2017
Bobiangemi na Mosala
June 2017


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Motoba 2017

Bobiangemi na Mosala

Elilingi
Mokambi Thomas S. Monson

Ntango Profeta Joseph Smith abiangaki Mpaka Heber C. Kimball (1801–68) mpo na “kofungola ekuke ya lobiko” lokola misionele na Angleterre, Mpaka Kimball asimbamaki na mayoki ya bobangi.

“O, Nkolo,” akomaki, “Nazali moto ya likukuma, mpe na yango nalongobani mpo na mosala ya boye te.”

Mpaka Kimball andimaki libiangi kasi, kobakisaka: “Baemoneli oyo epengwisaki ngai uta na nzela ya mosala te, ntango nasosolaki bolingi ya Tata na Lola, nayokaki mposa moko ya kokende atako kpokoso nini, kondimaka ete Akosunga ngai na nzela ya nguya na Ye nyonso, mpe Akolatisa ngai na bolongobani nyonso oyo nazalaki na nyango bosenga.”1

Bandeko na ngai ya bilenge mibali mpe basi oyo bobiangemi na mosala ya misionele ya ntango mobimba, bobiangemi na mosala mpo ete bino, lokola Mpaka Kimball, “bozala na mposa ya kosalela Nzambe” (D&A 4:3) mpe mpo ete bozali ya kobelema mpe ya kolongobana.

Bamisionele babale, bobiangemi na mosala mpo na bantina se moko. Nzokande, bino bomemaka kaka mposa ya kosalela te kasi lisusu bwania ezwami kati na mibu na mibu ya komikaba, bolingo, mpe boyebi oyo Tata na bino na Lola akoki kosalela mpo na kosimba mitema ya bana na Ye ya mibali mpe ya basi oyo bazali koluka bosolo. Ntembe ezali te boyekoli ete tokoki solo mokolo moko te kolinga Nkolo kino tosaleli Ye na kosalisaka basusu.

Na mposa na bino ya kosala lokola misionele, bokobakisa bondimi mpe bokasi, mpiko mpe bolikii, mokano mpe motema molai, mokano mpe komipesa. Bamisionele bamipesa bakoki kosala makamwisi na elanga ya misio.

Mokambi John Taylor (1808–87) alobaki na mokuse ezalela malamu ya ntina ya misionele na lolenge oyo: “Lolenge ya mibali [mpe basi mpe bamisionele ya mikolo] oyo tolingi lokola bamemi ya etinda ya nsango malamu ezali bato oyo na bondimi na Nzambe; bato oyo bazali na bondimi na eyamba na bango; bato oyo batosi bonganganzambe na bango, bato oyo kati na bango … Nzambe azali na bolikii. … Tolingi bato batonda na Molimo Mosantu mpe nguya ya Nzambe[,] … bato ya botosi, bosembo, malamu mpe mpeto.”2

Nkolo alobaki:

“Mpo elanga esi eteli mpo na kobuka; mpe tala, oyo akobwaka ebukeli na ye na nguya, ye kaka nde akotondisa na ebombelo mpo ete akufa te, kasi amemi lobiko ya molimo na ye;

“Mpe bondimi, elikya, bolingani mpe bolingo, na liso kotalaka nkembo ya Nzambe, elongisi ye mpo na mosala” (D&C 4:4–5).

Libiangi na yo eyeli na nzela ya bofuli. Natatoli ete oyo Nzambe abiangi, Nzambe akolongisa. Okozwa lisalisi ya lola ntango ozali kosala na losambo kati na elanga ya vino ya Nkolo.

Elaka kitoko oyo Nkolo apesaki na bamisionele na ebandeli na eleko oyo, lokola ezwami kati na Doctrine et Alliances, ekozala ya yo: “Nakokende liboso ya elongi na yo. Nakozala na loboko na bino ya mobali mpe na loboko na bino ya mwasi, mpe Molimo na ngai ekozala kati na mitema na bino, mpe banzelu na ngai zingazinga na bino, mpo na kotombola bino” (D&A 84:88).

Wana ezali yo kosala, okotonga makundoli ya seko mpe baninga mingi. Nayebi elanga moko te oyo ebotaka mbuma moko ya esengo mingi koleka elanga ya misio.

Sikawa, liloba mpo na bamisionele ya mibali, ya basi, mpe bacouple oyo, mpo na ntina songolo, bakoki te kozala na makoki ya kosilisa ngonga ekatelama bango na elanga ya misio: Nkolo alingi bino. Asepeli na libonza na bino. Ayebi mawa na bino. Boyeba ete Ye azali naino na mosala mpo ete bino bosala. Botika te Satana aloba na bino oyo elongobani te. Boyoka mawa te; bolemba nzoto te; bobungisa elikya te.

Lokola namonaki na likita linene mwa nsima ya kobiangema na ngai mpo na kokamba Eklezia: “Bobanga te. Bozala na esengo. Lobi ekoya ezali kongenga lokola bondimi na bino.”3 Elaka wana ezali naino ya solo mpo na bino. Yango wana bobungisa bondimi na bino te, mpo Nkolo abungisi bondimi te kati na bino. Bobatela mayokani na bino mpe bokende liboso.

Mokili ezali na mposa ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Tika Nkolo apambola Basantu na Ye banso —kotalaka te wapi tozali kosala—na motema ya kimisionele.

Matangi

  1. Heber C. Kimball, na Orson F. Whitney, Life of Heber C. Kimball, 3rd ed. (1967), 104.

  2. Teachings of Presidents of the Church: John Taylor (2001), 73.

  3. Thomas S. Monson, “Be of Good Cheer,” Liahona, Sanza ya Mitano 2009, 92.