Liahona
Mobikisi ya Bato Banso, Nsango Malamu mpo na Bato Banso
Sanza ya misato 2024


“Mobikisi ya Bato Banso, Nsango Malamu mpo na Bato Banso,” Liahona, Sanza ya misato 2024

Etinda ya Liahona Sanza ya misato 2024

Yango Mobikisi ya Bato Banso, Nsango Malamu mpo na Bato Banso

Nsango malamu, Bomikabi, mpe Bosekwi ya Yesu Klisto epambolaka bana banso ya Nzambe.

Elilingi
Klisto mpe elenge mobali ya mokatatani

Klisto mpe Mokatatani, na J. Kirk Richards, ekoki kosalema na copi te

Nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto ezali, yambo, libosoliboso, mpe libela, liziba ya esengo ya koumela, kimia ya solo, mpe esengo mpo na moto nyonso na mikolo oyo ya nsuka. Mapamboli oyo ezali kouta na nsango malamu mpe uta na boboto ya Klisto oyo ezangi ndelo ezalaki ata moke te mpo na bato moke oyo baponamaki, na kala to na ntango ya mikolo oyo.

Ata soki tokoki koyoka ete tokoki te, mpe atako masumu oyo ekoki kokomisa biso mosika na Ye mpo na mwa ntango, Mobikisi na biso andimisi biso ete “asemboli maboko na ye epai na [biso] mokolo mobimba” (Yakobo 6:4), kobengisaka biso banso koya epai na Ye mpe koyoka bolingo na Ye.

Mapamboli ya Nsango Malamu mpo na Mokili Mobimba

Nsango malamu ya Yesu Klisto “ezongisami na mikolo oyo ya nsuka mpo na kokokisa … bamposa ya ekolo nyonso, ya bandeko, ya monoko, mpe ya bato na mabele.”1 Nsango malamu eleki bikolo mpe langi nyonso wana ezali kokatisa bandelo nyonso ya bonkoko mpo na koteya ete “banso bakokani na Nzambe” (2 Nefi 26:33).2 Buku ya Mormon etelemi lokola litatoli ya kokamwa ya bosolo oyo.

Lisolo monene oyo etatoli ete Klisto amikundoli na bikolo nyonso (tala 2 Nefi 29:7) mpe akomimonisa “yemei epai ya baoyo banso bandimi ye, … [mpe akosala] makamwisi ya nguya, bilembo, mpe makamwisi, kati na bana ya bato” (2 Nefi 26:13). Kati na makamwisi oyo ya nguya, bilembo, mpe makamwisi ezali kopalanganisa nsango malamu. Na yango, totindaka bamisionele kati na mokili mobimba mpo na kotatola nsango malamu na yango. Tokabolaka mpe nsango malamu na baye bazali nzinganzinga na biso. Kosalela bafungola ya bonganganzambe oyo ezongisama mpo na bato ya bomoi mpe bakufi esalaka ete botondi ya nsango malamu ezwama nsukansuka na mwana mobali mpe mwana mwasi nyonso ya baboti na biso ya lola—ya kala, ya lelo, to ya mikolo mizali koya.

Motema ya nsango malamu oyo—nsango ya ntina ya profeta mpe apostolo nyonso oyo abengamaki na mosala—ezali ete Yesu azali Klisto mpe ete Ayaki kopambola moto nyonso. Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tosakoli ete mbeka na Ye ya bomikabi ezali mpo na mokili mobimba.

Mposa ya Bomikabi oyo Ezangi nsuka mpe ya Seko.

Ntango nazali kotambola na mokili mobimba, nasalaka masolo na ebele ya bandimi ya Eklezia. Nafulami mpo na koyoka boniboni bayokaka mapamboli ya Bomikabi ya Yesu Klisto kati na bomoi na bango, ata ntango bayambolaka lisumu moko ya mosika. Boniboni kitoko ezali ete libondisi ya bopeto ya Bomikabi na Ye ezali ntango nyonso na biso banso!

Amuleki asakolaki ete, “Esengeli kozala na bomikabi oyo esalemi,” “soki te bato nyonso basengeli kokufa kozanga kopengola.” Tolingaki libela “kokweya mpe … kobunga, … longola se soki ezali na nzela ya bomikabi,” oyo esengaki “mbeka oyo ezangi nsuka mpe ya seko.” Mpo “ekoki kozala na eloko moko te oyo ezali moke koleka bomikabi oyo ezangi nsuka oyo ekoka mpo na masumu ya mokili” (Alma 34:9, 10, 12).

Profeta monene Yakobo ateyaki lisusu ete lokola “liwa eleki likolo ya bato banso, … esengeli kozala na nguya ya lisekwa” mpo na komema biso na miso ya Nzambe (2 Nefi 9:6).

Esengelaki kolonga lisumu mpe liwa. Oyo ezalaki misio ya Mobikisi, oyo Asilisaki na mpiko nyonso mpo na bana banso ya Nzambe.

Elilingi
Klisto na Getesemane

Getesemane, na J. Kirk Richards, ekoki kosalema na copi te

Libonza ya Mobikisi na biso

Na butu na Ye ya nsuka na bokufi, Yesu Klisto akotaki na Elanga ya Getesemane. Kuna, Afukamaki na kati ya banzete ya eyala mpe abandaki kokita na bozindo ya mpasi oyo ngai mpe yo tokoyeba ata moke te.

Kuna, Abandaki kozwa likolo na Ye moko masumu ya mokili. Ayokaki mpasi nyonso, mpasi ya motema, mpe mawa, mpe ayikaki mpiko na mpasi mpe minyoko nyonso oyo yo, ngai, mpe molimo nyonso oyo azalaka na bomoi to akozala na bomoi. Minyoko ezanga nsuka mpe mpasi monene oyo esalaki ete [Ye], … oyo aleki banso na monene , alenga mpo na mpasi, mpe atangisa makila na lidusu moko moko ya mposo” (Malongi mpe Mayokani 19:18). Bobele Ye nde akokaki kosala boye.

Moto mosusu azalaki te oyo abongaki malamu ya kokoka.

Mpo na kofuta motuya ya lisumu.

Bobele Ye nde akokaki kofungola ekuke

Ya likolo mpe kotika biso tokota.3

Na nsima, bamemaki Yesu na Bolozi, mpe na ntango ya mawa oyo ezalaki sembo te na lisolo ya mokili oyo, babakaki Ye na ekulusu. Moto moko te akokaki kolongola bomoi na Ye epai na Ye. Lokola Mwana Mobali Mobotami se Moko ya Nzambe, Azalaki na nguya likolo ya liwa ya mosuni. Akokaki kosambela epai ya Tata na Ye, mpe mampinga ya banzelu elingaki koya kolonga banyokoli na Ye mpe kolakisa bokonzi na Ye likolo ya biloko nyonso. “Kasi ndenge nini makomi makokokisama,” Yesu atunaki na ntango ya kotekama na Ye, “yango esengeli kosalema boye?” (Matai 26:54).

Na botosi ya kokoka epai ya Tata na Ye—mpe bolingo ya kokoka mpo na biso—Yesu apesaki bomoi na Ye na bolingi mpe asilisaki libonza na Ye ya bomikabi oyo ezangi nsuka mpe ya seko, oyo ekomi nsima na ntango mpe liboso na boseko nyonso.

Elonga ya Mobikisi na biso

Yesu apesaki Bapostolo na Ye mitindo ete babatela mosala na Ye nsima ya liwa na Ye. Lolenge nini bakokaki kosala yango? Mingi kati na bango bazalaki kaka balobi mbisi ya mpamba, mpe moko te alengelamaki na basinagoga mpo na mosala ya kosakola. Na ngonga wana, emonanaki lokola ete Eklezia ya Klisto esengelaki kolimwa. Kasi Bapostolo bazwaki makasi mpo na komema libiangi na bango na mapeka mpe kobongisa lisolo ya mokili.

Nini esalaki ete makasi euta na bolembu ya ndenge wana oyo emonanaki? Mokambi ya lingomba ya Anglican mpe nganga-mayele Frederic Farrar alobaki ete: “Ezali na eyano moko, mpe bobele moko kaka lisekwa uta na bakufi. Bobongwani monene wana nyonso eutaki na nguya ya lisekwa ya Klisto.”4 Lokola banzeneneke ya Nkolo asekwi, Bapostolo bayebaki ete eloko moko te ekokaki kopekisa mosala oyo ekende liboso. Litatoli na bango ezalaki liziba ya nguya ya kobatela lokola Eklezia ya yambo elongaki mikakatano nyonso.

Na eleko oyo ya Pasika, lokola moko ya banzeneneke na Ye oyo aponami, nasakoli ete na ntongo ya mokolo ya eyenga moko kitoko, Nkolo Yesu Klisto asekwaki uta na liwa mpo na kolendisa biso mpe kobuka mikangano ya liwa mpo na moto nyonso. Yesu Klisto azali na bomoi! Na ntina na Ye, liwa ezali nsuka na biso te. Lisekwa ezali likabo ya Klisto ya ofele mpe ya mokili mobimba epai ya bato nyonso.

Elilingi
Klisto mpe Malia Magadala na lilita

Klisto mpe Malia na Lilita, na Joseph Brickey

Yaka epai ya Klisto

Nsango malamu mpe Bomikabi ya Yesu Klisto ezali mpo na moto nyonso—elingi koloba, moto nyonso. Lolenge se moko tozwaka mapamboli mobimba ya libonza ya bomikabi ya Mobikisi ezali na kondimaka moko na moko libyangi na Ye: “Yaka epai na ngai” (Matai 11:28).

Toyei epai ya Klisto ntango tozali komonisa bondimi epai na Ye mpe tozali koyambola. Toyei epai na Ye ntango tobatisami na nkombo na Ye mpe tozwi likabo ya Molimo Mosantu. Toyei epai na Ye ntango tozali kobatela mitindo, kozwa makuli, kokumisa mayokani, koyamba makambo tokutani na yango na tempelo, mpe kobika lolenge ya bomoi bayekoli ya Klisto bazali kobika.

Na bantango mosusu, okolemba nzoto mpe okozanga mawa. Motema na yo ekoki kobukana mpo na yo moko to mpo na moto oyo olingaka. Okoki kozala kilo mpo na masumu ya basusu. Mabunga osali—mbala mosusu oyo ya makasi—ekoki kotinda yo obanga ete kimya mpe esengo etiki yo mpo na libela. Na bantango ya boye, bomikundola ete Mobikisi atomboli kaka te bozito ya masumu kasi lisusu “anyokwama[ki] mpasi mpe minyoko mpe masenginia ya lolenge nyonso” (Alma 7:11), kobakisa ya yo! Na ntina ya oyo Ye alekisaki mpo na bino, ayebi ye moko boniboni kosalisa bino ntango bondimi libyangi na Ye oyo ebongoli bomoi: “Yaka epai na ngai.”

Boyei Malamu na Bato Banso.

Yesu Klisto amonisi polele ete bana banso ya Tata na Lola bazali na bosenga ya kokokana na mapamboli ya nsango malamu mpe Bomikabi na Ye. Akundoleli biso ete bato banso “bazali na libaku malamu moko lokola mosusu, mpe moko te apekisami” (2 Nefi 26:28).

“Abiangi bango banso baya epai na ye mpe kokabola bolamu na ye; mpe akoboya moko te oyo akoya epai na ye, mpembe mpe moyindo, mowumbu mpe monsomi, mwasi mpe mobali.”(2 Nefi 26:33).

“Abengisi bango banso”—yango elakisi biso banso! Tosengeli te kotya bilembo ya likololikolo mpe bokeseni ya ndenge ya mayele na biso moko to na bato mosusu. Tosengeli kotia bipekiseli moko te na bolingo ya Mobikisi to kosepelisa makanisi ete biso to basusu tozali koleka makoki na Ye. Lokola nalobaki liboso, “Ekoki kosalema te mpo na [moto moko] kozinda na nse koleka pole engengaka oyo ezanga nsuka ya Bomikabi ya Klisto”5

Na esika na yango, lokola Ndeko mwasi Holland mpe ngai toteyaki kaka mwa basanza yambo ya liwa na ye, topesameli etinda ya “kozala na bolingani, oyo bolingani ezali bolingo” (2 Nefi 26:30).6 Oyo ezali bolingo Mobikisi alakisi biso, mpo “Asalaka eloko moko te longola se mpo na bolamu ya mokili; mpo alingi mokili, kutu ete apesaki bomoi na ye moko ete akoka kobenda bato banso epai na ye” (2 Nefi 26:24).

Natatoli ete nsango malamu mpe Bomikabi ya Yesu Klisto ezali mpo na bato banso. Nasambeli ete boyamba na esengo mapamboli Ye amemaka.

Matangi

  1. Howard W. Hunter, “Nsango Malamu—Kondima ya Mokili Mobimba,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1991, 18.

  2. Tala Howard W. Hunter, “Bato Banso Bazali Lolenge Moko epai ya Nzambe” (Brigham Young University fireside, Feb. 4, 1979), 1–5, speeches.byu.edu.

  3. There Is a Green Hill Far Away,” Hymns, no. 194.

  4. Frederic W. Farrar, Bomoi ya Klisto (1994), 656.

  5. Jeffrey R. Holland, “The Laborers in the Vineyard [Basali na Elanga ya Vinyo],” Liahona, Sanza ya mitano 2012, 33.

  6. Tala Jeffrey R. mpe Patricia T. Holland, “Lobi Oyo Etondisami na Elikya” (worldwide devotional for young adults, Sanza ya yambo 8, 2023), broadcasts.ChurchofJesusChrist.org.