2022
Mayokani Ekangisaka Biso na Nzambe
Sanza ya mibale 2022


“Mayokani Ekangisaka Biso na Nzambe,” Liahona, Sanza ya mibale 2022

Etinda ya Sanza Liahona Sanza ya mibale 2022

Mayokani Ekangisaka Biso na Nzambe

Kosala mpe kobatela mayokani ememaka mapamboli.

Liyokani ezali elaka ya Tata na Lola mpe bana na Ye. Atiaka mibeko mpo na mayokani oyo tosalaka elongo na Ye. Ntango tosali oyo Ye asengi, tozwaka mapamboli ebele. Mpe tozwaka mapamboli kaka na mabele awa te—ntango tosali mpe tobateli mayokani, tokozonga kofanda elongo na Nzambe mpe mabota na biso na lola mokolo moko.

Elilingi
libatisi

Mayokani mpe Makuli

Tosalaka mayokani na ntango ya makuli songolo. Tosengeli kosala makuli yango mpe kotosa mayokani wana na ntina ete tozonga kofanda elongo na Nzambe. Makuli oyo esalemaka na likoki ya bonganganzambe. Makuli oyo ezali na libatisi mpe nkotisa, kozwaka Bonganganzambe ya Melekisedeke (mpo na mibali), mpe makuli oyo tozwaka na tempelo. Na ntango ya elambo, bandimi ya Eklezia babandelaka bilaka oyo basalaki epai ya Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 20:77, 79).

Elilingi
elambo

Mayokani Esungaka Biso Tobika na Boyengebene

Na ntango ya libatisi, tolakaka kolanda Yesu Klisto, kokanisa Ye ntango nyonso, mpe kobatela mitindo (tala Malongi mpe Mayokani 20:37). Nzambe alaki ete Molimo Mosantu akoki kozala na biso ntango nyonso.

Ntango mibali bazwaka bonganganzambe, balakaka kobika na bolongobani na nguya ya Nzambe. Nzambe alaki kopambola bango. (Tala Malongi mpe Mayokani 84:33–40.)

Elilingi
Tempelo ya Brazil Recife

Liyemi ya Tempelo ya Brazil Recife na James Porter

Mayokani Tosalaka na Tempelo

Ntango bandimi ya Eklezia bazwaka dotasio na bango na tempelo, balakaka kobika na bolongobani mpe komikaba na nsango malamu. Balakami nguya kouta na Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 38:32; 109:22).

Na ntango ya bokangisi na tempelo, mobali mpe mwasi babalani mpo na seko mpe balaki kozala na bolongobani epai ya moko mpe mosusu mpe epai ya Nzambe. Nzambe alaki bakoki kozonga epai na Ye mpe kofanda elongo lokola libota mpo na seko. (Tala Malongi mpe Mayokani 132:19–20.)

Elilingi
bamisionele

Tozali Bato ya Liyokani

Baoyo bakomi bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bakomaka bato ya liyokani ya Nzambe. Bazwaka libula ya mapamboli mpe mikumba ya liyokani ya Abalayama (tala Bagalatia 3:27–29). Kozala eteni ya bato ya liyokani ya Nzambe elimboli tosunganaka moko na moko mpo na kopusana epai ya Klisto. Elimboli lisusu tosalaka mpo na kolendisa Eklezia ya Nzambe na mabele. Ntango tobateli mayokani na biso, tokoki kozwa nguya mpe bokasi kouta na Nzambe.