2021
Tempelo mpe Moboko na Yo ya Molimo
Sanza ya Zomi na Moko 2021


Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya Zomi na Moko 2021

Tempelo mpe Moboko na Yo ya Molimo

Ntango nyonso lolenge kani ya mobulungano esalemi na bomoi na yo, esika ya kimia mpenza ya kozala na molimo ezali kofanda kati na tempelo ya mayokani na yo!

Bandeko na ngai, nazali na esengo ya kozala na bino na ntongo mpo na kokabola makanisi ya motema na ngai.

Lokola boyebi, tozali kosala misala minene ya bozongisi sika na Tempelo eyebana ya Salt Lake. Mosala ya mindondo oyo ezali na bolendidi makasi ya ntina ya moboko ya kala, oyo esalisaki malamu koleka ekeke moko. Kasi tempelo oyo esengeli kowumela ntango molai mingi. Na nsuka ya sanza ya mitano, nakendaki kotala botamboli ya mosala ya kafukafu oyo. Nakanisaki bokotonda kosepela komona maye mwasi na ngai Wendy mpe ngai tomonaki. Nakanisi bokomona mpo na nini loyembo “Quels Fondements Fermes”1 ekomi na ndimbola ya sika mpo na ngai.

Video uta na esika bazali kozongisa tempelo ya Salt Lake sika: “Tozali kotala moboko ya ebandeli ya Tempelo ya Salt Lake. Natelemi na esika moko na nse ya oyo ezalaki Lisuku ya Elanga ya Edene. Ntango nazali kososola etongeli ya etonga oyo mobimba, nasepeli na maye bapionie bakokisaki. Nazali kokamwa ntango nazali kotala ete batongaki tempelo kitoko oyo na bobele bisaleli mpe tekiniki oyo ezwamaki na bango eleki ekeke moko.

“Nzokande, ntango eleki mingi, soki totali moboko na mpembeni, tokoki komona makama ya bobebi, bokeseni na misala ya mabanga ya kala, mpe bitape ya ndenge na ndenge ya bozangi sikisiki na etongeli.

“Sikawa ntango nazali nzeneneke ya maye bainzeniele, akitekte, mpe banganga mayele ya botongi ya ntango ya sika bakoki kosala mpo na koyeisa makasi moboko ya kala wana, nakamwe solo kokamwa. Mosala na bango ezali kokamwisa!

“Moboko ya etonga kani, mingi mingi moko ya molai lokola moko oyo, esengeli kozala makasi mpe sikisiki ekoka mpo na kotelemela boningani ya mabele, bobebi, mipepe makasi, mpe bozindi ya koboya te oyo etutaka bitonga nyonso. Mosala ya mindondo ya kolendisaka oyo ezali kosalama sikawa ekokomisa makasi tempelo ya bule oyo na moboko oyo ekoki kotelemela momekano ya ntango.”

Elilingi
Bozongisi sika lisusu Tempelo ya Salt Lake

Tozali komipekisa bokasi moko te mpo na kopesa tempelo oyo ya lokumu, oyo ekomaka mpenza na likama, moboko oyo ekotelemela banguya ya mokili na Nkoto ya Mibu. Lolenge moko, ngonga ekoki ete tokokisa moko na moko meko ya kokamwa—ntango mosusu meko tozwa mokolo moko te liboso—mpo na kolendisa miboko ya molimo ya moto se moko na biso. Mikakatano ya sika to ya mpasi koleka esengaka meko ekeseni.

Bandeko, oyo ezali mikolo ya nsuka. Soki bino mpe ngai totelemeli makama mpe banguya oyo ezali koya liboso, esengeli ete biso moko na moko tozala moboko ya molimo ya sikisiki etongama likolo ya libanga ya Mosikoli, Yesu Klisto.2

Yango wana, natuni moko na moko na bino, “Boniboni sikisiki ezali ya bino moboko? Mpe bozongisi makasi nini na litatoli mpe bososoli na bino ya nsango malamu esengelami?

Tempelo efandisami na katikati ya kolendisaka bondimi mpe bokasi ya molimo na biso mpamba te Mobikisi mpe malongi na Ye ezali motema mpenza ya tempelo. Makambo nyonso eteyami na tempelo, na nzela ya malako mpe na nzela ya Molimo, ekolisaka bososoli na biso ya Yesu Klisto. Makuli na Ye ya ntina ekangisaka biso epai na Ye na nzela ya mayokani ya bule ya bonganganzambe. Nsima, ntango tobatelaka mayokani na biso, Apambolaka biso na ya Ye nguya ya kobikisa, ya kolendisa.3 Mpe, o, lolenge nini tokozala na mposa ya nguya na Ye na mikolo ekoya.

Tolakelami ete “soki [biso] tolengelami [biso] tokobanga te.”4 Maloba oyo ezali na ndimbola ya mozindo lelo. Nkolo alobi ete atako mikakatano oyo ezala ya lelo te, baoyo batongi miboko na bango likolo ya Yesu Klisto, mpe bayekoli lolenge nini kosalela nguya na Ye, bazali na mposa ya kokweya na bobangi se moko ya eleko oyo te.

Makuli mpe mayokani ya Tempelo ezali ya kala. Nkolo apesaki mitindo na Adama mpe Ewa basambela, basala mayokani, mpe bapesa mabonza.5 Solo, “ntago nyoso Nkolo azwaka bato na mabele, boyo bakotosa liloba na Ye, batindami kotonga batempelo.”6 Makomi masantu endimama etondi na maloba elobeli mateya, bilamba, lokota, mpe mingi ya tempelo.7 Makambo nyonso tondimelaka mpe bilaka nyonso Nzambe asali na bana na Ye ya liyokani ekutanaka na tempelo. Na mibu nyonso, tempelo ebeti nsete na bosolo ya motuya ete baoyo basalaka mayokani na Nzambe mpe babatelaka yango bazali bana ya liyokani.

Boye, na ndako ya Nkolo, tokoki kosala mayokani se moko wana elongo na Nzambe oyo Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo basalaki. Mpe tokoki kozwa mapamboli se moko wana mpe!

Elilingi
Tempelo ya Kirtland mpe ya Nauvoo

Batempelo ezali eteni ya eleko oyo uta na mikolo ya ebandeli.8 Eliya apesaki bafungola ya likoki ya bokangisi epai ya Joseph Smith na Tempelo ya Kirtland. Litondi ya bonganganzambe ezongisamaki na Tempelo ya Nauvoo.9

Kino martiro na ye, Joseph Smith akobaki kozwa mamoniseli oyo esungaki bozongisi ya makuli ya dotasio mpe ya bokangisi.10 Nzokande, ayebaki lisusu, ete bopetoli mosusu esengelamaki. Nsima ya kopesa dotasio epai ya Brigham Young na sanza ya mitano 1842, Joseph ayebisaki Brigham, “Oyo ebongisami malamu te, kasi tosali oyo tokoki kosala na libaku kati na oyo totiami mpe nalingi ete ozwa likambo oyo na maboko na yo mpe ete obongisa mpe osembola milulu oyo nyonso.”11

Kolandisama liwa ya Profeta, Mokambi Young ayangelaki bosilisi ya Tempelo ya Nauvoo12 mpe nsima atongaki batempelo na Telitoile ya Utah. Na bobulisi ya bandako ya nse ya Tempelo ya St. George, Brigham Young asakolaki makasi noki ya mosala ya bozwili ya tempelo ntango alobaki, “Ntango nakanisaka mama ya likambo oyo, nalingaka mingongo ya nkake nsambo elamusa bato.”13

Uta na ngonga wana kino lelo, makuli ya tempelo epetolamaki moke moke. Mokambi Harold B. Lee alimbolaki mpo na nini banzela ya kosalela, bapolitiki, mpe kutu makuli ya tempelo ezali kokoba kobongwana kati na Eklezia ezongisama ya Mobikisi. Mokambi Lee alobaki: “Mibeko ya nsango malamu ya Yesu Klisto ezali ya bonzambe. Moto moko te abongolaka mibeko mpe [malongi] ya Eklezia longola se Nkolo na nzela ya emoniseli. Kasi ndenge ebongwamaka ntango bokambi efulama eyelaka baoyo bazali kokamba na ntango moko boye.”14

Tala lolenge nini koyangela elambo ebongwani na mibu mileki. Na mikolo ya ebandeli, mai ya elambo ezalaki kopesama na lingomba na kopo moko monene. Moto nyonso azalaki komela uta na yango. Sikawa tosalelaka bakopo ya mike ya moto na moto mpe ya kobwaka. Lolenge ebongwanaki, kasi mayokani etikali yango kaka moko.

Manyola babosolo misato oyo:

  1. Bozongisi eyaka moke moke, ezali likambo ya mbala moko te, mpe ekokoba kino Nkolo akoya lisusu.

  2. Ntina ya nsuka ya bosangani ya Yisalaele15 ezali komema mapamboli ya tempelo epayi ya bana ya bosembo ya Nzambe.

  3. Ntango tozali koluka lolenge nini kokokisa ntina wana malamu mingi, Nkolo azali komonisa makanisi mingi. Bozongisi oyo ezali kokoba esengeli na emoniseli ya kokoba.

Bakambi ya Yambo mpe Lisanga ya Bapostolo Zomi na Babale batuni mbala mingi Nkolo soki ezali na ndenge malamu ya komemela bana na Ye ya bosembo mapamboli. Tolukaka bokambi ntango nyonso oyo etali lolenge nini ya kosala bosolo mpe bokokani ya malako, mayokani, mpe makuli ya tempelo na mokili mobimba atako bokeseni na lokota mpe bonkoko.

Na nse ya boyangeli ya Nkolo mpe na eyano na nsambo na biso, mbongwana ya lolenge ya kala te esalamaki. Ye azali Moko oyo alingi bino bososola na polele makasi solo maye bozali kosalela mayokani mpo na kosala. Ye azali Moko oyo alingi bino bosala na mobimba ya Ye makuli ya bule. Ye alingi bino bososola mabaku, bilaka, mpe mikumba na bino. Ye alingi bino bozala na makanisi ya molimo mpe boyebi bozwa mokolo moko te liboso. Oyo nde Ye azali na yango mposa mpo na banso ya bakuli ya tempelo, kozanga kotala bisika bafandi.

Mbongwana ya mikolo oyo na esaleli ya tempelo, mpe misusu oyo ekolanda, ezali elembo emonani na miso oyo ezali kokoba ete Nkolo azali mpenza koyangela Eklezia na Ye. Azali kopesa mabaku mpo na moko na moko na biso tolendisa miboko na biso ya molimo malamu mingi na kotiaka bomoi na biso likolo na Ye mpe likolo ya makuli mpe mayokani ya tempelo na Ye. Ntango bomemi mokanda ya ndingisa ya tempelo, motema mitutana, mpe molimo ya koluka epayi ya ndako ya boyekoli ya Nkolo, Ye akoteya bino.

Soki ntaka, mikakatano ya bokolongonu, to bipekiseli mosusu epekisi bokende na tempelo na eleko moko, nasengi bino botia ngonga ya ntango nyonso mpo na kozongela na motema na bino mayokani bosalaki.

Soki olingaka naino kokende na tempelo te, kendaka mbala mingi koleka—kasi moke te. Tika Nkolo, na nzela ya Molimo na Ye, ateya mpe afula yo kuna. Nalaki yo ete nsima ya ntango, tempelo ekokoma esika ya kimia, ya kolendisa, mpe ya emoniseli.

Soki ekokaki kosalama mpo ete ngai naloba mbunzu na mbunzu na elenge monzemba moko moko, nakobondela yo oluka moninga moko na oyo okoki kokangisama na ye na tempelo. Okoki kokamwa bokeseni nini ekosala na bomoi na yo. Nalaki ekosala bokeseni nyonso! Ntango obali na tempelo mpe ozongi mbala na mbala, okolendisama mpe okokambama na mikano na yo.

Soki nakokaki koloba na mobali abala mpe mwasi abala moko na moko oyo naino akangisami na tempelo te, nakobondela bino bozwa meko esengeli mpo na kozwa bokuli wana elatisaka motole mpe ebongolaka bomoi.16 Yango ekosala bokeseni? Bobele soki olingi kokola libela mpe kozala elongo libela. Kolinga kozala elongo libela ekosala yango esalama te. Molulu to boyokani mosusu moko te ekosala esalama.17

Soki nakokaki kolobela mobali to mwasi moko na moko oyo azali koluka libala kasi naino amoni moninga na ye ya seko te, nateyi yo ozela te kino libala mpo na kozwa dotasio na ndako ya Nkolo. Banda sikawa koyekola mpe koyeba nini elingi koloba kolatisama na nguya ya bonganganzambe.

Mpe na moko na moko na bino oyo asali mayokani ya tempelo, nabondeli bino boluka—na losambo mpe ntango nyonso—bososola mayokani mpe makuli ya tempelo.18 Bikuke ya molimo ekofungwana. Bokoyekola lolenge nini kofungola elamba katikati ya lola mpe mabele, lolenge nini kosenga banzelu basunga bino, mpe lolenge nini kozwa malamu boyangeli uta na lola. Makasi na bino ya molende mpo na kosala bongo ekolendisa moboko na bino ya molimo.

Bandeko balingami, ntango babozongisi sika na tempelo ya Salt Lake ekosila, ekozala na esika moko te ya kimia na ntango ya boningani ya mabele na Lobwaku ya Salt Lake koleka na kati ya tempelo.

Lolenge moko, ntango nyonso lolenge kani ya mobulungano esalemi na bomoi na yo, esika ya kimia mpenza ya kozala na molimo ezali kofanda kati na mayokani ya yo na tempelo!

Elilingi
Yesu Klisto

Nkolo Yesu Klisto, na nzela ya Del Parson

Nasengi bondimela ngai ntango nalobi ete moboko na yo ya molimo etongami na makasi likolo ya Yesu Klisto, bino bosengeli kobanga te. Ntango ozali sikisiki na mayokani na yo osalaki na tempelo, okopambolama na nguya na Ye. Nsima, ntango boningani ya mabele ya molimo esalami, okozala na makoki ya kotelema makasi mpamba te moboko na yo ya molimo ezali makasi mpe sikisiki.

Nalingi bino, bandeko babolingo. Nayebi bosolo oyo: Nzambe, Tata na biso ya Lola, alingi bino bopona koya epai na Ye. Mwango na Ye ya bokoli ya seko ezali mindondo te, mpe etosaka nguya na bino ya kopona. Bozali na nsomi ya kopona nani bokozala—mpe elongo na nani bokozala—na mokili ekoya!

Nzambe azali na bomoi! Yesu azali Klisto! Oyo ezali Eklezia na Ye ezongisama mpo na kosunga bino bokokisa lobi na bino ya bonzambe. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala “Quel fondements Fermes,” Cantiques, no. 42.

  2. Mpo ete “ntango zabolo [akotinda] ya ye [mopepe] makasi, … ekozala na nguya moko likolo na [biso] … na ntina ya libanga likolo na yango [biso] totongami, oyo ezali moboko ya solo, moboko moko likolo na yango soki bato batongi bakoki kokweya te.” (Elamani 5:12; nsete ebakisami).

  3. Tala Doctrine et Alliances 109:15, 22.

  4. Doctrine et Alliances 38:30; tala lisusu Doctrine et Alliances 10:55.

  5. Tala Moses 5:5–6.

  6. Bible Dictionary, “Tempelo.

  7. Ndakisa, tala Esode 28; 29; Lewitiki 8. Tabelenakele ya Mose eyebanaki lokola “ema ya litatoli” (Mitango 9:15) mpe “tabelenakele ya litatoli” (Esode 38:21). Tempelo ya Salomo ebebisamaki na 587 Liboso ya Mbotama ya Klisto, mwa mibu nsima libota ya Lehi etikaki Yelusaleme. Bozongisi sika ya tempelo yango na Zelubabele esalamaki mwa mibu 70 nsima. Nsima ebebisamaki na moto na mobu 37 Liboso ya Mbotama ya Klisto. Elode akomisaki tempelo monene pene na mobu 16 Yambo na Mbotama ya Klisto. Nsima tempelo oyo, eyebanaki na Yesu, ebebisamaki na 70 Nsima ya Mbotama ya Yesu Klisto. Nefi azalaki na mayele ya kosala lokola ya tempelo na kokendaka “na ngomba mbala mingi” mpo na kosambela (1 Nefi 18:3) mpe nsima, na Mikili ya Amerika, atongaki tempelo moko “kolandisama lolenge ya tempelo ya Salomo,” atako ezalaki ya kokembela moke (tala 2 Nefi 5:16).

  8. Tala Doctrine et Alliances 88:119; 124:31.

  9. Tala Doctrine et Alliances 110:13–16; 124:28. Libanga ya nsuka mpo na Tempelo ya Nauvoo etiamaki mokolo ya motoba na Sanza ya Minei, 1841, kaka mwa basanza nsima ntango Joseph Smith azwaki emoniseli ya kotonga yango. Tempelo ya Nauvoo etombolaki misala. Ndakisa, Nkolo alimbolaki ete liziba ya libatisi esengelamaki mpo ete Basantu babatisama mpo na baoyo bakufa (tala Doctrine et Alliances 124:29–30).

  10. Tala Doctrine Alliances 131; 132. Doctrine 128 ezali na mokanda moko ya Joseph Smith akomelaki Basantu oyo etali libatisi mpo na bakufi. Kuna asakolaki ete lobiko ya bakufi “esengelami mpe ezali ntina mpo na lobiko na biso, … [mpo ete] bakoki te kozanga biso kobongisama nie—biso mpe tokoki te kozanga bakufi na biso kobongisama nie” (molongo 15).

  11. Joseph Smith, na Saints: The Story of the Church of Jesus Christ in the Latter Days, vol. 1, The Standard of Truth, 1815–1846 (2018), 454.

  12. “Mokomi ya Mambi ya kala ya Eklezia George A. Smith asukisaki ete bandeko mibali mpe basi 5.634 bazwaki dotasio na bango na tempelo ya Nauvoo esila ndambo na Sanza ya Zomi na Mibale 1845 mpe Sanza ya yambo 1846. Kokangisama ya balongani ekobaki kino na mokolo 7, sanza ya mibale ya mobu, [1846,] na ntango oyo wapi balongani koleka 2,000 bakomaki moto moko na bonganganzambe mpo na ntango mpe boseko” (Bruce A. Van Orden, “Temple Finished before Exodus,” Deseret News, Dec. 9, 1995, deseret.com; see also Richard O. Cowan, “Endowments Bless the Living and Dead,” Church News, Aug. 27, 1988, thechurchnews.com).

  13. “Nini tokanisi batata balingaki koloba soki bakokaki koloba uta na bakufi? Elingaki bango te koloba, ‘Biso tolali awa bankoto ya mibu, awa na ndako ya boloko oyo, kozelaka eleko oyo eya’? … Mpo na nini, soki bazalaki na nguya bankake mpenza ya likolo elingaki kozala na matoyi na biso, soki tokokaki mpenza kososola motuya ya mosala kati na yango tomipesi. banzelu nyonso na lola bazali kotalela mwa bato moke oyo, mpe kotindika bango epai ya lobiko ya libota na bato. … Ntango nakanisaka likolo ya mama ya likambo oyo, nalingaka mingongo ya nkake nsambo elamusa bato” (Discourses of Brigham Young, sel. John A. Widtsoe [1954], 403–4).

  14. Harold B. Lee, “God’s Kingdom—a Kingdom of Order,” Ensign, Sanza ya Yambo 1971, 10. Tala lisusu lisakoli moko esalamaki na Mokambi Wilford Woodruff na 1896; Asakolaki: “Nalingi koloba, lokola mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, ete sikawa tosengeli kokende liboso mpe kokola. Tokoki te [komibimisa kati] na yango na zenla ya emoniseli. … Mokambi [Brigham] Young, oyo alandaki Mokambi Joseph Smith, akambaki biso awa. Abongisaki batempelo oyo mpe asalaki bantina ya libiangi na ye mpe mosala na ye. … Azwaki baemoniseli nyonso te oyo ezali ya mosala oyo; mpe Mokambi Taylor azwaki te, Wilford Woodruff mpe te. Ekozala na nsuka te na mosala oyo kino ekobongisama nie” (The Discourses of Wilford Woodruff, sel. G. Homer Durham [1946], 153–54).

  15. Tala 3 Nefi 29:8–9.

  16. Tala Doctrine et Alliances 131:2, 4.

  17. Tala Doctrine et Alliances 132:7.

  18. Mpaka John A. Widtsoe akomaki: “Epai ya mobali to mwasi oyo akotaka tempelo, na miso ya kofungwama, kosalaka keba na bilembo mpe mayokani, mpe kosalaka makasi ya molende, ya ntango nyonso mpo na kososola ndimbola mobimba, Nzambe kolobaka liloba na ye, mpe bimoniseli eyaka. Dotasio etonda mpenza na bilembo ete bobele zoba akomeka kolimbola yango; etonda mpenza na bimoniseli mpo na baoyo basalelaka bokasi na bango mpo na koluka mpe komona, ete maloba ya moto moko ekoki kolimbola to kokomisa polele bamakoki oyo efandi na mosala ya tempelo. Dotasio oyo epesamaki na nzela ya emoniseli ekoki kososolama malamu koleka nyonso mpenza na nzela ya emoniseli” (na Archibald F. Bennett, Saviors on Mount Zion [Sunday School manual, 1950], 168).