2021
Mposa ya Eklezia
Sanza ya Zomi na Moko 2021


“Mposa ya Eklezia,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2022.

Etinda ya Sanza ya Liahona Etinda, Sanza ya Zomi na Moko 2021

Mposa ya Eklezia

Biteni

Elilingi
tempelo

Mokolo ya lelo, liloba na ngai etali bato ya malamu mpe ya bozambe oyo batika kokende na kosambela to kosalisa na kati ya biklezia na bango. Ntango nazali koloba “biklezia”, nasangisi basinagoga, bamoske, to mangomba ya bozambe masusu. Tozali komitungisa mpo ete motango ya bato bakendeke na kati ya makambo nyoso ezali kokita makasi, na mokili mobimba.

Kokendeke koambela mpe misala ya kosalisa kati ya eklezia esungaka biso tokoma batu malamu mpe tozala na bopusi malamu na bomoi ya basusu. …

… Na eklezia, tosanganaka na batu malamu boyo babundaka mpo na kosalela Nzambe. Oyo ekundolisi biso ete tozali biso moko te kati ya misala na biso ya bozambe. Biso nyoso, tozali na mposa ya bosangani na basusu, mpe bosagani ya biklezia ezali moko ya makambo malamu tokoki komeka. …

… Badimi oyo babuakisi kokendaka na Eklezia mpe bazali kotalelaka kaka bozambe na bango moko, bazali komikabola na biloko ya ntina makasi ya nsango malamu: nguya mpe mapamboli ya bonganganzambe, litondi ya malongi ezongisami, mpe mposa mpe mabaku ya kosalela malongi yango. …

Likolo ya koyoka kimia mpe esengo kati na kotongaka kimoninga ya molimo, bandimi na biso, baoyo basanganaka na Eklezia, basepelaka na bambuma ya bomoi ya nsango malamu, lokola mapamboli ya kofanda kati na liloba ya bwana, bomengo ya biloko mpe ya molimo oyo elakamaki mpo na kofanda kati na mobeko ya moko na zomi. …

… Litondi ya malongi mpe makuli na yango ya lobiko mpe ya bonetoli ezali kaka na Eklezia oyo ezongisami.