2021
Tempelo ya Kirtland
Sanza ya libwa 2021


“Tempelo ya Kirtland,” Moninga, sanza ya libwa 2021.

Etinda mpo na Moninga , Sanza ya libwa 2021

Tempelo ya Kirtland

Elilingi
Joseph Smith amoni Tempelo ya Kirtland na limonisi

Nzambe ayebisaki Joseph Smith atonga tempelo. Emoniseli moko elakisaki lolenge nini ekozala. Ekozala ndako ya Nzambe.

Elilingi
Kotongaka Templelo ya Kirtland

Basantu basalaki mosala elongo mpo na kotonga tempelo. Mibali batongaki bifelo ya milayi. Basi batongaki barido mpe batapi. Bana basungaki na komemaka bisaleli mpe mayi epayi ya basali.

Elilingi
bato bazali koyemba

Ntango tempelo esilaki, basantu bakotaki na kati. Bayembaki loyembo mpe bagangaki “Hosanna!” Joseph asambelaki mpo na kobonza (kopambola) tempelo.

Elilingi
Yesu Klisto amimonisaki na Tempelo ya Kirtland

Mposo moko nsima, Yesu Klisto amimonisaki epai ya Joseph Smith mpe Oliver Cowdery na kati ya tempelo. Yesu alobaki ete Andimaki tempelo lokola ndako na Ye.

Elilingi
bana na mabele ya tempelo

Lelo batempelo etongami na mokili mobimba! Tempelo moko na moko ezali esika esantu. Mokolo mosusu nakokota na kati mpe nakosala bilaka elongo na Nzambe.

Kopakola langi na Lokasa

Tempelo Ezali Esika Esantu.

Elilingi
mwana moko azali kokabola buku ya Moninga na mosusu

Fina na foto mpo na kozwa yango.

Elili na Apryl Stott

Mpo na nini tempelo ezali na motuya makasi?