2013
Botosi Ememaka Mapamboli
sánzá ya mítáno 2013


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Mitano 2013

Botosi Ememaka Mapamboli

Boyebi ya bosolo mpe biyano na mituna ya minene koleka na biso eyelaka biso ntango tozali na botosi na mitindo ya Nzambe.

Bandeko babali mpe bandeko basi, botondi kani nazali na yango ya kozala elongo na bino na ntongo ya lelo. Nazali koluka litomba na bondimi mpe losambo na bino lokola nazwi libaku ya koloba na bino.

O ntaka ya bikeke, babali mpe basi bazali se koluka boyebi mpe bososoli ya bomoi oyo ya kufa mpe esika mpe ntina na bango kati na yango, nzela ya kimia mpe ya esengo mpe lokola. Boluki ya boye ezali oyo moko na moko na biso azali kosala.

Boyebi mpe bososoli yango ezali komonana mpo na bato nyonso. Ezwami na babosolo oyo ezali ya seko. Na Doctrine et Alliances, eteni ya 1, nzela ya kotanga 39, totangi, “ Mpo tala, Nkolo azali Nzambe, mpe Molimi apesi litatoli, mpe litatoli ezali ya solo, mpe bosolo ekotikala libela na libela.”

Mokomi moko ya ntoki akomaki:

Atako lola elongwe mpe maziba ya mabele maziki,

Bosolo, liboke mobimba ya bozali, ekolonga mabe ya koleka manso,

Ya seko, ekobongwana te, seko na seko.1

Boko bato bakokaki kotuna, “Bosolo ya boye ekozwama wapi, mpe tosengeli koyeba yango lolenge boni?” Na bobimisi moko epesamaki na nzela ya Pofeta Joseph Smith na Kirtland, Ohio, na sanza ya mitano ya mobu 1833, Nkolo asakolaki ete:

“Bosolo ezali boyebi ya makambo lokola mazali, mpe lokola mazalaki, mpe lokola masengeli kozala. …

“Molimo ya bosolo ezali ya Nzambe. …

“Mpe moto te akozwa litondi longola se soki abateli mitindo na ye.

“Ye oyo abatelaka mitindo [ya Nzambe] akozwa bosolo mpe pole, kino akembisami na bosolo mpe ayebi makambo manso.”2

Elaka nini oyo ya nkembo! “Ye oyo abatelaka mitindo [ya Nzambe] akozwa bosolo mpe pole, kino akembisami na bosolo mpe ayebi makambo manso.”

Ntina ezali te mpo na bino to mpo na ngai, na ekeke oyo ya boyebi mingi ntango litondi ya nsango malamu ezongisami, konana na mbu ezanga nzela to kosala mobembo na nzela ezanga bilembo ya kolanda mpo na koluka bosolo. Tata moko ya bolingo na Lola alakisaki nzela na biso mpe apesaki bokambi oyo ekoki soki moke te kobungisa biso—kutu botosi. Boyebi ya bosolo mpe biyano na mituna na biso ya minene koleka ekoyela biso ntango tozali na botosi na mitindo ya Nzambe.

Tokoyekola botosi na nzela ya bomoi na biso. Kobanda ntango tozali bilenge mpenza, baoyo bazali na mokumba mpo na kolengela biso bakotia nzela ya bokambi mpe mibeko mpo na koyeba ete tozali na bokengi. Bomoi elingaki kozala pete mpo na biso banso soki tolingaki kotosa mpenza mibeko ya boye. Mingi na biso, nzokande, tokoyekola bwania ya kozala na botosi na nzela ya makambo tokokutana na yango.

Ntango nazalaki kokola, na eleko ya elanga nyonso uta ebandeli ya Sanza ya sambo kino Sanza ya libwa, libota na ngai evandaki na mwa ndako na biso ya mabaya na Vivian Park na Provo Canyon na Utah.

Moko ya baninga na ngai ya makasi na mikolo mina ya kozanga makanisi na canyon azalaki Danny Larsen, oyo ya ye libota ezalaki mpe na mwa ndako ya mabaya na Vivian Park. Mokolo na mokolo ye mpe ngai totambolaki na paradiso ya mwana mobali oyo, kolobaka mbisi na moluka mpe na ebale, kokongolaka mwa mabanga mpe biloko mosusu ya motuya, kowayawaya, komataka, mpe bobele kosepela minuti na minuti ya ngonga na ngonga ya mokolo na mokolo.

Ntongo moko Danny mpe ngai tokanaki kolinga kosala nganda ya mpokwa moko wana elongo na baninga na biso ya canyon. Tosengelaki bobele kopetola esika moko na bilanga ya mpembeni wapi tokokaki kosangana banso. Matiti ya Sanza ya motoba oyo ezipaki bilanga ekomaki ya kokawuka mpe nsendensende, kokomisaka bilanga mpasi mpo na kokokisa mokano na biso. Tobandaki kobenda matiti wana ya milai, kokanaka kopetola esika ya monene nzinganzinga. Tobendaki-bendaki na makasi na biso manso, kasi nyonso tokokaki kolongola ezalaki mwa liboke ya matiti mabe ya makasi. Toyebaki ete mosala oyo ekokaki kozwa mokolo mobimba, mpe bokasi mpe nsai na biso esilaki kobanda kolemba.

Mpe nde oyo nakanisaki ezalaki eyano ebonga nie eyaki na kati ya mayele ma ngai ya mwana ya mibu mwambe. Nalobaki na Danny, “Nyonso tosengeli ezali kotia matiti mabe oyo moto. Tokotia bobele moto na zolongano moko ya matiti mabe!” Nokinoki andimaki, mpe nakimaki na mwa ndako na biso mpo na kozwa alimeti.

Longola se soki moko na bino akanisi ete na mibu mwambe ya bomwana tozalaki na ndingisa te ya kosalela alimeti, nalingi kotia polele ete Danny mpe ngai topekisamaki kosalela yango na bakolo te. Biso mibale tokebisamaki mbala na mbala na makama ya moto. Nzokande, nayebaki wapi libota na ngai babombaki alimeti, mpe, tozalaki na mposa ya kopetola elanga wana. Na kozangaka kokanisa mbala mibale, nakimaki na ndako na biso ya mabaya mpe nazwaki mwa banzete ya alimeti, kosalaka keba ete moto moko te azalaki kotala. Noki nabombaki yango na moko ya mabenga na ngai.

Nazongaki mbangu epai ya Danny, na esengo ete na libenga na ngai nazalaki na eyano na kpokoso na biso. Namikundoli kokanisaka ete moto ekopela bobele mosika wapi esika tolingaki mpe nde na mwa lolenge ya zoloka elingaki kokufa yango moko.

Nabetaki alimeti moko na libanga mpe natumbaki matiti ya Sanza ya motoba. Epelaki lokola soki ezindisamaki na esansi. Liboso Danny mpe ngai tosepelaki na komonaka matiti mabe kolimwa, kasi noki emonanaki polele ete moto ezalaki te penepene ya kozima yango moko. Tobangaki mpenza ntango tomonaki ete ezalaki na eloko moko te oyo tokokaki kosala mpo na kokanga yango. Ndemo ya moto ya kobangisa ebandaki kolanda matiti ya zamba likolo na mopanzi ya ngomba, kobebisaka banzete ya pomi mpe biloko binso mosusu na nzela na yango.

Na nsuka tozalaki na nzela mosusu ya kopona te bobele kokima mpo na koluka lisalisi. Nokinoki mibali mpe basi banso bazwamaki na Vivian Park bazalaki kokima liboso mpe nsima na basaki ya kapo ya mai, kobetaka ndemo ya moto mpo na komeka koboma yango. Nsima ya bangonga mingi makala ya moto ya nsuka ekufaki. Banzete ya kala ya pomi ebikisamaki, bandako oyo ndemo ya moto elingaki na nsuka kozwa mpe lokola.

Danny mpe ngai toyekolaki mateya mingi ya makasi kasi ya motuya mokolo wana—moko na yango ya moke koleka te ezalaki motuya ya botosi.

Ezali na mitindo mpe mibeko miye mikosalisa na ntembe te mpo na bokengi ya nzoto na biso. Lolenge moko, Nkolo apesi masungi mpe mitindo mpo na kosalisa ya biso bokengi na molimo mpo ete tokoka na elonga kotambola na bomoi ya kufa oyo mbala mingi ebombi makama mingi kati na yango mpe na nsuka kozonga epai ya Tata na biso na Lola.

Bikeke bileki, na nkola moko ekangama na momesano ya mbeka ya niama, Samwele na mpiko nyonso alobaki: “Kotosa eleki malamu mbeka, mpe kotia bokebi ezali malamu mingi koleka mafuta ya meme.”3

Na eleko oyo, Nkolo abimisaki na Profeta Joseph Smith ete Ye asengeli “motema mpe mayele ya bolingi; mpe moto ya bolingi mpe botosi akolia biloko ya mboka Siona na mikolo ya nsuka.”4

Baprofeta banso, ya kala mpe ya sikawa, bayebi ete botosi ezali na ntina mpo na lobiko na biso. Nefi asakolaki ete, “Nakokende, mpe nakosala makambo maye Nkolo atindi.”5 Atako basusu balembaki na bondimi mpe botosi na bango, ata mbala moko te Nefi alembaki kosala oyo Nkolo asengaki ye. Bankola ya kotanga te esila kopambolama na mbano wana.

Lisolo moko ya botosi oyo ya koningisa molimo ezali oyo ya Abalayama mpe Yisaka. Boniboni ezalaki likambo ya kpokoso mpe mpasi esengelaki kozala mpo na Abalayama, na botosi na mitindo ya Nzambe, kokamata mwana wa ye ya bolingo Yisaka na kati ya mboka Moliya mpo na kokaba ye lokola mbeka. Ekoki biso kobanza bozito ya motema mwa Abalayama ntango asalaki mobembo na esika etangamaki? Na ntembe te nsomo esengelaki koningisa nzoto na ye mpe koniokola mayele na ye ntango akangaki Yisaka, atiaki ye na lotale, mpe akamataki mbeli na ye mpo na koboma ye. Na bondimi ya koningana te mpe elikya ya mobimba na Nkolo, ayanolaki na etinda ya Nkolo. Nkembo ya lolenge kani ezalaki esakola, mpe lolenge nini ya kokamwa ayambaki ye maloba mabimaki ete: “Kotia loboko na yo na mwana te mpe kosala ye eloko moko te, mpo ete sikawa nayebi ete obangi Njambe, mpo ete oboyi kopesa mwana na yo te, mwana na yo na likinda”6

Abalayama amekamaki mpe ayungulamaki, mpe mpo na botongono mpe botosi na ye Nkolo apesaki ye elaka oyo ya nkembo: “Mabota yonso na nse bakopambolama mpo na bana na yo, mpo ete yo osili kotosa monoko na ngai.”7

Atako tosengamaki te kolakisa botosi na biso na lolenge ya nsomo mpe ya mpasi na motema, botosi esengelami na biso mpe lokola.

Lokola esakolaki Mokambi Joseph F. Smith na sanza ya zomi na 1973, “Botosi ezali mobeko ya yambo ya lola.”8

Lokola elobaki Mokambi Gordon B. Hinckley, “Esengo ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, kimia ya Basantu ba Mikolo mya nsuka, bomengo ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, mpe lobiko ya bonetoli ya bato oyo evandi na kotambolaka na botosi na toli ya … Nzambe.”9

Botosi ezali elembo ya baprofeta; yango epesi bango bokasi mpe boyebi o ntaka ya bikeke. Ezali na ntina monene mpo na biso koyeba ete biso, mpe lokola, tozali na likoki ya kotoka na liziba oyo ya bokasi mpe boyebi. Ezali komonana mpo na moko na moko na biso lelo ntango totosi mitindo ya Nzambe.

O ntaka ya mibu, nayebi bato mingi, moko na moko oyo bazalaki mpenza na botongono mpe na botosi. Nasili kopambolama mpe kofulama na bango. Tika nakabola na bino lisolo ya bato mibale ya lolenge oyo.

Walter Krause azalaki mondimi ya molende ya Eklezia oyo, elongo na libota na ye; bavandaki na oyo eyebanaki lokola Allemagne de l’Est nsima ya Etumba Enene ya Mibale. Atako minyokoli bakutanaki na yango na ntina ya bozangi bonsomi na esika wana ya mokili na ntango yango, ndeko mobali Krause azalaki moto oyo alingaki mpe asalelaki Nkolo. Akokisaki na botongono mpe mobimba mosala nyonso epesamaki na ye.

Moto mosusu, Johann Denndorfer, mobotami ya Ungaria, abongwanaki na Eklezia na Allemagne mpe abatisamaki kuna na 1911 na mibu 17. Ntango mingi te nsima azongaki na Ungaria. Nsima ya Etumba Enene ya Mibale, amimonaki lokola mokangemi na mboka na ye ya kobotama, na engumba Debrecen. Bonsomi ebotolamaki lisusu na bato ya Ungaria.

Ndeko mobali Walter Krause, oyo ayebaki te Ndeko mobali Denndorfer, azwaki mosala ya kozala moteyi na ndako mpe ya kotala ye mbala na mbala. Ndeko mobali Krause abiangaki moninga wa ye koteya na libota mpe alobaki na ye, “Tozwi mosala ya kotala Ndeko mobali Johann Denndorfer. Ekozwa yo ntango ya kokende elongo na ngai mposo oyo mpo na kotala ye mpe kopesa ye etinda ya nsango malamu?” Mpe nde abakisaki, “Ndeko mobali Denndorfer avandaka na Ungaria.”

Moninga wa ye na bosutuki bonso atunaki, “Tokolongwa mokolo nini?”

“Lobi,” eyaki eyano ya Ndeko mobali Krause.

“Tokozonga mboka mokolo nini?” etunaki moninga.

Ndeko mobali Krause ayangolaki, ‘O, na penepene mposo moko—soki tokozonga

Mosika baninga mibale bateyi ya libota bakendeki kotala Ndeko mobali Denndorfer, kosalaka mobembo na engunduka mpe na na motuka uta etuka ya nordi esti ya Allemagne na Debrecen, na Ungaria—mobembo molai mpenza. Ndeko mobali Denndorf azalaki na bateyi ya libota te uta ntango yambo ya etumba. Sikawa, ntango amonaki bawumbo mibale oyo ya nkolo, atondisamaki na botondi mpo ete bakomaki. Liboso aboyaki kopesa bango mbote na maboko. Kutu, akendeki na kisuku na ye ya kolala mpe azwaki na esika moko ebombana mwa sanduku moke oyo ezalaki na moko na zomi na ye oyo abombaki mibu mingi kala. Alakisaki moko na zomi na bateyi na libota na ye mpe alobaki, “Sikawa nazali na lisanga na Nkolo. Sikawa nayoki ete nalongobani mpo na kopesa mbote na basali ya Nkolo!” Ndeko mobali Krauze ayebisaki ngai nsima ete asimbamaki koleka na maloba ya komona ete ndeko mobali oyo ya botongono, oyo azalaki mosika na Eklezia mibu mingi, azwaki na botosi mpe na molende na lifuka na ye ya moke eteni moko na zomi na yango mpo na kofuta moko na zomi na ye. Abombaki yango koyebaka te mokolo to soki akokaki kozala na litomba ya kofuta yango.

Ndeko mobali Walter Krause akufaki mibu libwa eleki na mibu 94. Asalelaki na botongono mpe botosi na bomoi na ye mobimba mpe azalaki liziba ya bofuli mpo na ngai mpe mpo na banso bayebaki ye. Ntango basengaki ye kosala mosala, atiaki ntembe mokolo moko te, ayimayimaki mokolo moko te, mpe abimisaki mikalo ata mokolo moko te.

Bandeko ba ngai mibali mpe basi, momekano monene ya bomoi oyo ezali botosi. “Tokomeka bango na yango,” elobi Nkolo, “mpo na kotala soki bakosala makambo manso kani Nkolo Nzambe na bango akotinda bango.”10

Lokola esakolaki Mobikisi: “Mpo bango oyo bakozwa lipamboli moko na loboko na ngai bakozala na mobeko oyo etiama mpo lipamboli oyo, mpe masengeli na yango, lokola etiamaki uta yambo ya bokeli ya mokili.”11

Ndakisa monene mingi ya botosi ezali te koleka oyo ya Mobikisi. Mpo na Ye Paulo alobaki:

“Atako azalaki Mwana, ayekolaki kotosa mpo na makambo maye ayokaki mpasi;

“Mpe esili ye kobongisama nie, akomaki ewutelo na lobiko na seko mpo na bango yonso bakotosaka ye”12

Mobikisi alakisaki bolingo ya solo ya Nzambe na kotambwisaka bomoi ya bobongo nie, na kokumisaka etinda ya bule oyo ezalaki ya Ye. Azalaki na ezombo soki moke te. Avimbaki na lolendo ata mokolo moko te. Azangaki botongono ata mokolo moke te. Ntango nyonso Azalaki na bomikitisi. Ntango nyonso Azalaki sembo. Ntango nyonso Azalaki na botosi.

Atako Akambamaki na molimo na kati ya esobe mpo na komekama na nkolo oyo ya loluta, kutu zabulu, atako Alembaki na nzoto na kokilaka mikolo 40 mpe butu 40 mpe azalaki na nzala, kasi ntango moto ya mabe abimisaki na Yesu bilaka bileki masenginia mpe ya komeka, Ye apesaki biso ndakisa ya bonzambe ya botosi na koboyaka koboyaka kotengama uta na oyo Ye ayebaki ezalaki malamu.13

Ntango azalaki kobunda na bolozi ya Getesemane, wapi Ayokaki mpasi ya bongo ete motoki mwa Ye ekomaki lokola matanga manene ya makila na mabele,14 Ye alakisaki ndakisa ya Mwana ya botosi na kolobaka, “Tata, soki okani boye, longola kopo oyo na ngai, kasi mokano na ngai esalema te, kasi bobele mokano na yo.”15

Lokola Mobikisi ateyaki Bapostolo na Ye ya kala, boye Ye ateyi bino mpe ngai: “Yo bila ngai.”16 Ezali biso kolinga kotosa?

Boyebi oyo tozali koluka, biyano oyo tozali na yango mposa, mpe bokasi oyo tozali na yango mposa lelo mpo na kotelemela mikakatano kilikili ya mokili mpe ya mbongwana ekoki kozala ya biso ntango totosi na bolingi mitindo ya Nkolo. Natangi mbala moko lisusu maloba ma Nkolo: “Ye oyo abatelaka mitindo [ya Nzambe] akozwa bosolo mpe pole, kino akembisami na bosolo mpe akoyeba makambo manso.”17

Ezali losambo na ngai ya bomikitisi ete tokoka kopambolama na mbano ya motuya oyo elakelami na bato ya botosi. O nkombo ya Yesu Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso, amene.