2013
Yaka, landa biso
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2013


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali, Sanza ya zomi na moko 2013

Yaka, Sangana na biso

Na kozanga kotala lolenge ozali, mambi ma kala na yo moko, to bokasi ya litatoli na yo, ozali na esika kati na Eklezia oyo.

Na eleko moko ezalaki na moto moko oyo alotaki ete azalaki na kati ya ndako monene wapi bandimi nyoso ya Nzambe ya mokili mobimba basanganaki. Amonaki ete eyamba moko na moko ezalaki na makambo ya ntina mpe maye malongobani.

Akutanaki na babalani moko kitoko oyo bazalaki ndakisa mpo na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo ya nsuka mpe atunaki, “Nini bino bosengaka mpo na bandimi na bino?”

Biso tosengaka eloko moko te,” bayanolaki. “Kasi Nkolo asengaka ete tobulisa nyonso mpo na Ye.”

Babalani baye balimbolaki na ntina ya mabiangi ya Eklezia, mateya na libota mpe bamama batali, bamisionele ya ya ntango mobima, likita ya mpokwa na libota, mosala ya tempelo, masalisi ya bozali malamu mpe misala ya bosungi bato, mpe misala ya koteya.

“Ofutaka bato na yo mpo na mosala nyonso basalaka?” moto yango atunaki.

“O, te,” babalani balimbolaki. “Bapesaka ntango na bango ya ofele.”

“Lisusu,” babalani bakobaki, “basanza nyonso motoba bandimi ya Eklezia na biso balekisaka suka ya mposo kokendeka to kolandaka likita linene mpo na ngonga zomi,”

“Ngonga zomi ya bato kopesaka masukulu?” moto yango atunaki.

“Boni na ntina ya misala ya Eklezia na yo ya mposo? Ezwaka ngonga boni?”

“Ngonga misato, eyenga nyonso!”

“O, ngai”moto yango alobaki. “Bandimi ya Eklezia na yo basalaka solo mpenza oyo ozali koloba?”

“Oyo wana mpe mingi koleka. Maye matali mambi ya kala ya libota kutu tolobi te, banganda ya bilenge, nsambo, botangi makomi, boyekoli kokamba, milulu ya bilenge, kelasi ya seminele na ntongo, bosokoli ya ndako Nzambe, mpe ya solo ezali na mibeko ya Nkolo mpo na bokolongonu ya nzoto, kokila bilei sanza nyonso mpo na kosalisa babola, mpe kofuta moko na zomi.

Moto yango alobaki, “Sikoyo elekeli ngai. Mpo na nini moto asengelaki kokota na Eklezia ya boye?”

Babalani basekaki mpe balobaki, “Tokanisaki ete okokaki kotuna te.”

Mpo na nini moto asengeli kokota na Eklezia ya boye?”

Na eleko moko ntango baeklezia ebele na mokili ezalaki komona motango ya bato se kokita, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya mikolo ya nsuka—ata moke na komeka na mingi ya misusu—ezali moko ya baeklezia ezali kokola mbangu na mokili mobimba. lokola na sanza ya libwa 2013 Eklezia ekomi koleka ba milio zomi na mitano ya bandimi na mokili mobimba.

Ezali na ntina mingi na yango, kasi Nakoki kopesa ndambo?

Eklezia ya Mobikisi

Ya yambo, Eklezia oyo ezongisaki nsango malamu na mikolo na biso na Yesu Klisto Yemei. Awa okokuta likoki ya kokamba na nkombo na Ye—kobatisa mpo na bolimbisi ya masumu, ya kopesa likabo ya Molimo Mosantu, mpe kokanga na mabele mpe na lola.1

Baye bakoti na Eklezia oyo balingi Yesu Klisto mpe balingi kolanda Ye. Basepelaka na boyebi yango ete Nzambe alobaka lisusu na moto. Ntango bazwi makuli masantu ya bonganganzambe mpe basali mayokani na Nzambe, bakoki koyoka bokasi na Ye kati na bomoyi na bango.2 Ntango bakokota na tempelo esantu, bakoyoka kozala pembeni na Ye. Ntango bazali kotanga makomi masantu3 mpe kobatela mateya ya baprofeta na Ye, bazali kobelema pembeni ya Mobikisi oyo balingaka mingi.

Bondimi ya Misala

Ntina mosusu ezali ete Eklezia ezali kopesa mabaku ya kosala bolamu.

Kotia bondimi na Nzambe ezali likambo ya kokumisa, kasi bato mingi balingi kosala koleka na esika ya koyoka mateya mafulami to kolota bisengo bakozala na yango na likolo.4 Balingi kotia bondimi na bango na mosala. Balingi kongumba maboko ya semizi na bango mpe komipesa na ntina monene oyo.

Mpe yango oyo nde esalemaka ntango bayaka kosangana na biso— bazali na mabaku mingi mpo ya kobongola batalanta, mawa, mpe ntango na bango kati na misala malamu. Lokola tozali na basali ya eklezia oyo bafutamaka te na mangomba na biso mokili mobimba, bandimi na biso bakokisaka misala na bango ya kosalela bango moko. Babiangami na bofuli ya Molimo. Ntango mosusu tosalaka na bolingi na biso moko, ntango mosusu basengaka biso“komipesa.” Tomonaka mabiangi lokola mikumba te kasi lokola mabaku mpo na kokokisa mayokani tosalaki mpo na kosalela Nzambe mpe bana na Ye.

Mapamboli ya Motuya

Ntina ya misato mpo na nini bato balandaka Eklezia ezali mpo ete kotambola na nzela ya bayekoli na nzela ememaka na mapamboli ya motuya.

Tozwaka libatisi lokola ebandeli ya mobembo na biso ya bayekoli. Etamboli na biso ya mokolo na mokolo elongo na Yesu Klisto ememaka kimia mpe ntina na bomoi oyo mpe esengo ya mozindo mpe lobiko ya seko na mokili oyo ezali koya.

Baye bazali kolanda nzela oyo na boyambi ya solo bazalaka mosika ya mingi na mitambo, mpasi, mpe motema mpasi ya mokili.

Babola na molimo mpe bato ya sembo na motema bazwaka boyebi monene ya motuya awa.

Baoyo bazali na mpasi to bolozi bazwaka lobiko awa.

Baoyo bazali na mikumba ya masumu bazwaka bolimbisi ya masumu, bonsomi, mpe kimia.

Mpo na Baoyo Bazali Kolongwa

Koluka bosolo esili komema nkoto na nkoto ya bato na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka. Nzokande, ezali na basusu oyo bazali kolongwa na Eklezia oyo balingaki liboso.

Moto akoki kotuna, “Soki nsango malamu ezali kitoko mpenza, ntina nini moto akolongwa?”

Ntango mosusu tosengeli kondima mokumba yango mpamba te batukamaki, bazali goigoi to bato ya masumu. Solo mpenza, ezali pete ya koloba bongo te. Soki otali malamu, eyano ezali moko te na ntina ya makambo ebele oyo.

Mingi ya bandimi na biso bamitungisaka mibu mingi na motuna ya koyeba soki basengeli kokabwana na Eklezia.

Na Eklezia oyo etosaka makasi nguya ya boponi ya moto na moto, oyo ezongisamaki na elenge mobali moko oyo abandaki komituna mituna mpe azwaki biyano, totosaka baoyo balukaka bosolo na bosembo. Ekoki kosala biso mpasi na mitema ntango mobembo na bango ememi bango mosika na Eklezia oyo tolingaka mpe na bosolo tozwi, kasi totosaka makoki na bango ya kokumbamela Nzambe na ndenge kasanza na bango ezali kotinda bango, lokola kaka tozali kosenga litomba liye mpo na biso moko.5

Mituna Ezanga Biyano

Basusu bazali komitungisa na mituna ezanga biyano na ntina ya makambo esalemaki to elobamaki kala. Toyebi na polele ete pene ya mibu nkama mibale mambi ma kala ya Eklezia—elongo na monkoloto ezanga nsuka ya makambo mafulami, ya lokumu mpe ya bonzambe—ezali na makambo elobama mpe esalema maye ekoki kosala ete bato batuna mituna.

Ntango mosusu mituna eyaka kaka mpo ete tozali na nsango nyonso te mpe tozali na ntina moke ya kozela. Ntango bosolo nyonso eyebani, makambo ezalaki na ntina te mpo na biso yambo ekozwa biyano na ntina na biso.

Ntango mosusu ezali na bokeseni ya makanisi mpo na oyo etali nini “bikela” elingi solo koloba. Motuna oyo ebimisaka ntembe na boko bato ekoki, nsima ya koluka malamu, kotonga bondimi kati ya basusu.

Mabunga ya Bato Babonga Nie Te

Mpe, mpo na kozala polele, ezali na bantango mosusu bandimi to bakambi na Eklezia basalaki mabunga. Ekoki kozala na makambo maye balobi to basalaki kasi mazalaki te koyokana na mibeko, mabongisi, to malongi na biso.

Nabanzi ete Eklezia esengelaki kozala ya kobonga nie bobele soki ekambamaka na bato babonga nie. Nzambe abonga nie, mpe malongi na Ye ezali peto. Kasi Azali kosala na nzela na biso—bana na Ye oyo babonga nie te—mpe babonga nie te basalaka mabunga.

Na lokasa ya nkombo ya buku ya Mormon totangi ete, “mpe sikawa, soki ezali na mabunga ezali mabunga ya bato; na yango, kotia ntembe na makambo ya Nzambe te, mpo ete ozala mpembe liboso ya kiti ya esambiselo ya Klisto.”6

Oyo ezali lolenge ezalaka ntango nyonso mpe ekozala kino mokolo mobongi nie ntango Klisto Yemei akokonza likolo ya mabele.

Ezali mpasi na komona ete mingi bakweisami mpo na mabunga masalemi na bato mosusu. Kasi atako bongo, bosolo ya seko ya bozongisi sango malamu kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu mya mikolo ya Nsuka enzuluki te, ekakolami, to ebebisami te.

Lokola Apostolo ya Nkolo Yesu Klisto mpe lokola moko oyo amonaki yambo bilako mpe etamboli ya Eklezia oyo, Natatoli na ntina ete mokano moko te ya ntina ekozimba Eklezia oyo to bandimi na yango ekoki kosalema soki baluki te na solo bofuli ya molimo, bokambami mpe bondimami ya Tata wa seko. Oyo ezali Eklezia ya solo ya Yesu Klisto. Nzambe akopesa nzela te ete Eklezia na Ye ebunga nzela na yango eponama to ekoka te kokokisa ntina ya nsuka ya bonzambe na yango.

Esika Ezali mpo na Yo

Na baoyo bakabwani na Eklezia bango moko, nalobi, baninga na ngai ya bolingo, esika mpo na bino ezali bobele awa.

Boya mpe bobakisa batanta, makabo, mpe makasi na bino na oyo ya biso. Tokokoma banso malamu koleka na nsuka na yango.

Mingi bakoki kotuna “Kasi boniboni ntembe na ngai?”

Kozala na mituna ezali momesano— nkona ya bosembo ya boluki ezalaka mingi elonama mpe etela na bonene ya mayele. Ezali na ndambo ya bandimi ya Eklezia baye, na ngonga moko to mosusu, bamitungisaki te na mituna ya ndongo to ya makasi. Yoko ya ntina ya Eklezia ezali koleisa mpe kolona nkona ya bondimi—atako na mabele ya zelo ya ntembe mpe ya malamu te. Bondimi ezali kotia elikya na biloko oyo emonanaka te kasi oyo ezali ya solo.7

Na yango, bandeko na ngai ya mibali mpe basi—baninga na ngai—nasengi, botia naino ntembe na ntembe na bino yambo botia ntembe na bondimi na bino.8 Tosengeli te kotika ntembe ekanga biso na bowumbu mpe etika biso mosika na bolingo ya Nzambe, kimia, mpe makabo oyo na nzela ya bondimi na Nkolo Yesu Klisto.

Mingi bakoki koloba,“Nakoki te kozala na bino bato ya Eklezia..

Soki okokaki kotala kati ya mitema na biso, okokaki kokuta oyo ya malamu osengeli na yango. Okoki kokamwa na komona ete tozali na mposa mpe mikakatano mpe elikya lolenge moko na bino. Makambo na bino maleka mpe lolenge bokolaki ekokaki komonana na bokeseni na maye ozali komona kati ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka, kasi yango ekoki kozala lipamboli. Bandeko ya mibali mpe ya basi, baninga na ngai ya bolingo, tozali na mposa ya batalanta se moko ya bino mpe mayele na bino ya komona mosika. Boike ya bato mpe bato ya mokili mobimba ezali bokasi ya Eklezia oyo.

Mingi bakoki koloba“Nakanisi te ete nakoki kosalela mibeko makasi na bino.

Ntina monene koleka mpenza mpo ete boya! Eklezia esalema mpo na koleisa bato bazanga bobongi nie, bato bazali kobunda, mpe baoyo basili kolemba nie. Etondami na bato oyo balingina motema na bango mobimba na kobatela mibeko, atako bangobasosoli yango naino malamu te.

Mingi bakoki koloba, “Nayebi mondimi moko ya Eklezia na bino oyo azali mokosi.Nakoki koya Eklezia te eye moto lokola ye azali mondimi.

Soki olimboli mokosilokola moto oyo azangi botosi na maye ye azali kolikya, na yango tozali banso bato na lokuta. Moto moko te kati na biso azali lokola Klisto lokola toyebi tosengeli kozala. Kasi tozali na mposa na lombango ya kolonga mabunga na biso mpe maye matindaka biso na masumu. Na motema mpe molimo na biso mobimba tozali kolinga mpenza kokoma malamu koleka na lisalisi ya Bomikabi ya Yesu Klisto.

Soki ezali bamposa na bino, atako bisika binso bozali, atako makambo bozali na yango, to bokasi ya litatoli na bino, esika ezali mpo na bino kati na Eklezia oyo. Yaka, kosangana na biso!

Yaka, Sangana na Biso!

Atako kozanga bobongi nie na bomoto na biso, nayebi ete okokuta kati na bandimi ya Eklezia oyo mingi ya milimo kitoko miye mokili oyo ekoki kopesa. Eklezia ya Yesu Klisto ezali kobenda bato malamu mpe baoyo bazali na bokebi ya basusu, basembo mpe balinga mosala.

Soki oluki kokuta bato babonga nie awa, okozala na soni. Kasi soki oluki malongi ya peto ya Klisto, maloba ya Nzambe “maye mazali kopesa lobiko na molimo etukama,”9 mpe nguya ya kosantisama ya Molimo Mosantu, boye awa nde okozwa yango. Na eleko oyo wapi bondimi ezali kobunga—na eleko oyo ntango baike bazali komiyoka mosika ya lola—awa okokuta bato oyo bazali koluka koyeba mpe kopusana pembeni ya Mobikisi na bango na kosalelaka Nzambe mpe baninga na bango, bobele lokola yo. Yaka, sangana na biso!

Okolongwa Yo Mpe Lisusu?

Nakundoli ntango ya bomoi ya Mobikisi ntango ebele basundolaki Ye.10 Yesu atunaki bayekoli na Ye zomi na mibale:

“Ekokende bino mpe lokola?

“Kasi Simoni Petelo ayanolaki ye, Nkolo epai ya nani tokokende? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.”11

Bangonga mosusu ntango tosengeli koyanola na motuna yango kaka. Ekokende bino mpe lokola? To ekoki biso, kozala lokola petelo, kokangama na maloba ya bomoi ya seko?

Soki ozali koluka bosolo, ndimbola, mpe nzela na ntina ya kobongola bondimi na mosala; soki ozali koluka esika ya kozala: Yaka, landa biso!

Soki otiki boyambi oyo oyambaki liboso: Yaka lisusu. Sangana na biso!

Soki omekami mpo na kosundola: Tikala naino moke. Ozali na esika awa.

Nasengi na baoyo banso bazali koyoka to kotanga maloba maye: Boya, bosangana na biso. Yaka oyoka libiangi ya boboto ya Klisto. Mema ekulusu na yo mpe landa Ye.12

Yaka, landa biso! Mpo ete awa okokuta oyo ezali kitoko koleka likolo ya motuya.

Natatoli ete awa okozwa maloba ya bomoyi ya seko, elaka ya bosikoli epambolama, mpe nzela ekomema na kimia mpe na esengo.

Nasambeli na bosolo ete koluka na bino ya bosolo ekopesa esengo na motema na bino mposa ya koya mpe kolanda biso. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.