2022
Abalayama mpe Sala
Sanza ya mibale 2022


“Abalayama mpe Sala,” Etinda ya Sanza Moninga Sanza ya mibale 2022

“Abalayama mpe Sala”

Etinda ya Sanza Moninga Sanza ya mibale 2022

Abalayama mpe Sala

Elilingi
Abalayama mpe Sala na kati ya ema

Liyemi na Apryl Stott

Abalayama azalaki profeta. Nzambe asalaki liyokani elongo na Abalayama mpe mwasi na ye, Sala.

Elilingi
Abalayama mpe Sala bamonani na mawa

Nzambe alakaki kopambola bango. Ayebisaki bango ete bakobota bana. Abalayama mpe Sala balakaki kolanda Nzambe.

Elilingi
Abalayama mpe Sala

Abalayama mpe Sala babatelaki elaka na bango. Kasi bazwaki bana te uta ntango molai. Bakolaki mpenza mpe bakomaki mibange.

Elilingi
Abalayama mpe Sala na mwana Yisaka

Na nsuka, ntango Abalayama akomaki na mibu 100 mpe Sala akomaki na mibu 90, bazwaki mwana mobali. Bapesaki ye nkombo Yisaka. Bayebaki ete Nzambe apambolaki bango.

Elilingi
bana bazali kolona nkona

Nakoki kotyela Nzambe motema. Mbala mosusu mapamboli eyaka na lombango te. Kasi Nzambe abatelaka ntango nyonso bilaka na Ye.

Kopakola langi na Lokasa

Nakoki kotyela Nzambe motema.

Elilingi
mwana azali kosakana

Fina na foto mpo na kozwa yango.

Liyemi na Apryl Stott

Lolenge nini Tata na Lola asungaki yo ntango ozalaki na bobangi to mawa?