2021
Tata na biso na Lola Alingaka Tozala na Esengo
Sanza ya nsambo 2021


“Tata na biso na Lola Alingaka Tozala na Esengo,” Liahona, Sanza ya nsambo 2021

Etinda ya sanza Liahona Sanza ya nsambo 2021

Tata na biso ya Lola Alingaka Tozala na Esengo

Ntango tozali komikundola mwango ya esengo ya Nzambe, tokoki kozwa esengo atako bomoi ezali mpasi.

Elilingi
Klisto elongo na bana

Yambo tobotama na mabele, tozalaki kofanda biso nyonso na Tata na Lola lokola bana na Ye ya molimo. Alakisaki mwango mp0 na kosalisa bana na Ye bayekola mpe bakola. Na nzela ya mwango na Ye, tokoki kokoma mingi lokola Ye mpe kolongobana mpo na kozwa esengo ya bomoi ya seko. Mwango oyo ezali solo mpo ete Mwana ya Nzambe, Yesu Klisto, ayaki na mabele mpo na konyokwama mpo na masumu na biso, mbeka oyo ebengami Bomikabi.

Mwango ya Tata na Lola ebengami mwango ya

Lokola makomi oyo mpe masusu elakisi, Tata na Lola alingaka biso tokoma lokola Ye, tozonga epai na Ye, mpe tozala solo na esengo (tala Mose 1:39).

Toyaki na Mabele mpo na Koyekola mpe Kokola

Nzambe atindaki biso na mabele, esika wapi tokokaki kozwa nzoto (tala Genese 1:26–27). Tozalaki na mposa ya nzoto mpo na kopesa biso ndingisa ya koyeba bomoi na mabele.

Nzambe ayebaki ete tokozala na esengo ntango nyonso te. Toyokaka boyokisi mpasi na motema, monyokoli mpe kutu nkufa. Kasi na nzela ya mikakatano ya bomoi, Tata na Lola asungaka biso toyekola mpe tokola.

Nzambe apesaki biso lisusu bonsomi ya kopona, likoki ya kopona malamu mpe mabe. Atikaka biso topona biso moko nini tokokanisa mpe tokosala. Apesaki biso makomi mpe baprofeta ya bomoi mpo na kosunga biso toyekola kopona oyo ezali malamu (tala Abalayama 3:25).

Elilingi
nzete ya bomoi

Meka Kozala lokola Yesu Klisto

Nzambe atindaki biso te na mabele kati na bozangi ndakisa ya kolanda (tala Yoane 13:15). Atindaki Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpo na kolakisa biso nzela. Mpo na koyekola lolenge nini kolanda Ye, tokoki kotanga makomi mpo na koyekola nani Ye azali mpe nini Asalaki na ntango ya bomoi na Ye na mabele. Tokoki lisusu kosala manso tokoki mpo na kozala lokola Klisto na kotosaka Nzambe mpe kolinga basusu.

Ntango tosali mabunga, tosengaka bolimbisi mpe topusanaka pene na nguya ya Bosikoli ya Yesu Klisto mpo na kosunga biso tobongwana. Tokoki kozala na esengo ntango tomeki mokolo na mokolo kokoma mingi mingi lokola Ye.

Nkufa Ezali Nsuka Te

Ntango tokufi, milimo na biso ekendaka na mokili ya molimo. Kuna tokobaka koyekola mpamba te tozali komilengela mpo na Lisekwa.

Na ntango ya Lisekwa, banzoto na biso mpe milimo ekosangana. Nzoto na biso ekobonga nie, mpe tokonyokwama lisusu te na kufa to bokono (tala Alma 11:44–45). Kaka lokola Yesu Klito akufaki mpe azongaki lisusu na bomoi, biso banso tokozala lisusu na bomoi.

Ntango Nzambe akosambisa biso, Akotala misala na biso mpe bamposa na biso. Soki tomekaki kobatela mitindo mpe bilaka oyo tosalaki na Tata na Lola, wana nde tokofanda na Ye lisusu.

Kofanda elongo na Nzambe mpe Mabota na biso na Lola

Na bokonzi ya selesitiale, tokofanda elongo na Nzambe mpe Yesu Klisto. Tokozala lisusu na makoki ya kofanda elongo na mabota na biso kuna mpo na libela soki tokangisami na bango. Tokozwa kimia, esengo mpe bopemi (tala Moziya 2:41).

Bomoi na biso na mabele ekoki kozala mpasi ntango moko, kasi soki tolandi Yesu Klito, tokoki kozwa esengo mpe bosepeli ya seko na bomoi oyo mpe na bomoi ezali koya.

Makomi Ezali Koloba Nini na Ntina ya Mwango ya Esengo?

Lolenge tozali kotambwisa bomoi na biso ezali ntina mingi. Nzambe akosambisa mpe kofuta biso engebene na makanisi mpe misala na biso (tala Alma 41:3).

Satana azali monguna ya esengo na biso. Asenginyaka biso mpo tosalela mabe bomoi na biso na mabele mpe tosumuka. Alingaka biso tokoma babola lokola ye (tala 2 Nefi 2:27).

Ntango tozali na bondimi na mwango ya Nzambe mpo na biso, tokoki kozala na kimia atako mikakatano tokutanaka na yango. Ntango totali liboso mpo na kofanda elongo na Nzambe mpo na libela (tala Doctrine et Alliances 59:23).

Misala minso mya ntoki na J. Kirk Richards