2023
Tosengeli Kozala ya Kobonga nie Sikawa?
Sanza ya mibale 2023


“Tosengeli Kozala ya Kobonga nie Sikawa?” Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya mibale 2023.

Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya mibale 2023

Tosengeli Kozala ya Kobonga nie Sikawa?

Uta na Lisukulu ya likita linene ya sanza ya zomi 2017.

Elilingi
elenge mobali azali kotanga makomi

Bililingi na Emily E. Jones

Makomi ekomamaki mpo na kopambola mpe kolendisa biso, mpe solo basalaka yango. Kasi omoni ete mbala na mbala mpe likomi moko ekobima oyo ekundolisi biso tozali kotikala moke nsima? Mpo na ndakisa: “Ozala malamu be, lokola Tata na bino … na likolo azali malamu be” (Matai 5:48). Na motindo wana, tolingi kozonga na mbeto mpe kobenda bulangeti likolo ya moto na biso. Ntina ya selesitiale ya boye ezali komonana lokola mosika na biso. Kasi solo Nkolo akopesa biso mokolo moko te motindo oyo Ye ayebi tokokoka kobatela te.

Elilingi
Elenge mwasi na lingembu kati na mvula

“Iyo, Boya epai ya Klisto, mpe bobonga nie kati na Ye” Esambelaki Moroni. “Bolinga Nzambe na bokasi, mayele mpe makasi na bino nyonso, bongo … na ngolu na ye tokoki kobonga nie na Klisto” (Moroni 10:32; nsete ebakisami). Elikya na biso mpenza mpo na bobongi nie ya solo ezali kati na kozwa yango lokola likabo uta na lola—tokoki te “kolonga” yango.

Elilingi
Elenge mwasi komataka likolo ya ngomba na mbwa

Kolongola mpo na Yesu, ezali na makambo ezanga mbeba na mobembo ya mabele oyo tozali kolanda te, yango wana ntango tozali na kufa tika tosala makasi mpo na kobongisama ntango nyonso mpe kokima bamposa makasi ya biso moko mpe ya basusu.

Elilingi
masuwa na mbu ya mvula makasi

Soki biso toyiki mpiko, nde esika moko kati na seko bobongi nie na biso ekosilela mpe ekotonda—oyo ezali ndimbola ya Boyokani na Sika ya bobongi nie.