2021
Bosala Makambo Malamu
Sanza ya nsambo 2021


“Bosala Makambo Malamu,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya nsambo 2021, 18–19.

Etinda ya sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya nsambo 2021

Bosala Makambo Malamu

Kokomaka makanisi na yo ntango ozali koyekola makomi ekoki mpenza kosalisa yo mpo na koyekola.

“Ntango nyonso oyo nabandaka kotanga makomi, mpongi eyibaka ngai!” misionele moko ayebisaka mokambi na ye ya misio. “Ezali lokola makomi ezalaka nkisi ya mpongi!”

Mokambi na ye ayanolaki ye, “Okomaka ntango ozali kotanga?”

“Te,” misionele ayanolaki.

“Ezali pete mpo na mpongi eyiba yo to mpo na makanisi na yo elemba ntango ozali bobele kotanga,” mokambi alobaki, “kasi ekozala malamu soki obakisi kokoma!”

Toli oyo mokambi ya misio apesaki misionele na ye oyo atungisamaki esalaki bokeseni monene. Boye soki ozali koluka lolenge ya sika mpo na kolendisa boyekoli na yo ya makomi, meka yango. Ntango ozali kokoma maye ozali kotanga, okomimona yo moko ya komipesa makasi mpe koyekola malamu koleka, lisusu.

Tala mwa mabongisi oyo tomoni motuya mpenza.

Ndeko mobali Steven Lund:

Elilingi
Steven Lund

Nazalaka na nkasa na maboko ntango natangaka. Ntango molimo etindaka ngai na ntango ya boyekoli na ngai, nakomaka makanisi wana.

Nazwaki likanisi uta na Mpaka Richard G. Scott (1928–2015) ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, oyo alobaki: “Bokoma na esika moko ya malamu makambo ya motuya maye bozali koyekola uta na Molimo. Okomona ete ntango ozali kokoma makambo ya ntina koleka, mbala mingi mingi masusu koleka ekoya. Lisusu, boyebi oyo ozali kozwa ekotikala mpo na bomoi na yo mobimba” (“To Acquire Knowledge and the Strength to Use It Wisely,” Ensign, Sanza ya nsambo 2002, 32).

Nayebi ete makambo maye ezali ya solo. Ntango nalengelaka mateya mpe bansango, natalaka ata na kati ya makomi te kasi lisusu na maye nakomaki ntango nazalaki kotanga yango.

Ndeko mobali Ahmad Corbitt:

Elilingi
Ahmad Corbitt

Nalingaka koyekola mateya. Nayekolaka makomi uta ebandeli kino na nsuka, kasi nalingaka lisusu koluka mpembeni mpe koyekola mateya. Ndakisa, nakosalela Mokambi na Masolo mpo na kozwa makomi maye ezali kolobela bondimi to bosangisi ya Yisalaele. Nsima nakokoma kaka te, kasi nakokoma maye nazali kotanga mpo na kondima solo ete nazali kososola yango. Mbala mingi nasepelaka na lolenge oyo nasosolaka malamu ntango nasalaka yango. Lisusu naponaka makomi mosusu mpo na kokanga yango.

Ndeko mobali Bradley Wilcox:

Elilingi
Bradley Wilcox

Nazalaka na zulunale na ngai ya boyekoli esika wapi nakomaka makomi na lolenge na ngai moko. Ndakisa, “Mpo moto ya mokili azali moyini ya Nzambe” (Moziya 3:19) ekomi “Mpo moto ya lolendo mpe mozangi boyamboli aponi kozala moyini ya Nzambe, kasi Nzambe azali moyini na ye te. Nzambe azali moninga na ye monene.”

Nakomaka lisusu mituna. Ekoki kozala na mituna miye nazali kokanisa yambo nayekola, to ekoki kozala na mituna miye mibimi uta na maye nazali kotanga. Atako bongo, yango esalaka ete makanisi na ngai ezala esika moko.

Nguya ya Kokomaka Makanisi na Yo

Moko na moko kati ya Bokambi na biso ayekolaka makomi na lolenge ya kokesana, kasi biso nyonso tokomaka lolenge tosalaka!

Kotanga esalisaka biso tokomisa makanisi mpe mayoki ya biso moko. Ezali na ntina mingi. Mpe ntango tozali koloba to kokoma, toyaka kozwa mpe kobimisamakanisi mpe mayoki ya kati libanda. Tokanisaka ete yango esalisaka biso kokomisa malamu koleka bosolo ya nsango malamu lokola ya biso moko.

Elenge mobali moko amonaki bosolo oyo ye moko ntango asengamaki kosala lisikulu na liyangani ya elambo. Ayokaki bato basusu mingi kosala badisukulu kasi akokaki kokanga makambo nyonso te. Mbala oyo ezalaki ya kokesena. Ntango akomaki nsango ya liteya na ye moko, amisalisaki ye moko kaka te kopesa liteya malamu, kasi akangaki yango mpo na ntango molai.

Eloko moko oyo ekoki kosalema na boyekoli na yo ya makomi. Soki mpongi eyibi yo na ntango ofungoli makomi na yo, ezali ntango ya kolamuka. Meka kobimisa keleyo, biki, telefone to odinatele mpe banda kokoma. Okosepela na bokeseni oyo ekoki kosalema!