Liahona
Mpo na Bokasi ya Bilenge: Nsango ya Mobikisi mpo na Yo
Sanza ya misato 2024


“Mpo na Bokasi ya Bilenge: Nsango ya Mobikisi mpo na Yo,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya misato 2024.

Etinda ya Mpo ya Bokasi ya Bilenge Sanza ya misato 2024

Mpo na Bokasi ya Bilenge: Nsango ya Mobikisi mpo na Yo

Bokambi oyo esalisaka yo okangisa maponi na yo na Yesu Klisto mpe malongi na Ye.

Elilingi
Yesu Klisto

Natelemi na Ekuke mpe Nazali Kobeta, na J. Kirk Richards

Kanisa ete ozali kofanda na Galilai ya kala, eleki sikoyo mbula 2 000. Yo na baninga na yo bobengisami na molulu ya losambo ya bilenge na sinagoga ya mboka, oyo ekozala na molobi moko ya ntina mingi: Yesu moto ya Nazalete. Mpe na esika moko boye na nsango na Ye, Yesu abengisi bilenge kati na bayoki mpo na kotuna Ye mituna.

Lolenge ya mituna nini okanisi ete okoki koyoka?

Nakanisi ete mituna mosusu ekomonisa mimeseno mpe makambo ya ntango wana. Kasi nandimi solo ete mingi kati na yango ekoyokana mingi lokola mituna oyo tozali na yango lelo.

Ndakisa, Na Kondimana ya Sika, bato batunaki Mobikisi mituna lokola oyo:

  • Nasengeli kosala nini mpo nazwa bomoi ya seko?1

  • Ngai na ndimami? Nazali na esikaya kofanda?2

  • Soki ndeko na ngai asali ngai mabe, mbala boni nasengeli kolimbisa ye?3

  • Nini ekokomela mokili oyo na mikolo ekoya? Nakobatelema?4

  • Okoki kobikisa molingami na ngai?5

  • Bosolo ezali nini?6

  • Ndenge nini nakoyeba soki nazali kokende na nzela ya malamu?7

Biso nyonso tomitunaka likambo moko te ntango na ntango? Na boumeli ya bikeke oyo euti koleka, mituna ebongwanaki mingi te. Mpe mawa ya Mobikisi ezali mpe te epai ya baoyo batuni yango. Ayebi ndenge bomoi ekoki kotungisa mpe kobulunganisa. Ayebi ndenge ezali pete kobungisa nzela na biso. Ayebi ete tomitungisaka ntango mosusu mpo na mikolo mizali koya. Mpe Alobi na yo mpe ngai, kaka lokola alobaki na balandi na Ye ya ntango ya kala:

  • “Tika ete mitema na bino mitungisama te.”8

  • “Nazali nzela [mpe] solo.”9

  • “Bolanda ngai”10

Ntango ozali na maponi ya ntina ya kosala, Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye oyo ezongisama ezali boponi ya malamu koleka. Ntango ozali na mituna, Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye oyo ezongisama ezali eyano ya malamu koleka.

Yango wana nalingaka Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kosala Maponi. Ezali kolakisa biso epai ya Yesu Klisto mpo ete tokoka kozwa makasi na Ye. Nabombaka kopi moko na libenga na ngai ntango nyonso. Lokola nakutanaka na bato na mokili mobimba oyo balingaka koyeba mpo na nini biso, lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto, tosalaka oyo tosalaka, nakabolaka mokambi oyo elongo na bango.

Mpo na Bokasi ya Bilenge eteyaka babosolo ya seko na ntina ya Mobikisi mpe Nzela na Ye. Yango ebengisaka yo kosala maponi oyo evandi na bosolo wana. Mpe ekabolaka mapamboli elakamaki oyo Ye apesaka na baoyo bazali kolanda Ye. Tosengi yo otanga, omanyola, mpe okabola buku oyo!

Bengisa Ye na ndako

Yesu Klisto alingi kozala eteni ya bomoi na yo—kozala ntango nyonso, ya mokolo na mokolo, na ntango ya malamu mpe ya mabe. Atelemi kaka te na nsuka ya nzela, kozelaka yo okanga Ye. Akotambola na yo elongo litambe nyonso ya nzela. Ye azali Nzela!

Kasi Akotinda nzela na Ye na makasi te na bomoi na yo. Obengisaka Ye na ndako, na nzela ya maponi na yo. Na yango, bokambi mpo na kosala maponi, lokola Mpo na Bokasi ya Bilenge, ezali na motuya mingi. Ntango nyonso osali boponi ya sembo oyo evandi na bosolo ya seko ya Mobikisi, olakisi ete olingi Ye na bomoi na yo. Maponi wana efungolaka bikuke ya lola, mpe makasi na Ye eyaka kosopanaka na bomoi na yo.11

Zala na Boyokani Makasi

Okoki komikundola ete Mobikisi akokanisaki baoyo bayokaka mpe basalelaka maloba na ye na moto ya bwanya oyo “atongaki ndako na ye likolo ya libanga.” Alimbolaki:

“Mvula ekitaki, mpe mpela eyaki, mpe mipepe mifulaki, mpe mibeti likolo lya ndako ena; mpe ekweyaki te, mpo etongamaki likolo lya libanga lyoko.”12

Ndako ebikaka na mopepe makasi te mpo ndako ezali makasi. Ebikaka lisusu na mopepe makasi bobele kaka te mpo libanga ezali makasi. Ndako yango ebikaka na mopepe makasi mpamba te ekangami makasi na libanga wana ya makasi. Ezali makasi ya bokangisami na libanga nde ezali na ntina.

Ndenge moko mpe, ntango tozali kotonga bomoi na biso, ezali na ntina mingi kosala maponi ya malamu. Mpe ezali na ntina kososola bosolo ya seko ya Mobikisi. Kasi makasi oyo tokozala na yango mposa mpo na koyika mpiko na mipepe makasi ya bomoi ekoya ntango tokangisi maponi na biso elongo na Yesu Klisto mpe malongi na Ye. Yango wana Mpo na Bokasi ya Bilenge esalisaka biso tosala.

Ndakisa, baninga na yo bakoki koyeba ete olukaka koloba maloba ya kofinga to ya kozokisa te. Bakoki komona yo ozosembola loboko na mwana wana na kelasi oyo bato mingi baboyaka kaka to kutu batumbolaka ye. Kasi bango bayebi ete osalaka maponi oyo mpo ete Yesu Klisto ateyaki ete “bato banso bazali bandeko na yo ya mibali mpe ya basi—sangisa … bato oyo bakeseni na bino”?13

Baninga na yo bakoki koyeba ete okendaka na eklezia mokolo ya eyenga nyonso. Bakoki komona ntango ozali kokanga nzembo moko boye to koboya libyangi moko mpo na kotala filme moko boye. Kasi bayebi ete osalaka maponi oyo mpo ete ozali na “boyokani ya kimoninga ya esengo elongo na Tata na Lola mpe Yesu Klisto,” mpe ete lokola eteni ya bomipesi wana ya kolanda Mobikisi, ozali na botondi “mpo na kozala na Molimo Mosantu lokola moninga na yo ya ntango nyonso ”?14

Bato bakoki koyeba ete omelaka masanga te to omelaka likaya te to osalelaka bankisi mosusu ya mabe te. Kasi bayebi ete osalaka maponi oyo mpo ete Yesu Klisto ateyaki ete “nzoto na yo ezali mosantu,” “likabo ya kokamwa uta na Tata na yo ya Lola,” esalamaki na elilingi na Ye?15

Baninga na yo bakoki koyeba ete okoyiba to okokosa te mpe ozwaka kelasi na liseki te. Kasi bayebi ete ezali bongo mpo Yesu Klisto ateyaki ete “solo ekopesa bino bonsomi”?16

Koleka nyonso, baninga na yo bayebi ete osalaka maponi oyo ntango mosusu oyo bato balingaka te mpo na kotikala sembo na mibeko ya Klisto mpo oyebi ete “Yesu Klisto azali makasi na yo”?17

Azali Makasi na Yo

Napesi bino litatoli na ngai ya solo ete Yesu Klisto azali Nzela ya komema na lobi ya kongenga mpe ya nkembo—lobi na bino. Mpe Ye azali lisusu Nzela ya kongenga mpe ya nkembo ya lelo. Tambola na nzela na Ye, mpe Ye akotambola elongo na yo. Okoki kosala boye!

Baninga na ngai bilenge ya bolingo, Yesu Klisto azali makasi na bino. Koba kotambola elongo na Ye, mpe Ye akosalisa yo opumbwa “na mapapu lokola mpongo”18 kino na esengo ya seko oyo Ye abongisaki mpo na bino.