Makomi
1 Nefi 12


Mokapo 12

Nefi amoni o limoni mboka ya elako; bosembo, bobe, mpe bokwei bwa bafandi ba yango; boyei bwa Mwana wa Mpate wa Nzambe o ntei ya bango; boniboni Bayekoli Zomi na Babale mpe Bapostolo Zomi na Babale bakosambisa Yisalaele; ezalela ya bosoto mpe mbindo ya baye bakokulumwa o bozangi bondimi. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete anzelu alobaki epai ya ngai: Tala, mpe mono nkona ya yo, mpe lisusu nkona ya bandeko babali ba yo. Mpe natalaki mpe namonoki mboka ya elako; mpe namonoki ebele ya bato, iyo, kutu lokola ezalaki na motango monene lokola zelo ya mbu.

2 Mpe esalemaki ete namonoki ebele basanganaki elongo mpo ya kobunda, bango na bango; mpe namonoki bitumba, mpe manungunungu ma bitumba, mpe bobomibomi na mopanga o ntei ya bato.

3 Mpe esalemaki ete namonoki nkola mingi ilekaki, nsima ya lolenge la bitumba mpe boweli o mboka; mpe namonoki bingumba mingi, iyo, kutu natangaki byango te.

4 Mpe esalemaki ete namonoki londende la molili likolo lya etando ya mboka ya elako; mpe namonoki minkalali, mpe nayokaki nkake, mpe boningani bwa mabele, mpe ndenge inso ya makelele ma lokito; mpe namonoki mabele mpe mabanga, ete mapasukaki; mpe namonoki ngomba ibukanaki o biteni; mpe namonoki bisobe bya mabele, ete bibolanaki; mpe namonoki bingumba mingi ete bizindaki; mpe namonoki mingi biye bizikaki o moto; mpe namonoki mingi ete bikweyaki o mabele, na ntina ya boningani bwa mango.

5 Mpe esalemaki ete esilisaki ngai komono makambo maye, namonoki mbongi ya molili, ete elekaki mosika uta o etando ya mabele; mpe tala, namonoki ebele baye bakweyaka te na ntina ya bosambisi bonene mpe bwa nsomo bwa Nkolo.

6 Mpe namonoki lola lofungwani, mpe Mwana wa Mpate wa Nzambe kokitaka libanda lya lola, mpe akitaki mpe amilakisaki epai ya bango.

7 Mpe namonoki lisusu mpe napesi litatoli ete Molimo Mosantu akweyaki likolo lya zomi na babale basusu; mpe bakulisamaki na Nzambe, baponomoki.

8 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai kolobaka: Tala bayekoli zomi na babale ba Mwana wa Mpate, baye baponomi mpo ya kosala epai ya nkona ya yo.

9 Mpe alobaki epai ya ngai: Omikundoli bapostolo zomi na babale ba Mwana wa Mpate ? Tala bazali baye bakosambisa mabota zomi na mabale ma Yisalaele; yango wana, basali zomi na babale ba nkona ya yo bakosambisama na bango; mpo bozali baye ndako ya Yisalaele.

10 Mpe basali zomi na babale baye omoni bakosambisa nkona ya yo. Mpe, tala, bazali sembo libela; mpo na ntina ya bondimi bwa bango na Mwana wa Mpate wa Nzambe bilamba bya bango bizalisami mpembe o makila ma ye.

11 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai, boye: Tala! Mpe natalaki, mpe namonoki nkola isato ilekaki o bosembo; mpe bilamba bya bango bizalaki mpembe kutu bo Mwana wa Mpate wa Nzambe. Mpe anzelu alobaki epai ya ngai: Baye bayeisami mpembe o makila ma Mwana wa Mpate, na ntina ya bondimi bwa bango.

12 Mpe ngai, Nefi, namonoki lisusu mingi ya nkola ya inei iye ilekaki o bosembo

13 Mpe esalemaki ete namonoki ebele ya mabele basanganaki elongo.

14 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai: Tala nkona ya yo, mpe lisusu nkona ya bandeko babali ba yo.

15 Mpe esalemaki ete natalaki mpe namonoki bato ba nkona ya ngai basanganaki elongo na ebele o etumba na nkona ya bandeko babali ba ngai; mpe basanganaki elongo mpo ya kobunda.

16 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai, kolobaka: Tala liziba lya mai ma mbindo maye tata wa yo amonoki; iyo, kutu ebale eye alobelaki; mpe bozindo bwa lyango bozali bozindo bwa limfelo.

17 Mpe londende la molili lozali masenginia ma zabulu, maye mazipi miso, mpe mayeisi mitema mya bana ba bato mikasi, mpe makokamba bango mosika o kati ya nzela inene, ete bawa mpe babunga.

18 Mpe ndako enene mpe ya etando, eye tata wa yo amonoki, ezali bililingi mpamba mpe lolendo la bana ba bato. Mpe lobwaku lonene mpe la nsomo lokaboli bango; iyo, kutu liloba lya boyengebene bwa Nzambe wa Seko, mpe Masiya oyo azali Mwana wa Mpate wa Nzambe, ya oyo Molimo Mosantu mopesaki litatoli, uta o ebandeli ya mokili kina o ntango eye, mpe uta o ntango eye banda sikawa mpe libela.

19 Mpe ntango elobaki anzelu maloba maye, natalaki mpe namonoki ete nkona ya bandeko babali ba ngai bawelanaki na nkona ya ngai, engebene na liloba lya anzelu; mpe na ntina ya lolendo la nkona ya ngai, mpe masenginia ma zabulu, namonoki ete nkona ya bandeko babali ba ngai balongaki bato ba nkona ya ngai.

20 Mpe esalemaki ete natalaki, mpe namonoki bato ba nkona ya bandeko babali ba ngai balongaki nkona ya ngai; mpe bakendeki na ebele likolo lya etando ya mboka.

21 Mpe namonoki bango basangana elongo na ebele; mpe namonoki bitumba mpe manungunungu ma bitumba o ntei ya bango; mpe o bitumba mpe manungunungu ma bitumba namonoki nkola mingi ilekaki.

22 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai: Tala baye bakokulumwa o bozangi bondimi.

23 Mpe esalemaki ete namonoki, esilaka bango kokulumwa o bozangi bondimi, bakomaki bato boko bayindo, ba bosoto, mpe ba mbindo, batonda na goigoi mpe ndenge inso ya bonsomo.