2017
Balatisama bibundeli ya Boyengebene
March 2017


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Misato 2017

Balatisama na bibundeli ya Boyengebene

Profeta ya Nzambe na mabele, Mokambi Thomas S. Monson, alobaki, “Lelo, tozingami na masumu koleka, mpe lisusu, na mabe esangisami liboso na biso.”1

Bokoki kokamwa na koyekola ete Mokambi Monson asakolaki maloba oyo uta mibu 50 eleki? Soki tozingamaki na mabe eleki ya nkanda nsima, boniboni mabe etungisi biso lelo? Mpo na ntina malamu, Nkolo asakolelaki na ekeke na biso oyo, “Botala, monguna azali” (D&A 38:12).

Etumba oyo “banso tozali na yango”2 ebandaki yambo ya mbotama na biso na mabele. Ebandaki kutu yambo mokili esalema. Ebandaki mibu ebele eleki na bokonzi ya yambo ya nkufa, epai wapi Satana atombokaki mpe “amonaki kobebisa bonsomi ya moto” (Moise 4:3).

Satana alongaki etumba wana te mpe “abwakisamaki na mabele” (Emoniseli 12:9), epai wapi akobaki etumba na ye lelo. Awa na mabele “abundisaka basantu ya Nzambe, mpe azalaka na bango nzinganzinga” (D&A 76:29) na lokuta, bosisoi, mpe masenginya.

Ye azali kobunda na baprofeta mpe bapostolo. Ye azali kobunda na mobeko ya Bopeto ya nzoto mpe ya bosantisi libala. Ye azali kobunda na libota mpe tempelo. Ye azali kobunda na oyo ezali malamu, mpe bule.

Lolenge nini tokobunda etumba ya boye? Lolenge nini tokobunda na mabe oyo ezali komonana kozala kotondisa mokili? Nini ezali ebundeli na biso? Banani bazali baye ya biso?

Nguya ya Mwana na Mpate

Propheta Joseph Smith ateyaki ete Satana azali na nguya likolo na biso bobele na ndelo oyo topeselaka ye ndingisa.3

Komonaka mikolo na biso, Nefi “namonaki nguya ya Mwana na Mpate ya Nzambe, oyo ekitaki likolo ya basantu ba eklezia ya Mwana wa Mpate, mpe likolo ya bato ba boyokani ba Nkolo, oyo bapalanganisamaki likolo ya etando nyonso ya mabele; mpe balatisamaki na bibundeli ya bosembo mpe na nguya ya Nzambe na nkembo enene.” (1 Nefi 14:14; sete ebetemaki).

Lolenge nini tolataka boyengebene mpe nguya? Tobatelaka mokolo ya Saba esantu mpe totosaka bonganganzambe. Tosalaka mpe tobatelaka mayokani ya bule, kosala na mambi ya libota na biso, mpe kokende na tempelo. Tokobaka kobunda koyambola mpe kosenga na Nkolo “asopa makila ya bomikabi ya Klisto ete tokoKa kozwa bolimbisi ya masumu na biso” (Moziya 4:2). Tosambeleka mpe tosalaka mpe totatolaka mpe tosalelaka bondimi na Yesu Klisto.

Tolataka lisusu bibundeli ya boyengebene mpe ya nguya ntango “totiaka na makanisi na [biso] ntango nyonso maloba ya bomoi” (D&A 84:85). Tobatelaka maloba oyo na komikotisaka bisomei na makomi esantu mpe na maloba ya basaleli ya Nkolo baponama, baoyo bakokabola bolingi na Ye, makanisi, mpe mongongo na Ye (tala D&A 68:4) na ntango ya likita linene ya sanza elandi.

Na etumba na biso na mabe, tosengeli ntango nyonso komikundola ete tosungami na ngambo nyonso mibale na mokili mpe na lola. Baye bazali na biso elongo ezali Nzambe Tata ya Seko, Nkolo Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu.

Baye bazali na biso elongo ezali mampinga emonanaka te ya lola. “Kobanga te,” Elisa alobaki na elenge mobali moko ya bobangi ntango bakutanaki na basoda ya mabe, “mpo ete baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na bango” (tala 2 Mikonzi 6:15–16).

Tosengeli kobanga te. Nzambe alingaka Basantu na Ye. Akosundola biso atako moke te.

Nayebi ete Nzambe, na eyano ya losambo, akokisaki babosenga na ngai ya bokangolami na mabe. Natatoli ete elongo na lisungi ya Nzambe Tata, Mobikisi ya mokili, mpe Molimo Mosantu, tokoki kozwa elikia ete tokopesama nguya ebele mpo na kotelemela mabe nyonso oyo tokutanaka na yango.

Tokoka ntango nyonso kolata bibundeli ya boyengebene mpo ete tokoka kozwa elikia na elonga ya nsuka.

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “Correlation Brings Blessings,” Relief Society Magazine, Sanza ya Minei. 1967, 247.

  2. “Nous sommes tous enrolés,” Cantiques, no. 161.

  3. Tala Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (2007), 369.