lokola soki masili kopesamela biso. Nini ekosalisi ngai mingi koleka ezali kotuna Nzambe na losambo, “Elingi Yo kokamba ngai epai ya moto moko nakoki kosalisa?” Ezali na kosalisaka Nzambe kopambola basusu nde nakomonaka mapamboli ma ngai penepene mingi.

Losambo la ngai mbala moko eyanolamaki ntango balongani boko nayebaka kala babengisaki ngai kokende na lopitalo. Kuna nakutaki mwa mwana moke mingi boye ete akokaki kovanda na loboko la ngai. Na bobele mwa mposo ya bomoi, azwaki mapaso mingi. Dokotolo alobaka na baboti ete lipaso ya mpasi mingi esengelaki lisusu mpo na motema mpe fokofoko isimba bomoi na kati ya mwa mwana ona wa Nzambe.

Na bosengi ya baboti, napesaki mwana lipamboli ya bonganganzambe. Lipamboli likwaki elaka ya bomoi ya molai. Mingi koleka kopesa lipamboli, nazwaki lipamboli ngaimei ya motema ya botondi mingi.

Na lisalisi lya Tata wa biso, banso ba biso tokokaki kopona koyoka botondi mingi. Tokoki kosenga Ye asalisa biso komona mapamboli ma biso na polele mingi koleka, na ntango inso ya biso. Mpo na ngai mokolo mona, nalulaki lokola mokolo moko te liboso likamwisi lya mosala mwa motema mpe fokofoko ya ngaimei. Napesaki matondi na nzela ya kozonga ndako mpo na mapamboli na bana ba ngai maye nakokaki komona na polele mingi mazalaki makamwisi ma boboto uta na Nzambe mpe uta na bato balamu nzinganzinga na bango.

Mbala mingi, nayokaki botondi mpo na bosolo bwa mosala mwa Bomikabi na bomoi bwa baboti bana baye batungisamaki mpe na bomoi bwa ngai. Namonaka bolikii mpe bolingo bwa peto bwa Klisto kongengaka na bilongi bya bango, kutu na mokano mwa bango mwa nsomo. Mpe nayokaki bosolo bokoki koyoka soki botuni Nzambe abimisela bino ete Bomikabi bokoki kopesa bino nzela ya koyoka elikia mpe bolingo.

Tokoki banso kopona kopesa botondi na losambo mpe kotuna Nzambe akamba biso kosalisa basusu mpo na Ye—mingimingi na eleko eye ya mobu ntango tokosepelaka mbotama ya Mobikisi. Nzambe Tata apesaki Mwana wa Ye, mpe Yesu Klisto apesaki biso Bomikabi, eleki monene mingi na makabo manso mpe bopesi bonso (tala D&C 14:7).

Kopesaka botondi na losambo ekoki kopesa nzela mpo na komona bonene bwa mapamboli maye mpe mapamboli masusu manso mpe boye kozwa likabo lya motema mwa botondi mingi.

Koteya uta na Etinda Eye

Kokoma mayele mpe mapamboli ma biso ekoki kosalisa biso komikundola mango mpe kopesa biso likambo ya kozongela na nsima. Kanisa kosenga baye bozali koteya bakoma nini bazali na botondi mpo na yango—mpo ete esalisa bango komikundola mapamboli bazwi, kososola mapamboli ma sika, mpe kotala liboso na mapamboli ma nsima.

Bokoki lisusu kolendisa baye bazali koteya balanda ndakisa ya Mokambi Eyring na kosengaka na Tata wa Lola akamba bango na moto moko bakoki kosalisa to kosunga.