2017
Esi Nazwaki Ekateli
March 2017


Bilenge

Esi Nazwaki Ekateli

Mokomi afandaka na Utah, USA.

Nayekolaki liteya moko ya motuya na kelasi ya Bilenge Basi na oyo etali bopeto ya bosangisi nzoto—liteya oyo esepelisaki te bilenge ebele esika bafandaki. Namikundoli te na maye nyonso nayekolaki mokolo wana, kasi namikundoli moyangeli na ngai kolobelaka na ntina ya moko ya bizaleli na ye moko—mpo na kotikala ntango nyonso peto na bosangisi nzoto. Maloba na ye etikalaki elongo na ngai, mpe nsima nazwaki ekateli ya mayele mpo na kosalela yango lokola moko ya makambo na ngai ya ntina.

Mokolo moko ntango nazalaki kozonga ndako na bus moko kowutaka na molulu ya masano, moto moko na bus abandaki lisano ya bosolo to kosala bo esengi basusu. Ezalaki motungisi, ndambo ya bana mosusu mpe ngai tomekaki. Ntango ekomaki ngala na ngai, nasengamaki kosala eloko oyo nayebaki ete ezalaki malamu te. Oyo elingaki kozala ekateli moko makasi mpo na kosala, kasi maloba ya moyangeli na ngai ya Bilenge Basi eyelaki ngai na makanisi, mpe boponi ezalaki pete. Naboyaki mbala moko. Esi nalengelaki makanisi na ntina ya oyo nalingaki kosala na likambo wana.

Nayebi ete ntango tokendaka na eklezia mpe tolukaka koyoka makambo toteyamaka kuna, tokopambolama na lilendisi monene ya molimo mpe bobatelami wuta na masenginya ya mokili.