2013
Mongongo ya Nkolo
sánzá ya yambo 2013


Etinda ya Bakambi ya yambo, Sanza ya yambo 2013

Mongongo ya Nkolo

Elilingi
Na Mokambi Henry B. Eyring

Buku ya Doctrine et Alliances ezali kobenga bato nyonso na bisika nyonso mpo na koyoka mongongo ya Nkolo Yesu Klisto (tala D&A 1:2, 4, 11, 34; 25:16). Etondisami na bitinda, makebisi, mpe malendisi ma Ye ya koyika mpiko mapesami na nzela ya bobimisi na baprofeta baponami. Na mabimisi oyo tokoki komona lolenge nini Nzambe akoki koyanola nsambo na biso ya bondimi na bansango ya malakisi, kimia, mpe bokebisi.

Na nsambo na biso tolukaka koyeba nini Nzambe alingi biso tosala, nini tosengeli kosala mpo na kozwa kimia mpe esengo na bomoi oyo mpe na mikolo mikoya, mpe nini ezali liboso na biso. Buku ya Doctrine et Alliances etondisami na biyano mpo na mituna ya boye, miye mitunami na bato ba lolenge nyonso mpe na baprofeta na nzela ya losambo na bomikitisi. Ekoki kozala mokambi ya motuya mpo na koteya biso lolenge kani kozwa biyano na mituna mitali bolamu na biso ya ntango mpe lobiko na biso ya seko.

Bomikitisi mpe bondimi na Nkolo Yesu Klisto ezali na ntina monene. Oliver Cowdery azwaki eyano uta na Nkolo mpo na oyo etali mposa na ye ya kosalisa na mosala ya kobongola Buku ya Mormon: “Mikundola ete na kozangaka bondimi okoki kosala eloko moko te; yango wana senga na bondimi. Kosakana te na makambo oyo, kosenga te maye yo osengeli te” (D&A 8:10).

Mbala mingi na Doctrine et Alliances, Nkolo azali kosenga bondimi mpe bomikitisi yambo Ye apesa lisalisi na Ye. Moko ya ntina mpo na oyo ezali ete biyano na Ye ekoki te koya na lolenge tozali kozela. Mpe ekozala ntango nyonso pete te mpo na kondima.

Mambi ma kala ya Eklezia mpe maye bankoko na biso bamonaki ezali kotalisa bosolo oyo. Tata ya Nkoko na ngai Henry Eyring asambelaki makasi mpo na koyeba nini asengelaki kosala ntango ayokaki nsango malamu ezongisami koteyama na mobu 1855. Eyano eyaki na ndoto.

Alotaki ete afandaki na mesa elongo na Mpaka Erastus Snow ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale mpe elongo na mpaka moko na nkombo ya William Brown. Mpaka Snow ateyaki mabongisi ya nsango malamu mpo na ntango emonanaki lokola ngonga moko. Nsima Mpaka Snow alobaki, “Na nkombo ya Yesu Klisto natindi yo obatisama mpe moto oyo [Mpaka Brown] … akobatisa yo.”1 Libota na ngai ezali na botondi ete Henry Eyring azalaki na bondimi mpe bomikitisi ya kobatisama na 7:30 ya ntongo na liziba ya mai ya mvula na mboka St. Louis, Missouri, USA, na Mpaka Brown.

Eyano na losambo eyaki te na mongongo ya koyokama uta na Nkolo. Eyaki na limoni mpe na ndoto na butu, lokola esalamaki na Lehi (tala 1 Nefi 8:2).

Nkolo ateyaki biso ete biyano bikoki lisusu koya lokola mayoki. Na Doctrine et Alliances, Ye ateyaki Oliver Cowdery ete, “Tala, nakoyebisa yo na molimo na yo mpe na motema na yo, na nzela ya Molimo Mosantu, oyo akoya likolo na yo mpe oyo akofanda na motema na yo” (D&A 8:2).

Mpe Ye alendisaki Oliver na lolenge oyo: “Elobaki ngai te kimia na molimo na yo na ntina ya makambo yango? Litatoli monene nini okoki kozala na yango soki uta na Nzambe te?” (D&A 6:23).

Doctrine et Alliances, mambi ma kala ya Eklezia, mpe lisolo ebombamaki na Henry Eyring na misio na ye kaka nsima ya libatisi na ye eteyi ngai ete biyano bikoki koyokisama lokola makebisi mpe lisusu lokola kimia.

Na sanza ya Minei ya mobu 1857, Mpaka P. Pratt ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale akendeki na likita moko na oyo ezali sikawa Oklahoma, USA. Henry Eyring akomaki ete mayele ya Mpaka Pratt “etondisamaki na mayoki ya molili na motema … , kokokaka te kososola maye makoya to nzela kani mpo na kokimela.”2 Henry azwaki sikasikawana nsima nsango ya mawa ya liwa ya martiru ya Apostolo. Atako mayoki ya likama wana Mpaka Pratt akendeki liboso na mobembo na ye, kaka lokola esalaka Profeta Joseph na kokendaka na Carthage.

Ezali litatoli na ngai ete Nkolo ayanolaka ntango nyonso nsambo ya bondimi kati na bomikitisi. Doctrine et Alliances mpe boyebi ya moto na moto ezali koteya biso lolenge nini kokitola biyano wana mpe kondima yango kati na bondimi, ezala lokola bokambi, kondimisa bosolo, to likebisi. Nasambeli ete toyokaka ntango nyonso mpe tokitolaka mongongo ya bolingo ya Nkolo.

Matangi

  1. “The Journal of Henry Eyring: 1835–1902” (nkoma ebimisami naino te mpe ezali naino na maboko ya mokomi).

  2. “The Journal of Henry Eyring: 1835–1902.”

Koteya uta na Etinda Oyo

1. Kanisa kotanga elongo biteni biye etali losambo na etinda oyo. Wana ezali yo kotanga, senga bato ya libota bayoka malamu boniboni Nzambe ayanolaka Nsambo. Kanisa kotatola na ntina ya motuya ya losambo.

2. Doctrine et Alliances etondisami na biyano na mituna mitunami na bato na losambo. Nini soki biyano na mituna na bango (mabimisi) ekomamaka ata moke te? Lendisa libota bayekola kososola mpe kolanda bitinda ya Molimo. Bakoki kolinga kokoma makanisi na bango matali losambo na bazulunale na bango.