2013
Mosala ya Misionele
sánzá ya yambo 2013


Etinda ya Bamama BatALi mpe BatEYi, Sanza ya yambo 2013

mosala ya misionele

Yekola liteya oyo na losambo mpe, na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yomei. Mpo na kozwa nsango mingi, kende na www.reliefsociety.lds.org.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Basantu ba Mikolo mya Nsuka batindami “kosala na bilanga ya vinio [ya Nkolo] mpo na libiki ya milimo ya bato” (D&A 138:56), kati na oyo totangi mosala ya misionele. Tosengeli te kozela libiangi ya misionele uta na bakonzi mpo na kokabola nsango malamu. Basusu oyo kani bomoi ekopambolama na nsango malamu bazali nzinganzinga na biso, mpe wana ezali biso komilengela, Nkolo akosalela biso. Bamama batali mpe bateyi bakoki kayamba mikumba na bango ya molimo mpe kosalisa “kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko mpo na moto” (Mose 1:39).

Ntango Profeta Joseph Smith abongisaki Lingomba ya Bamama Basungi na mobu 1842, alobaki ete basi bazali kaka te mpo na kobatela babola kasi lisusu mpo na kobikisa milimo.1 Oyo ezali lisusu ntina na biso.

“Nkolo … apesaka litatoli ya bosolo na baye bakokabola yango na basusu,” elobaki Mokambi Dieter F. Uchtdorf, Mosungi ya Mibale na Bokambi ya Yambo. “Kutu lisusu, Nkolo azali kozela ete bandimi ya Eklezia na Ye ‘bafungola [minoko na bango] na ngonga nyonso, kosakolaka nsango malamu [na Ye] na mingongo ya esengo’ (D&A 28:16). … Ntango mosusu mwa liloba moko ya litatoli ekoki kotia kotambwisa makambo oyo makobongola bomoi ya moto moko mpo na seko.”2

Uta na Makomi

Doctrine et Alliances 1:20–23; 18:15; 123:12

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

Lisolo ya Olga Kovářová awutaka na Czechoslovakia azali ndakisa ya mosala ya misionele mpo na mondimi uta na lisolo ya Lingomba ya Bamama Basungi. Na mibu 1970, Olga azalaki moyekoli na nzela ya kokoma dokotolo kasi na nzala mpo na oyo etali bomoi ya molimo ya mozindo mingi. Amonaki Otakar Vojkůvka, Mosantu ya Mokolo ya Nsuka ya mibu 75. “Na mibu na ye amonanaki epai na ngai na ntuku sambo na mitano kasi na motema na ye penepene na zomi na mwambe mpe atonda na esengo,” elobaki ye. “Oyo ezalaki mpenza momesano te na mboka Czechoslovakie na ntango wana ya ezalela ya komonaka mabe na nyonso.”

Olga atunaki Otakar mpe libota na ye lolenge nini bazwaki esengo. Balakisa ye epai ya bandimi mosusu ya Eklezia mpe bapesaki ye Buku ya Mormon. Atangaki yango mpe abatisamaki nokinoki mpe akulaki na nkotisa. Uta ntango wana Olga azali na nguya moko ya kosala bolamu na mokili ya monyokoli ya politiki mpe ya biyamba. Asalaki lokola mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi na mwa etape na ye mpe asalisaki kobikisa milimo ya basusu na komemaka bango epai ya Klisto.3

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Ezali ngai kolanda bitinda ya Molimo Mosantu ntango nakokabolaka litatoli na ngai elongo na bandeko basi nakokendaka kotala?

  2. Lolenge nini nazali kosalisa bandeko basi nakengelaka koyekola nsango malamu?

Matangi

  1. Tala Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 453.

  2. Dieter F. Uchtdorf, “Waiting on the Road to Damascus,” Liahona, Sanza ya mitano 2011, 76–77.

  3. Tala Daughters in My Kingdom: he History and Work of Relief Society (2011), 92–95.