2013
Koyoka Bitinda
sánzá ya yambo 2013


Bilenge

Koyoka Bitinda

Butu moko ndeko na ngai ya elenge ya libota na biso akimaki ndako, yango wana nakendeki mbangu koluka ye. Wana ezalaki ngai kokumba motuka, nazalaki kosambela ete Molimo asalisa ngai. Nayebaki ete Nkolo akoyanola mpe akokamba ngai, mpe namekaki koyoka bitinda ya Molimo. Kasi ntango nakokaki koyoka eloko moko te, nabandaki kozanga elikya mpe nayokaki ete Molimo azalaki kotinda ngai te.

Atako nalingaki kokende mosika mpo na koluka, nayokaki ete nasengelaki kotikala na esika nzinganzinga ya ndako ya ndeko na ngai. Boye nazwaki mokano ya kokumba motuka nzinganzinga na esika yango mbala moko lisusu. Wana etelamaki ngai na bokutani ya banzela, namonaki elilingi ya elenge mwasi kotambolaka. Namonaki Ndeko na ngai!

Ntango nabimaki na motuka mpe nakimaki epai na ye, nasosolaki ete Molimo azalaki kokamba ngai nzela nzela kosalisaka ngai koyoka ete nasengelaki kotikala na esika yango kaka. Lokola nazalaki koyoka mongongo moko ya moke, mbele nabosanaki bitinda ya Molimo. Nsima nasosolaki ete mbala mingi tokoyoka mongongo moko te na matoyi, kasi tokoyoka mayoki na mitema.

Nazalaki na matondi mingi mpo na bokambi ya Molimo. Solo mpenza Azali ntango nyonso wana! Lokola elobi makomi, “Molimo Mosantu akozala moninga na yo ya ntango nyonso” D&A 121:46).

Soki tolongobani mpo na kokambama na Molimo mpe tosali keba, tokoki kozala bisalelo na maboko ya Nzambe mpo na kosala malamu mpo na bato mingi. Na lisalisi ya Molimo lokola moninga ya ntango nyonso, tokoyeba nzela tosengeli kokende.