2012
Kokengela mpe Kosalisa Baninga na Nzela ya Mateya ma Botali
sánzá ya yambo 2012


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali, sanza ya yambo, na mobu 2012

Kokengela mpe Kosalisa Baninga na Nzela ya Mateya ma Botali

Yekolani liteya liye, mpe na lolenge esengeli, solola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba lya Bamama Basungi likoma eteni yoko ya mosala na bomoi bwa yo.

Bondimi • Libota • Lisungi

“Bolingani [elingi koloba] mosika koleka mayoki ya boboto epai ya moto mosusu,” eteyaki Mokambi Henry B. Eyring, Mosungi ya Yambo na Bokambi ya Yambo. “Bolingani ewuti na bondimi ya Nkolo Yesu mpe ezali mbano ya Bomikabi bwa Ye.”1 Mpo na bandeko basi ba Lingomba ya Bamama Basungi, kotala mpe koteya baninga ezali bolingani na misala, yoko nzela monene ya kosalelaka bondimi na bison na Mobikisi.

O nzela ya kotala mpe koteya bamama, tozali kokokisa mosala ya kokengela na kokutanaka na ndeko mwasi moko moko, kokabolaka etinda ya nsango malamu, mpe na kolukaka koyeba bamposa na ye mpe ya libota na ye “Mateya ya botali ekomaka mosala mwa Nkolo ntango tofandisi makanisi na biso na bato na esika ya makambu tokozwa,” elimboli Julie B. Beck, mokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi. “Solo mpenza, mosala ya mateya ma botali esilaka te. Ezali mingi lolenge ya kotambwisa bomoi koleka mosala. Kosalela na botongono lokola bamama bateyi mpe batali ezali elembo ya kozala bayekoli mpo na biso.”2

Wana ekokengela biso baninga ntango nyonso mpe na nzela ya losambo, tokoyekola malamu koleka lolenge ya kosalisa mpe kokokisa mposa ya ndeko mwasi moko moko mpe ya libota na ye. Kosalisa ekoki kozala ya ndenge mingi—boko masalisi ya minene mosusu ya monene te. “Mbala mingi misala ya mike mike ya bosalisi ezali nyonso oyo esengeli mpo na kotombola mpe kopambola moto mosusu: motuna ya koyeba boni libota ya moto mosusu ezali, maloba ya kolendisa na lombangu, kopesa moninga mwa lokumu uta na motema, mwa maloba moke ya matondi, libiangi ya telefone ya moke,” eteyaki Mokambi Thomas S. Monson. “Soki tozali bato oyo batalaka malamu mpe bayebi makambo maye, mpe soki tozali kosala engebene na bitinda biye biyelaka biso na molimo, tokoki kokokisa bolamu mingi. … Misala ya bolambu miye mikokisami na limpinga mobimba ya bateyi ya Lingomba ya Bamama Basungi mizali ya kotanga te.”3

Uta na Makomi

Yoane 13:15, 34–35; 21:15; Moziya 2:17; Doctrine et Alliances 81:5; Moise 1:39

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

Na mobu 1843, bandimi ba Eklezia na Nauvoo, Illinois bakabolanaki na palwasi minei. Na Sanza ya Sambo ya mobu mona, bakambi ba Lingomba ya Bamama Basungi baponaki lisanga ya bandeko basi banei mpo na palwasi moko na moko. Kati na mikumba ya lisanga ya bama batali yango etangami kotuya mposa ya bandeko mpe kosangisa makabo. Lingomba ya Bamama Basungi esalelaki makabo maye mpo na kosalisa bakeleli.4

Wana ezali bango kokende kotala baninga, bateyi bakongolaka lisusu makabo te, batikali kaka na mokumba ya kotuya bamposa —ya molimo mpe ya ntango—mpe kosala mpo kokokisa bamposa ya baye wana. Eliza R. Snow (1804–87), mokambi monene ya mibale ya Lingomba ya Bamama Batali mpe Basungi alimbolaki ete: “Moteyi … asengeli solo mpenza kozala na Molimo mwa Nkolo ntango azali kokota na ndako wana ezali ye kokota na ndako mpo na koyeba molimo nini akokuta kuna na kati. … Bondela mingi liboso ya Nzambe mpe Molimo Mosantu mpo na kozwa [Molimo] ete okokoka koyeba molimo nini oyo ezali koyangela na ndako wana … mpe okoka koyoka makasi ya kobimisa maloba ya kimiza mpe bolendisi, mpe soki okuti ndeko mwasi koyokaka malili, ozwa ye na motema nay o lokola okomema mwana moke na ntolo na yo mpe koyokisa ye moto.”5

Matangi

  1. Henry B. Eyring, “The Enduring Legacy of Relief Society,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2009, 124–25.

  2. Julie B. Beck, “Relief Society: A Sacred Work,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2009, 111.

  3. Thomas S. Monson, “Three Goals to Guide You,” Liawona, Sanza ya Zomi na moko 2007, 118.

  4. Tala Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 105.

  5. Eliza R. Snow, na Daughters in My Kingdom, 108.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Nini nazali kosala mpo na kosalisa bandeko na ngai ya basi mpe bayoka ete nazali moninga na bango oyo alingaka mpe asalisaka bango?

  2. Lolenge nini nakoki kokoma malamu koleka na kokengelaka mpe kosalisaka basusu?