2017
Ndingisa ya Nguya ya Yezu Klisto mpe Bomikabi na Ye
March 2017


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, sanza ya misato 2017

Ndingisa ya Nguya ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofuli ya koyeba nini bosengeli kokabola. Lolenge nini kososolaka ntina Lingomba ya Bamama Basungi ezali kolengela bana basi ya Nzambe mpo na mapamboli ya bomoi ya seko?

Elilingi
Relief Society seal

Bondimi, Libota, Lisungi

“Nakoki kosala makambo nyonso na nzela ya Klisto oyo alendisaki ngai” (Bafilipi 4:13). “Atako tozali banso na botau, tokoki kolonga yango” elobaki Mokambi Dieter F. Uchtdorf, Mopesi Toli ya Mibale na Bokambi ya Yambo. “Yango wana ezali na ngolu ya Nzambe ete, soki tomikitisi mpe tozali na bondimi, biloko ya botau ekokoma makasi.”1

Mobikisi na biso alakaki na Doctrine et Alliances, “Ngai nakozala liboso na bino. Nakozala na loboko na bino ya mobali mpe na loboko na bino ya mwasi, mpe Molimo na ngai ekozala kati na mitema na bino, mpe banzelu na ngai nzinganzinga na bino, mpo na kotombola bino” (D&A 84:88).

“Nefi azali ndakisa ya moko oyo ayebaki, asosolaki, mpe ayekamaka likolo ya ndingisa ya nguya ya kosala Mobikisi,” elobi Mpaka David A. Bednar ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale. “Bandeko ya Nefi balingaki ye basinga mpe balengelaki bobebisi na ye. Botanga losambo ya Nefi: O Nkolo, engebene na bondimi bwa ngai boye bozali na yo, okobikisa ngai uta o maboko ma bandeko babali ba ngai; iyo, kutu okopesa ngai makasi ete nakoka kokata nkanga iye nakangemi na yango’ (1 Nefi 7:17; sete ebetami).

“… Nefi asambelaki te mpo na kozwa mbongwana ya makambo na ye. Kasi, asambelaki mpo na bokasi ya kobongola makambo na ye. Mpe nandimi asambelaki na lolenge oyo mpenza mpo ete ayebaki, asosolaki, mpe azalaki na mayele ya nguya ya kosala Bomikabi.

“Nabanzi te nkanga oyo Nefi akangamaki ekweyaki kaka na mpamba uta na maboko mpe kingo ya maboko na ye. Kasi, nakanisi apambolamaki na nyonso mibale boyiki mpiko mpe bokasi likolo ya makoki na ye ya bomoto, oyo na nsima ‘na bokasi ya Nkolo’ (Moziya 9:17) asalaki mpe afinamaki mpe abendamaki na basinga, mpe na nsuka mpe na nzoto mpe apesamaki makasi ya kokata basinga.”2

Makomi mpe Nsango ya Kobakisa

Yisaya 41:10; Etele 12:27; reliefsociety.lds.org

Matangi

  1. Dieter F. Uchtdorf, “Libonza ya Nguya,” Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 108.

  2. David A. Bednar, “Strength beyond Our Own,” New Era, Sanza ya Misato. 2015, 4.