2017
Misionele azanga Elembo
June 2017


Bilenge

Misionele azanga Elembo

Na eteyelo nazali na moteyi moko oyo azali na ezaleli moko oyo ekoki kobangisa moto apesa makanisi ekeseni na ntina ya likambo moko. Mokolo moko tobandaki kosolola na ntina ya likambo ya bamisionele ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka. Nayebaki ete nakokaki koyanola mituna na ye, kasi nazalaki komiyoka lokola ete nasengelaki te. Yango wana nalobaki kaka moke mpo na kosepelisa ye na ngonga wana.

Na mwa poso elandi nakokaki kotika kokanisa na ntina ya lisolo na biso te. Na nsuka, likanisi eyelaki ngai ete nasengeli kopesa ye Buku ya Molomoni na mwa maloba engengisama oyo etali mosala ya misionele. Likanisi ebangisaki ngai, kasi etingamaki. Nayebaki ete ezalaki botindiki oyo nasengelaki kolanda.

Pene ya basanza mibale nsima, nalengelaki Buku ya Molomoni. Mokolo mobimba nayokaki lokola ete buku yango ezalaki kozikisa lidusu kati ya saki na ngai ya mokongo. Basekonde misato oyo nazwaki mpo ete napesa ye yango ntango nalongwaki mpo na kokende na bopemi ya monene ezalaki ngonga ya kobanga mingi ya bomoi na ngai.

Na mokolo ya yambo nsima ya kozonga, nalekaki liboso ya kelasi na ye kasi nabangaki kokota. Nsima nayokaki ye kobenga ngai, mpe apesaki ngai kalati. Natangaki yango na nzela kati na ndako Akomaki ete ayekolaka “mobimba” makomi natiaka elembo, mpe azalaki kobanda komona bantina ya bondimi na ngai.

Nasepeli kokabolaka nsango malamu sikawa, mpe nazali na esengo mingi ya kosalela Tata na ngai na Lola na misio kala te.