2013
Mateya mpo na Ntango na Biso
sánzá ya mítáno 2013


Mateya mpo na Ntango na Biso

Mateya ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe ya Lingomba ya Bamama Basungi na mokolo ya eyenga ya minei ekozala mpo na “Mateya mpo na Ntango na Biso.” Liteya moko na moko ekoki kolengelama uta na lisolo moko to masolo mingi maye mapesamaki na likita linene ya sika oyo ewuti kosalema (tala na etando na nse). Bakambi ya likonzi mpe ya disitiliki bakoki kopona masolo maye basengeli kosalela, to bakoki kopesa mokumba moye na baepisikopo mpe bakambi ya bitape. Bakambi babetaka sete ete ezali likambo ya motuya mpo na bandeko mibali ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi ete bayekola masolo se moko oyo na mikolo se moko oyo ya eyenga.

Baye bakendeka na mateya ya eyenga ya minei balendisami koyekola mpe komema nimelo ya zulunale ya likita linene oyo ebimi ya nsuka.

Makanisi mpo na Kolengela Liteya uta na Masolo

Sambela mpo ete Molimo Mosantu azala na yo wana ezali yo koyekola mpe koteya li(ma)solo yango. Okoki kosenginiama mpo na kolengela liteya yango na kosalelaka babuku mosusu, kasi masolo ya likita linene ezali manaka oyo mandimami. Mosala na yo ezali kosalisa basusu koyekola mpe kosalela nsango malamu lokola eteyami na likita linene ya Eklezia oyo ewuti kosalema.

Tanga lisusu malamu li(ma)solo yango, kolukaka mabongisi mpe malongi maye mazali kokutana na bamposa ya bato ya kelasi. Luka lisusu masapo, makomi ya kotanga, mpe maloba uta na li(ma)solo maye makosalisa yo koteya bosolo boye.

Sala moango ya koyeba lolenge nini okoteya mabongisi mpe malongi yango. Tala ete okotisa mituna miye mikosalisa bato ya kelasi:

  • Koluka mabongisi mpe malongi kati na li(ma)solo.

  • Kokanisa eye etali ndimbola na yango.

  • Kokabola bososoli, makanisi, mayele, mpe matatoli.

  • Salela mabongisi mpe malongi maye na bomoi na bango.

Mateya ya Sanza Mateyami

Makambo ya Koteya na Liteya ya Mokolo ya Eyenga ya Minei

Sanza ya minei 2013–Sanza ya zomi 2013

Masolo mapesami na likita linene ya Sanza ya minei 2013*

Sanza ya zomi 2013–Sanza ya minei 2014

Masolo mapesami na likita linene ya 2013 na Sanza ya zomi*

  • Mpo na mateya ya eyenga ya minei ya Sanza ya minei mpe ya zomi, li(ma)solo makoki koponama uta na likita linene elekaki to uta na likita ewuti kosalema. Masolo maye mazali komonana na nkota mingi naconference.lds.org.