2021
Kotonga ya Yo Bomoto ya Malamu Koleka
Sanza ya libwa 2021


“Kotonga ya Yo Bomoto ya Malamu Koleka,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya Libwa 2021, 6–7.

Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya Libwa 2021

Kotonga ya Yo Bomoto Malamu Koleka

Banzela mitano ya kotonga bomoi ya malamu mpe ya esengo.

Malongi mpe Mayokani 95:13–14

Elilingi
elenge mwasi X-Ray, mwango na tempelo

Bilili na Juliet Percival

Ntango Nkolo atindaki Joseph Smith kotonga Tempelo ya Kirtland, Atikaki ye te akanisa ye moko lolenge kani ya kosala yango. Amonisaki mwango oyo ekokaki kokamba na elonga.

“Tika ndako etongama, na lolenge ya mokili te,” esakolaki Nkolo. “Tika yango etongama na lolenge oyo nakolakisa” (Malongi mpe Mayokani 95:13–14). Na nsima nde Nkolo apesaki malako na lolenge kani ya kotonga Tempelo (tala Malongi mpe Mayokani 95:15-17).

Likambo ya kozogisi matondi, Nkolo alakisaki biso mingi koleka bobele lolenge ya kotonga batempelo. Apesaki biso lisusu malako mpo na kosunga biso tokoma bato malamu koleka oyo tokoki kozala. Ntango tozali kolanda yango, tokotonga bomoi na biso “na lolenge ya mokili te” kasi na lolenge Nkolo alakisi.

Tala banzela mitano mpo na kotonga bomoi malamu mpe ya esengo kati na Yesu Klisto.

Tonga Moboko ya Solo

Moyemi ndako to motongi ndako kani akoyebisa yo ete moboko ya sikisiki ezali na ntina mpenza mpo na ndako nyonso. Elamani ateyaki ete moboko ya malamu koleka nyonso mpo na bomoi na biso ezali “libanga lya Mosikoli na biso, oyo azali Klisto, Mwana ya Nzambe” (Elamani 5:12). Tokoki kokomisa Klisto moboko na biso na koyaka epai na Ye mpe kolandaka mateya na Ye. Lolenge nini ozali komiyoka na kosalaka ete ozali kokomisa Klisto moboko ya bomoi na yo?

Salisa Basusu

Elilingi
kotelama

Nzela mosusu ya monene mpo na kotonga bomoi na biso, engebene na Mokambi Dieter F. Uchtdorf, ntango wana Mosungi ya Mibale na Bokambi ya Yambo, eyaka ntango “Totelemi na kosalelaka Nkolo mpe kosalisaka baoyo bazali nzinganzinga na biso.”1 Ntango ozali kosalisa basusu, ozali kosala oyo Yesu asalaki mpe koyekola kokoma mingi lokola Ye. Mpe okopambola kaka te bomoi ya bato ozali kosalela, kasi yo okopambwama mpe lokola.

Kela momeseno ya kosambela ntango nyonso pe ya Koyekola makomi

Elilingi
maboko ya losambo

Nzela mosusu ya kotonga bomoi ya esengo ezali kotonga mokangano na Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Nzela monene ya kosala eye wana ezali nzela ya losambo mpe ya boyekoli makomi.

Mokambi Uchtdorf alobaki: “Mpo na kokomisa mokangano na biso makasi na Nzambe, tosengeli kozwa mwa bantango ya motuya biso moko elongo na Ye. Kofandisa makanisi na kimya kati na losambo ya yo moko na mokolo na mokolo mpe kati na boyekoli makomi… ekozala libombisi ya bwanya ya ntango mpe bokasi na biso mpo na kokoma pene koleka na Tata na biso na Lola.”2

Losambo ezali libaku ya kosolola elongo na biso Tata na Lola. Ayebi biso, alingaka biso, mpe alingaka koyoka biso! Ntango tosambelaka na motema mobimba, topesaka matondo na biso, mpe tosengaka biloko tolingi, Ayokaka mpe ntango nyonso Ayanolaka na lolenge mpe na ntango na Ye.

Ntango ekokomaka ntango mpo na koyekola makomi, ezali na lolenge moko te ya malamu ya kosala yango. Eloko ya motuya ezali ete osala yango! Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, “Bozindisami na mozindo ya liloba na Nzambe mokolo na mokolo ezali motuya mpenza mpo na lobiko ya molimo.”3 Kozwa ntango mikolo nyonso kati na makomi, na ntembe te, ekosunga biso kotonga bomoi ya bondimi mpe bokasi.

Zingama yo moko na baoyo bazali kolendisa yo po na kosala Bolamu.

Elilingi
elenge mobali atandi maboko

Tata na Lola alingi biso tokangama mpe tosala mikangano elongo na basusu—mingi mingi na libota mpe na baninga. Tozwaka mbala mingi lolenge ya baoyo tolekisaka ntango elongo na bango. Atako bazali bandimi ya Eklezia to te, osengeli kozingama yo moko na bato oyo bakosunga yo osalela nsango malamu, obatela mitindo ya Nkolo, mpe okoma moto malamu koleka. Okoki mpe lisusu kosunga baye nzinganzinga na yo ete basala lolenge moko. Baninga na yo nini oyo basungaka yo otonga moboko na yo kati na bosembo?

Zwa Esengo na Kotonga Moboko na Yo.

Ezali na banzela mingi mosusu okoki kotonga bomoi na yo mpo ete ezala makasi na molimo mpe ezwa esengo, bakisa kokende na liyangani ya elambo mpe kolia elambo, kosala mpe kobatela mayokani, mpe kolanda toli ya baprofeta na bomoi.

Ezali motuya omikundola ete makambo oyo nyonso esengi mosala mpe ntango. Kotonga mpe koyekola esengeli kosalema ntango nyonso, kasi osengeli te kosala yango yo moko. Nkolo akosunga yo mokolo moko na moko ntango ozali komeka kotonga bomoi oyo yo mpe Ye bokoki kosepela na yango mpe oyo ekomemela yo esengo.

Matangi

  1. Dallin H. Oaks, “Waiting on the Road to Damascus,” likita linene ya Sanza ya minei. 2011 (Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2011, 76).

  2. Dieter. F. Uchtdorf, “Of Things That Matter Most,” likita linene Sanza ya zomi 2010 (Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2010, 21).

  3. Mokambi Russell M. Nelson, “Hear Him,” likita linene ya Sanza ya minei 2020 (Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2020, 89).