2017
Nguya ya Bonganganzambe na nzela Kobatelaka Mayokani
June 2017


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Motoba 2017

Nguya ya Bonganganzambe na nzela Kobatelaka Mayokani

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofuli ya koyeba nini bosengeli kokabola. Lolenge nini kososolaka ntina Lingomba ya Bamama Basungi ezali kolengela bana basi ya Nzambe mpo na mapamboli ya bomoi ya seko?

Elilingi
Relief Society seal

Bondimi Libota Lisungi

“Nsango na ngai epai ya … banso ezali ete tokoki kobika na ngonga nyonso ‘ya kopambolama na nkonzo na nguya ya bonganganzambe,” atako makambo na biso ezali lolenge nini,” elobaki Mpaka Neil L. Andersen ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale.

“… Ntango bozali kosala na bolongobani na makuli ya bonganganzambe, Nkolo akopesa bino bokasi monene, kimia, mpe emoneli ya seko. Atako ezalela na bino ezali nini, ndako na bino ‘ekopambolama na bokasi ya nguya ya bonganganzambe.’”1

Boniboni tokobengisa nguya ya bonganganzambe kati na bomoi na biso? Mpaka M. Russell Ballard ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale akundolisi biso ete “baoyo bakoti na mayi ya libatisi mpe na nsima bazwi dotasio na bango na ndako ya Nkolo baponami mpo na mapamboli mingi mpe ya kafukafu. Dotasio elingi koloba likabo ya nguya … [mpe] Tata na biso na Lola akabaka na nguya na Ye. Akundolisi biso ete mibali mpe basi “balatisami banso mibale na nguya se moko wana” kati na ntempelo, “oyo na ndimbola ezali nguya ya bonganganzambe.”2

Linda K. Burton, Mokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi, alobaki: “Lokola nguya ya bonganganzambe ezali eloko moko biso banso tozali na mposa ya kozala na yango kati na mabota mpe bandako na biso, nini esengeli biso kosala mpo na kobengisa nguya yango kati na bomoi na biso? Bosembo ya moto ye moko esengelami mpo na kozalaka na nguya ya bonganganzambe.”3

“Soki tokomilakisa na komikitisa liboso ya Nkolo mpe kosenga Ye ateya biso, Akolakisa biso lolenge nini tokobutisa ya biso bozwi ya Ye nguya,” elobaki Mokambi Russell M. Nelson, Mokambi ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na mibale.4

Makomi mpe Nsango ya Kobakisa

1 Nefi 14:14; Doctrine et Alliances 121:36; 132:20; reliefsociety.lds.org

Matangi

  1. Neil L. Andersen, “Power in the Priesthood,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2013, 92, 95.

  2. M. Russell Ballard, “Men and Women and Priesthood Power,” Liahona, Sanza ya Libwa 2014, 36.

  3. Linda K. Burton, “Priesthood Power—Available to All,” Liahona, Sanza ya Motoba 2014, 21.

  4. Russell M. Nelson, “The Price of Priesthood Power,” Liahona, Sanza ya Mitano 2016, 69.