2023
Mikanda mpo na Bilenge mpe Bana
Sanza ya mibale 2023


“Mikanda mpo na Bilenge mpe Bana,” Liahona, Sanza ya mibale 2023.

Etinda ya Sanza Liahona Sanza ya mibale 2023

Mikanda mpo na Bilenge mpe Bana

Elilingi
baboti bazali kotanga makomi elongo na bana

Baboti bazali na mokumba ya liboso ya koteya bana na bango maye matali Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye. Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali na mabongisi, bapologalami, mpe mikanda mpo na kosunga baboti kati na makasi na bango. Elongo, baboti, bakambi ya Eklezia, mpe baninga bakoki kosunga bana banso mpe bilenge baya na Klisto.

Elilingi
Bana ya Eteyelo ya bana

Foto na Ben Johnson

Eteyelo ya Bana

Eteyelo ya bana ezali libongisi ya Eklezia mpo na bana ya basanza 18 kino mibu 11. Na Eteyelo ya bana, bana bayekolaka maye matali Yesu mpe nsango malamu na Ye kati na mateya, miziki, mpe misala. Eteyelo ya bana ekoki kosunga bana bayoka bolingo ya Nzambe mpo na bango.

Masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona mpe Bakelasi ya Bilenge Basi

Na sanza ya yambo ya mobu oyo bana bakokisi mibu 12, bamati uta na Eteyelo ya bana mpo na kokende na masanga makoki ya Bonganganganzambe ya Alona to (mpo na bilenge mibali) to na bakelasi ya Bilenge Basi (mpo na bilenge basi). Kati na masanga makoki mpe bakelasi na bango, bilenge bakobi kolendisa matatoli na bango mpe kosalisa basusu.

Elilingi
Maboko ezali koyema elilingi

Pologalami ya Bana mpe Bilenge

Na bolenge na Ye, Yesu Klisto akolaki na bwania mpe nzoto, mpe na kondimama na Nzambe mpe moto” (Luka 2:52). Pologalami ya Bana mpe Bilenge esungaka bandimi ya Eklezia ya bilenge balanda ndakisa ya Klisto. Bayekolaka mpe bakolaka na makambo nyonso ya bomoi na bango—na molimo, na miso ya bato, na nzoto, mpe na mayele.

Bazulunale ya Eklezia

Zulunale ya Eklezia mpo na bana ezali zulunale Moninga. Mpo na Bokasi ya Bilenge ezali zulunale mpo na bilenge. Bazulunale oyo ezali na masolo, mateya, mpe milulu ekomama mingimingi mpo na bana mpe bilenge.

Elilingi
lokasa ya liboso ya buku ya bokambi na Esipaniola

Mpo na Bokasi ya Bilenge Buku ya bokambi

Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kosala Maponi eteyi bilenge oyo etali bosolo ya nsango malamu. Eteyaka bango lolenge nini kozwa mikano oyo ekosunga bango balanda Yesu Klisto. Ezali lisusu na biyano na mituna bilenge bakoki kozala na yango etali lolenge nini kosalela nsango malamu.

Ebombelo ya Babuku ya Nsango Malamu

Ndako ya Babuku ya Nsango Malamu ezali na mikanda ya mitango mingi, kasangisaka bavideo, miziki, masolo ya makomi, mpe misala. Ezali lisusu na mikanda mpo na kosunga baboti mpe bakambi bateya mabongi ya nsango malamu. Mikanda oyo ezwami kati na Ndako ya Babuku ya Nsango Malamu ChurchofJesusChrist.org mpe kati na Aplikasio ya Ndako ya Babuku ya Nsango ya Malamu.

Makita ya MBB (FSY)

Kobanda na mobu bakokokisa mibu 14, bilenge babengisami mpo na kozala na makita ya Mpo na Bokasi ya Bilenge (MBB). Makambo oyo ezali na misala mpe mateya oyo esungaka kolendisa bondimi kati na Yesu Klisto mpe kosunga bilenge bakola na molimo, na bato, na nzoto, mpe na mayele.