2021
Bondimi ya Kosenga mpe Nsima Kosala
Sanza ya Zomi na Moko 2021


“Bondimi ya Kosenga mpe Nsima Kosala,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2022.

Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya Zomi na Moko 2021

Bondimi ya Kosenga mpe Nsima Kosala

Biteni

Elilingi
mobali azali kobondela

“Lolenge ya kozwa emoniseli kowuta na Nzambe ebongwani te uta na mikolo ya Adama mpe Eva. Ezalaka lolenge moko mpo na mabiangi nyonso ya basali ya Nkolo uta ebandeli kino mokolo ya lelo. Ezali lolenge moko na yo mpe ngai. Esalemaka ntango nyonso na kosalelaka bondimi. …

Ozali na mituna mpo na oyo olukaka biyano. Ozali na bondimi ya kokoka mpo na kolikya ete okozwa biyano uta na Nkolo na nzela ya Basali na Ye. Okozala na libaku malamu te ya kosenga na mongongo makasi mpo na biyano uta na balobeli, kasi okoki kosenga Tata na yo ya bolingo na nzela ya losambo.

Nayebi uta na boyebi na ngai ete biyano ekoya mpo na kokokisa mposa na yo mpe bolengeli na yo ya molimo. …

Soki bondimi na yo na Yesu Klisto ekambi yo na motema oyo ekomi ya boboto na nzela ya makambo ya Bomikabi na Ye, okozala na makoki ya koyoka mamimisi ya Molimo na eyano na losambo na yo. …

Ntango bondimi na biso epai ya Yesu Klisto ekokamba biso tosenga Tata biyano, bondimi yango ekomemela biso lisusu loboko ya boboto ekoki ya Mobikisi mpo ete biso toyoka bokambi na Ye mpe tozala na ekateli mpe mposa ya kotosa. …

Ezali litatoli na ngai ete libanga likolo ya oyo totelemeli ezali litatoli na biso ete Yesu azali Klisto, ete oyo ezali Eklezia na Ye, oyo Ye moko akambaka; mpe ete Mokambi Russell M. Nelson azali profeta na bomoi lelo. …

Nasambeli ete bokoka kozala na litatoli wana.

Elilingi
tempelo

Lilandi ya tempelo ya Cordoba Argentine