2021
Limoni ya Mwango ya Nzambe
Sanza ya nsambo 2021


“Limoni ya Mwango ya Nzambe” Moninga, Sanza ya nsambo 2021

Etinda ya sanza Moninga Sanza ya nsambo 2021

Limoni ya Mwango ya Nzambe

Elilingi
Joseph Smith mpe Sidney Rigdon bamonaki Tata mpe Mwana

Liyemi na Apryl Stott

Mokolo moko Joseph Smith mpe Sidney Rigdon bazalaki kotanga makomi. Bazwaki limoni. Bamonaki Tata na Lola mpe Yesu Klisto.

Elilingi
Tata na Lola mpe Yesu Klisto

Bayekolaki ete yambo tobotama, tozalaki kofanda na lola elongo na Nzambe.

Elilingi
moboti ayambi mwana ya mawa

Toyaki na mabele mpo na koyekola lolenge nini ya kolanda Yesu mpe koyokela Molimo Mosantu. Toyekolaka kobatela mitindo mpe koyambola ntango tosali maponi ya mabe.

Elilingi
Yesu Klisto abimi na nkunda

Nsima ya liwa na biso, tokosekwa. Soki tozali malamu, tokofanda lisusu elongo na Tata na biso na Lola.

Elilingi
tata azali kotangela bana basi.

Nakoki koyekola na ntina ya mwango ya Nzambe na kati ya makomi. Mpo na Yesu, nakoki kozala na libota na ngai mpo na seko.

Kopakola langi na Lokasa

Tata ya Lola azali na Mwango mpo na Ngai

Elilingi
libota

Lolenge nini olandaka Yesu?