2023
Yesu Abikisi Mwasi moko
Sanza ya mibale 2023


“Yesu Abikisi Mwasi moko,” Etinda ya Sanza Moninga Sanza ya mibale 2023

“Yesu Abikisi Mwasi moko”

Etinda ya Sanza Moninga Sanza ya mibale 2023

Yesu Abikisi Mwasi moko

Elilingi
Yesu azali kotambolaka makolo na balabala

Mayemi na Apryl Stott

Mokolo moko Yesu azalaki kokita makolo na balabala moko ya bato mingi. Na liboke yango ezalaki na mwasi moko oyo azalaka maladi mibu 12.

Elilingi
Mwasi kosimbaka elamba ya Yesu

Mwasi yango azalaki na bondimi yango wana Yesu akokaki kobikisa ye. Asembolaki loboko mpe asimbaki nzambala na Ye. Longwa na ntango wana abikisamaki!

Elilingi
Yesu Klisto

“Nani asimbi elamba na ngai?” Yesu atunaki. Mwasi yango abangaki. Afukamaki liboso yaYesu mpe alobelaki Ye maye masalemaki.

Elilingi
Yesu azali koloba na mwasi moko

Yesu azalaki bolingo. Alobaki, “Yoka esengo.” Ayebisaki ye abikisamaki mpo na bondimi na ye.

Elilingi
bana kati na bwato

Nakoki kozala na bondimi kati na Yesu Klisto. Bolingo na Ye ekoki kosunga ngai mpe komemela ngai kimia.

Kopakola langi na Lokasa

Nazali na Kondima na Yesu Klisto.

Elilingi
Mama mpe mwana na ye ya mobali bazali kosambela

Fina na foto mpo na kozwa yango.

Liyemi na Apryl Stott

Lolenge nini olakisaka bondimi na yo?