2012
Kozala na Bomoi ya Mingi mpenza
sánzá ya yambo 2012


Etinda ya Bokambi ya yambo, sanza ya yambo na mbula 2012

Kozala na Bomoi ya Mingi mpenza

Na boyei ya mbula ya sika, nabeti mondenge na Basantu ba Mikolo mya Nsuka na bisika binso ete babanda esenge moko ya bango moko, ya etingya mpe ya monene mpo na oyo nabengi bomoi ya mingi mpenza—bomoi etonda na elonga, bolamu, mpe mapamboli ya mingi mpenza. Kaka lokola toyekolaka ABC na eteyelo, nazali kopesa ABC ya ngai moko mpo na kosunga biso banso kozwa bomoi ya mingi mpenza.

Zala na Ezalela Kondima Malamu Mpenza

letele A na ABC na ngai ezali kolobela ezaleli. William James, moko moteyi bizaleli mpe makanisi ya Amerika, akomaki ete, “Bobongwani ya monene koleka nyonso ya nkola na biso ezali bobomboli ete bato, wana ebongoli bango bizaleli ya kati ya mayele na bango, bakoki kobongola bioteni oyo ezali komonana na miso ya bomoi na bango.”1

Makambo mingi na bomoi na biso matali ezaleli na biso. Lolenge toponi kotala makambo mpe lolenge tozali kopesa biyano na makambo mosusu nde esalaka bokeseni bonso. Mpo na kosala ya malamu koleka nyonso oyo tokoki kosala mpe nsima kopona kozala na esengo na makambo manso makweyeli biso, ezala makambo soki nini, ekoki komema kimia mpe bosepeli.

Charles Swindoll—mokomi, molakisi, mpe Moklisto mopanzi nsango malamu monene—alobaki ete: “Ezaleli, mpo na ngai, ezali monene koleka … oyo eleka, … koleka mosolo, koleka makambo, koleka bozangi kolonga, koleka elonga, koleka nini oyo bato mosusu bazali kokanisa to kosala. Ezali monene koleka oyo ezali komonana na miso, koleka kobotama na makoki, to kozala na makoki. Ekosala to kobebisa kompani, eklezia, to ndako. Eloko ya monene koleka ezali ete tozali mokolo nyonso na makoki ya kopona mpo na oyo etali ezaleli oyo to kozala na yango mokolo mona.”2

Tokoki te kolakisa nzela na mopepe, kasi tokoki bobele kobongisa elamba oyo etambwisaka masuwa. Mpo na kozwa esengo, kimia, mpe bosepeli, tika ete topona ezaleli ya malamu.

Zala na Kondima na Yo moko

Letele B ezali mpo na kozala na kondima—na yo moko, na baoyo bazali nzinga nzinga na yo, mpe na mabongisi ya seko.

Zala sembo na yo moko, na basusu, mpe na Tata na yo na Likolo. Moko oyo azalaki sembo na Nzambe te kino ntango elekaki nyonso ezalaki Episikopo monene Wolsey oyo, engebene na Shakespeare, alekisaki ntango molai ya bomoi na kosalelaka bayangeli misato mpe asepelaki na nkita mpe nguya. Na nsuka, abotolamaki na nguya mpe bozwi bwa ye na mokonzi oyo azalaki na bompikiliki te. Episikopo monene Wolsey alelaki ete:

Soki nasalelaka Nzambe na ngai na ndambo ya mpila

Nasalelaki mokonzi wa ngai, Akokaki te na mbula oyo ya ngai

Kotika ngai bolumbu na banguna ba ngai.3

Thomas Fuller, moto ya eklezia mpe mokomi ya mambi ya kala oyo azalaki na ekeke ya 17 koleka, akomaki makambo ma solo maye ete: “Azangi kondima ezali oyo azali kotambwisa bomoi na ye te engebene na boyambi na ye.”4

Komimonisa yo moko te ete osuki mpe kotika basusu bandimisa yo te ete osuki na nini okoki kosala. Zala na kondima na yo moko mpe tambwisa bomoi na yo na lolenge ete okoka kokoma na makoki ma yo manso.

Okoki kokokisa nini ondimi okoki kokokisa. Tia motema na yo mpe ndima mpe zala na bondimi.

Bunda na Mikakatano na Mpiko

Mpiko ezali ezaleli malamu ya motuya mpe ya ntina monene ntango bato bazali kotala yango mingi lokola bolingi ya komipesa liwa kasi lokola mokano ya kozala na bomoi na ndenge elongobani.

Lokola kaka elobaki mokomi masolo mpe mokomi ntoki ya Amerika Ralph Emerson ete: “Nyonso okosala, osengeli koyika mpiko. Nzela nyonso okolinga kolanda, ezali ntango nyonso na moto moko oyo akoyebisa yo ete ozali na nzela ya mabe. Ntango nyonso ezali na pkokoso oyo ekobima mpe ekosenginia yo mpo na kondima ete bato oyo bazali kotonga yo bazali koloba solo. Mpo na kobongisa nzela ya kosala mpe kolanda yango kino nsuka esengeli ndambo mpiko se moko soda asengeli kozala na yango. Kimia ezalaka na elonga na yango, kasi esengaka babali mpe basi kolonga yango.”5

Ekozala na ntango wapi okobanga mpe okozanga mpiko. Okoki koyoka ete osili kolongama. Kozanga kozwa elonga ekoki komonana lokola bozito monene koleka. Ntango wana okoyoka lokola Dawidi komekaka kobunda na Goliati. Kasi kobosana te—Dawidi alongaki solo mpenza!

Mpiko esengeli mpo na kobwaka matambe ma yambo o nzela ya kokokisa mwango to ntina oyo olulaki, kasi kutu esengeli mpiko enene ntango moto atuti libaku mpe asengeli kosala makasi mbala ya mibale mpo na kokokisa yango.

Zala na mokano ya kosala makasi,motema bobele moko ya kosala mpo na kokokisa ntina ya malonga, mpe mpiko bobele mpo na kobunda na mikakatano miye mizangaka te koya kasi mpe lisusu kosala makasi mpo na mbala ya mibale, soki eloko ya lolenge lona esengeli. “Ntango mosusu mpiko ezali se mwa mongongo ya moke wana oyo eyaka na nsuka ya mokolo kolobaka, ‘Nakomeka lisusu lobi.’”6

Tika ete tomikundola ba ABC oyo wana ezali biso kobanda mobembo na biso mpo na koyingela na mbula ya sika, kolonaka ezaleli malamu ya kondima, boyambi ete tokoki kokokisa miango mpe mikano na biso, mpe mpiko ya kobunda na mikakatano nyonso soki nini miye mizali koya na nzela na biso. Bongo bomoi ya mingi mpenza ekozala ya biso.

Matangi

  1. William James, na Lloyd Albert Johnson, comp., A Toolbox for Humanity: More Than 9000 Years of Thought (2003), 127.

  2. Charles Swindoll, na Daniel H. Johnston, Lessons for Living (2001), 29.

  3. William Shakespeare, King Henry the Eighth, act 3, scene 2, lines 456–58.

  4. Thomas Fuller, na H. L. Mencken, ed., A New Dictionary of Quotations (1942), 96.

  5. Ralph Waldo Emerson, na Roy B. Zuck, The Speaker’s Quote Book (2009), 113.

  6. Mary Anne Radmacher, Courage Doesn’t Always Roar (2009).

Koteya uta na Etinda Oyo

Tala lolenge nini okoki kobianga bato ya libota kokabola mayele ya mosala ya bango moko ntango ezaleli malamu ya kondima, ya boyambi na bango moko, to ya mpiko esalisaki bango. To bianga bango kozwa bandakisa ya mabongisi misato oyo kati na makomi. Okoki komilengele na kokanisaka o nzela ya losambo mpo na koteya uta na makomi to mayele mosala na yo moko.