2012
Mpiko mpo na Kotelemela mpe Kolonga Mopepe Makasi
sánzá ya yambo 2012


Bolenge

Mpiko mpo na Kotelemela mpe Kolonga Mopepe Makasi

Na butu ya mibale na nganda ya Bilenge Basi ya etuka na ngai, mbula ya mipepe makasi mpe ekumbaki ebetelaki biso. Palwasi na ngai ezalaki na bilenge basi 24 oyo bakendaki na nganda yango elongo na bakambi babale, mpe banso tosengelaki kofinana na mwa bandako ya mike mike mibale mpo na komibatela. Mbula ezalaki kobeta makasi mpe mopepe eyaki na ndenge ya mabe koleka mpenza. Nasengelaki ntango nyonso wana komikundola losambo ya bokengi oyo mokambi ya etuka na biso asalaki na ebandeli. Palwasi na biso mpe lisusu basalaki losambo na biso moko ya lingomba na mwa ndako na biso, mpe nasalaki nsambo ya ngai moko.

Bilenge basi mingi bazalaki kobanga, mpe ezalaki mpasi te ya koyeba mpo na nini. Mwa ndako na biso ya moke ezalaki ya makasi mpenza te, mpe tozalaki penepene ya ebale. Bobele penepene na minuta 20 mopepe makasi eyaki mabe ete etuka mobimba esengelaki kokima uta na bandako na bango ya mike mike mpo na kokende epai na bandako mike ya bapesi toli ya palwasi, iye bandako ezwamaki na mabele ya mwa likolo. Mokambi na ngai ya etuka asalaki losambo mosusu, mpe toyembaki banzembo, banzembo ya bana ya Primaire, mpe banzembo ya nganda mpo na komeka komilendisa biso moko. Iyo, tozalaki kobanga, kasi toyokaki ete makambo manso makozala malamu mpo na banso. Eteni ya ngonga moko nsima makambo mazalaki malamu mpo na kozonga na bandako na biso ya mike mike ya palwasi.

Nsima toyebaki nini esalemaki na ekumbaki yango butu wana. Ekabwanaki na mipepe makasi mibale. Moko na yango[mipepe] mibale ekendeki nzinga nzinga na biso na loboko ya mobali mpe mosusu na loboko ya mwasi. Oyo tozwaki ezalaki mpenza mpasi makasi na yango te!

Nayebi ete Nzambe ayokaki nsambo na biso na butu wana mpe Abatelaki biso uta na mpasi makasi ya mopepe makasi yango. Lolenge nini ekumbaki ekokaki kobwana longola se soki Nzambe alingaki ete esala bongo? Nayebi ete na mipepe makasi ya bomoi, tokoki ntango nyonso kosambela Tata na Likolo mpe Akoyanola biso, kopesaka biso mpiko mpe bobateli oyo tozali na yango mposa mpo ete tolonga na bokengi.