2021
Likita Linene: Liyangani ya Mokili Mobimba ya Eklezia
Sanza ya libwa 2021


“Likita Linene: Liyangani ya Mokili Mobimba ya Eklezia” Liahona, Sanza ya libwa 2021

Etinda ya Sanza Liahona Sanza ya libwa 2021

Likita Linene: Liyangani Mokili Mobimba ya Eklezia

Toyokaka baprofeta mpe bakambi basusu ya Eklezia na ntango ya likita linene. Bateyaka biso nini Nzambe alingi biso toyoka.

Elilingi
Libanda ya Ndako ya Likita

Sanza ya minei mpe ya zomi nyonso, Eklezia esalaka molongo ya mayangani mingi ebengani likita linene. Bakambi bateyaka mpe batatolaka na ntina ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye. Likita linene esalamaka na Salt Lake City, Utah, USA, mpe epalangisamaka na mokili mobimba na nkota koleka 80. Bandimi nyonso mpe batu basusu kani oyo basepeli babiangami koyoka mateya yango.

Elilingi
Kati ya Ndako ya Likita

Makita Manene ya Yambo ya Eklezia

Eklezia ebongisamaki solo na ntango ya liyangani ya mokolo ya 6, sanza ya minei 1830 (tala Malongi mpe Mayokani 20). Likita linene ya yambo esalemaki na mokolo ya 9, sanza ya motoba, 1830. Banda wana, makita manene esalemi na bokambami ya Mokambi ya Eklezia bisika nyonso bandimi bakoki kosangana. Na mibu 1840, bakambi babandaki kosala likita mbala mibale na mobu.

Elilingi
Mokambi Nelson na elobelo

Lolenge nini Makita Ebongisami Lelo

Bokambi ya Yambo, Lisanga ya Bapostolo Zomi na Babale, mpe bakambi basusu bazwaka maloba ntango ya likita linene. Bayembi ya Tabelenakele na Temple Square mpe bayembi basusu ya Eklezia bayembaka banzembo. Likita nyonso ezalaka na biteni mitano: misato mokolo ya poso, mibale mokolo ya eyenga. Na sanza ya minei, liyangani ya misatu ya mokolo ya poso ezali mpo na bandimi ya bonganganzambe ya Alona mpe masanga makoki ya bonganganzambe ya Melikisedeki. Na sanza ya zomi, ezalaka mpo na bandimi ya Lingomba ya Bamama mpe Bilenge Basi.

Mateya ya Bakambi

Basanza liboso ya likita, bakambi ya Eklezia basambelaka na ntina ya nini bakoteya. Nkolo afulaka bango mpo na koyeba nini basengeli koloba. Bateyaka bosolo ya nsango malamu mpe basengaka biso tobatela mitindo ya Nzambe. Batatolaka lisusu na ntina ya Yesu Klisto mpe batindaka biso tolanda Ye.

Boyekoli uta na Likita Linene

Liboso ya likita linene, tokoki kosambela mpo na koyoka nini Nkolo alingi biso toyekola. Ntango tozali koyoka masukulu, Molimo akoteya biso oyo tosengeli koyeba. Na nsima ya likita linene, masukulu ekobima na ChurchofJesusChrist.org, kati ya aplikasio ya Etando ya Mikanda ya Nsango Malamu mpe na Liahona. Tokoki koyekola na losambo masukulu mpo na koyekola mingi koleka oyo etali Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye.

Uta na Makomi

Yesu Klisto atangisaki ete tosengeli na kosanganaka mbala mingi (tala 3 Nefi 18:22).

Ntango bandimi ya Eklezia bazali kokumbamela Nkolo elongo, Nkolo akozala elongo na bango (tala Matai 18:20).

Nkolo atindi bandimi ya Eklezia ”batangisa mpe balendisa moko na moko”(Malongi mpe Mayokani 43.8).

Ntango bandimi ya Eklezia bazali kolakisa bondimi na Klisto, Molimo na Ye Akozala elongo na bango ntango bazali kosangana (tala Malongi mpe Mateya 44:2).