Liahona
Yakobo mpe Nefi Bamonaki Yesu
Sanza ya misato 2024


“Yakobo mpe Nefi Bamonaki Yesu,” Moninga, Sanza ya misato 2024, 26–27.

Etinda ya sanza Moninga Sanza ya misato 2024

Yakobo mpe Nefi Bamonaki Yesu

Elilingi
maloba mosusu

Biema na Andrew Bosley

Yakobo azalaki leki ya Nefi. Abotamaki nsima libota na bango elongwaki na Yelusaleme. Yakobo ayaki na mokili ya elaka ntango azalaki mwana moke.

Elilingi
maloba mosusu

Yakobo mpe Nefi bango mibale bamonaki Yesu Klisto. Bakabolaki matatoli na bango na mabota na bango mpo na kosalisa bango bayekola na ntina ya Yesu.

Elilingi
maloba mosusu

Bakabolaki mpe maloba ya profeta Yisaya. Yisaya amonaki mpe Yesu mpe akomaki na ntina na Ye na makomi. Yakobo mpe Nefi basalelaki maloba ya Yisaya uta na makomi mpo na koteya mabota na bango na ntina ya Yesu.

Elilingi
maloba mosusu

Bateyaki ete Yesu akoya awa na mabele. Akokaki kokufa mpe kozonga lisusu na bomoi. Bakabolaki litatoli na bango ya Yesu Klisto mpo ete mabota na bango bazela na esengo koya na Ye.

Kopakola Langi na Lokasa

Yesu Azali Mobikisi na Biso.

Elilingi
maloba mosusu awa

Liyemi na Adam Koford

Lolenge nini oyokaka bolingo ya Yesu?