2022
Bankoko: Bazalaki Banani mpe Mpo na nini Bazali Ntina
Sanza ya mibale 2022


“Bankoko: Bazalaki Banani mpe Mpo na nini Bazali Ntina,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya mibale 2022

Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya mibale 2022

Genese 11–50

Ba Nkoko

Bankoko Bazalaki Banani mpe Mpo na nini Bazali Ntina

Ntango mosusu osi oyoka na ntina ya Abalayama, Yisaka mpe Yakobo. Totangaka na ntina na bango mbala mingi na Buku ya Mormon mpe solo okoyoka ebele na ntina na bango lokola ozali koyekola Boyokani ya Kala mobu oyo. Mpo na bokebi ebele topesi epai na bango, basengeli kozala ntina koleka, bongo te? Kasi okoki komituna yo moko, “Mpo na nini bato misato oyo babika mibu nkoto misato eleki bakoki kozala ntina lelo?” Malamu, fungola na eyano wana ezali na mayokani ya seko mpe mapamboli elakama oyo Nzambe apesaki epai na bango.

Abalayama

Elilingi
Abalayama

Liyemi na Jarom Vogel

Abalayama azalaki profeta monene. Azalaki moyengebene mpe motosi na mitindo ya Nzambe.

Abatisamaki, azwaki bonganganzambe, mpe akangisamaki epai ya mwasi na ye Sala mpo na seko.

Nzambe asalaki liyokani elongo na Abalayama ete nkola na ye ekozala makasi mpe ekozwa mapamboli lolenge moko na oyo azwaki.

Basengelaki komema litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto na bikolo ya mabele.

Yisaka

Elilingi
Yisaka

Yisaka azalaki mwana ya Abalayama mpe Sala.

Nzambe ayebisaki Abalayama akaba Yisaka mbeka. Abalayama alingaki Yisaka kasi aponaki kotosa Nzambe. Bobele yambo Abalayama akaba Yisaka mbeka, anjelu ayebisaki Abalayama atika. Bolingi ya Abalayama mpe Yisaka ya kotosa Nzambe ezali elembo ya Bomikabi ya Mwana ya Nzambe se Moko ya Likinda.

Yisaka alakamaki mapamboli ya lolenge moko lokola Abalayama.

Yakobo

Elilingi
Yakobo

Kaka lokola tata na ye mpe nkoko na ye, Yakobo azalaki na boyengebene epai ya Nzambe.

Mpo na boyengebene na ye, Nkolo abongolaki nkombo ya Yakobo na Yisalaele, oyo elimboli “moto oyo asalaka na Nzambe” to “tika Nzambe asala” (tala Bible Dictionary, “Yisalaele”).

Yakobo abotaki bana mibali 12. Bana mibali oyo mpe mabota na bango bayebanaki lokola bikolo ya Yisalaele.

Liyokani oyo Nzambe asalaki elongo na Abalayama eyeisamaki sika elongo na Yakobo mpe bana na ye.

Bankoko mpe Yo

Lokola mondimi ya Eklezia, ozali eteni ya nkola ya Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo. Liyokani oyo basalaki na Nzambe esalelami epai na yo!

Ozali na lipamboli mpe mokumba ya kotatola na ntina ya Mobikisi mpe kokabola nsango malamu.

Obiangami lisusu kobengisa moto nyonso asala mpe abatela mayokani mpe azwa makuli ya bonganganzambe. Mokambi Russell M. Nelson alobaki ete nyonso oyo ezali eteni ya bosangisi Yisalaele, oyo “ezali eloko ya ntina mingi koleka oyo ezali kozwa esika na mabele lelo” (“Elikya ya Yisalaele,” [worldwide youth devotional, June 3, 2018], 8, ChurchofJesusChrist.org).