Makomi
1 Nefi 4


Mokapo 4

Nefi abomi Labana o etinda ya Nkolo, mpe nde abotoli palaki ya motako na mayele ma angele—Zolami aponi kosangana elongo na libota lya Lehi o esobe. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete nalobaki epai ya bandeko babali ba ngai, kolobaka: Tomata lisusu epai ya Yelusaleme, mpe tozala potongono na kobatelaka mitindo mya Nkolo; mpo tala, ye azali mokasi koleka mabele manso, nde boniboni te mokasi koleka Labana mpe ntuku mitano ya ye, iyo, to kutu koleka nkoto zomi ya ye?

2 Yango wana tomata; tozala bakasi bo Mose; mpo solo ye alobaki epai ya mai ma Mbu Etane, mpe mango makabwanaki ngambo na ngambo, mpe batata ba biso bakatisaki, libanda lya bokangemi, likolo lya mabele makauka, mpe mampinga ma Falo malandaki mpe mazindaki o mai ma Mbu Etane.

3 Sikawa tala boyebi ete eye ezali ya solo; mpe boyebi lisusu ete anzelu alobaki epai ya bino; yango wana bokoki kotia ntembe? Tomata; Nkolo akoki kobikisa biso, kutu lokola batata ba biso, mpe kobebisa Labana, kutu lokola Baejipito.

4 Sikawa elobaki ngai maloba maye, badasukaki naino, mpe bazalaki naino kokoba koyimayima; nzokande balandaki ngai kina tokomaki o libanda lya bifelo bya Yelusaleme.

5 Mpe yango ezalaki o butu; mpe nasalaki ete bamibomba o libanda lya bifelo. Mpe esilaki bango komibomba, ngai, Nefi, nayingelaki na bonkutu o kati ya engumba, mpe nabelemeki ona ndako ya Labana.

6 Mpe nakambemaki na Molimo, emiyebelaka ngai yambo te makambo maye nasengelaki kosala.

7 Nzokande nabelemeki, mpe lokola ekomaki ngai penepene na ndako ya Labana, namonoki moto moko, mpe akweiyaki o mabele liboso lya ngai, mpo alangwisamaki na vino.

8 Mpe ekomaki ngai epai ya ye, namonoki ete ezalaki Labana.

9 Mpe namonoki mopanga mwa ye, mpe nabendaki mwango uta o lokoto la mwango; mpe esimbele ya mwango ezalaki ya wolo ya peto, mpe esaleli ya mwango ezalaki malonga mpenza, mpe namonoki ete mbeli ya mwango ezalaki ya ebende ya motuya mingi koleka.

10 Mpe esalemaki ete nasengisamaki na Molimo ete naboma Labana; kasi namilobelaki na motema mwa ngai: Naino ata o ntango yoko te nasopa makila ma moto. Mpe nazongaki nsima, mpe nalingaki ete nakoka koboma ye te.

11 Mpe Molimo alobaki epai ya ngai lisusu: Tala Nkolo atiki ye o kati ya maboko ma yo. Iyo, mpe lisusu nayebaki ete alukaka kolongola bomoi bwa ngai; iyo, mpe aboyaki koyokemela epai ya mitindo mya Nkolo; mpe akamataka lisusu bozwi bwa biso.

12 Mpe esalemaki ete Molimo alobaki epai ya ngai lisusu: Boma ye, mpo Nkolo atiki ye o kati ya maboko ma yo;

13 Tala Nkolo akobomaka moto wa nkuna mpo ya komeme o boso miango mya ye mya bosembo. Eleki bolamu ete moto moko awa esika ete ekolo mobimba ekulumwa mpe ewa o bozangi bondimi.

14 Mpe sikawa, eyokaki ngai, Nefi, maloba maye, namikundolaki maloba ma Nkolo, maye alobaki epai ya ngai o esobe, kolobaka ete: Mbala nzike lokola ekobatela nkona ya yo mitindo mya ngai, bakozwa bomengo o mboka ya elako.

15 Iyo, mpe nakanisaki lisusu ete bakokaki kobatela mitindo mya Nkolo te, engebene na mobeko mwa Mose, longola se soko bakozala na mobeko.

16 Mpe nayebaki lisusu ete mobeko mokomamaki likolo lya palaki ya motako.

17 Mpe lisusu, nayebaki ete Nkolo atikaki Labana o kati ya maboko ma ngai mpo ya ntina eye—ete nakoka kozwa makundoli engebene na mitindo mya ye.

18 Yango wana natosaki mongongo mwa Molimo, mpe nakamataki Labana o nsuki ya moto, mpe nakataki moto mwa ye na mopanga mwa yemei.

19 Mpe esilisaki ngai kokata moto mwa ye na mopanga mwa yemei, nakamataki bilamba bya Labana, mpe nalataki byango likolo lya nzoto ya ngaimei; iyo, kutu eteni na eteni; mpe nazingaki bibundele bya ye o nketo ya ngai.

20 Mpe esilisaki ngai kosala eye, nabelemeki epai ya ebombelo ya bomengo bwa Labana. Mpe lokola ebelemeki ngai ona ebombelo ya bomengo bwa Labana, tala, namonoki mosali wa Labana oyo azalaki na bafungola ya ebombelo ya bomengo. Mpe natindaki ye, na mongongo mwa Labana, ete akota elongo na ngai o kati ya ebombelo ya bomengo.

21 Mpe abanzaki ete ngai nazalaki nkolo wa ye, Labana, mpo atalaki bilamba, mpe lisusu mopanga ezingaki nketo ya ngai.

22 Mpe alobaki epai ya ngai etali bankulutu ba Bayuda, eyebaki ye ete nkolo wa ye Labana, azalaki libanda, o butu o ntei ya bango.

23 Mpe nalobaki epai ya ye lokola soko ezalaki Labana.

24 Mpe lisusu nalobaki epai ya ye ete nakomeme minkoma, miye mizali likolo lya palaki ya motako, epai ya bandeko babali ba nkulutu ba ngai, baye bazalaki o libanda lya bifelo.

25 Mpe lisusu natindaki ye ete alanda ngai.

26 Mpe, ekanisaki ye ete nazalaki koloba etali bandeko ba eklezia, mpe ete nazalaki solo Labana oyo nabomaka, yango wana alandaki ngai.

27 Mpe alobaki epai ya ngai mbala mingi etali bankulutu ba Bayuda, lokola ekendeki ngai epai ya bandeko babali ba ngai, baye bazalaki o libanda lya bifelo.

28 Mpe esalemaki ete ntango Lamani amonoki ngai abangaki mpenza, mpe Lemuele mpe Sami lokola. Mpe bakimaki mosika o liboso lya miso mya ngai; mpo babanzaki ezalaki Labana, mpe ete abomaki ngai, mpe alukaki kolongola bomoi bwa bango lokola.

29 Mpe esalemaki ete nabiangaki bango, mpe bayokaki ngai; yango wana batikaki kokima mosika o miso mya ngai.

30 Mpe esalemaki ete emonoki mosali wa Labana bandeko babali ba ngai abandaki kolenge, mpe azalaki penepene na kokima mosika o liboso lya ngai mpe kozonga o engumba ya Yelusaleme.

31 Kasi ngai, Nefi, ezalaki ngai moto moko molai o nzoto, mpe ezwa ngai makasi maike epai ya Nkolo, yango wana natiaki maboko likolo lya mosali wa Labana, mpe nakangaki ye, ete akima te.

32 Mpe esalemaki ete nasololaki elongo na ye, ete soko akoyokemela epai ya maloba ma ngai, lokola Nkolo azali na bomoi, mpe lokola nazali na bomoi, kutu boye ete soko akoyokemela epai ya maloba ma biso, tokobikisa bomoi bwa ye.

33 Mpe nalobaki epai ya ye, kutu na ndai yoko, ete azali te na ntina ya kobanga; ete akozala nsomi bo biso, soko akokende o esobe elongo na biso.

34 Mpe nalobaki lisusu epai ya ye, kolobaka: solo Nkolo atindaki biso mpo ya kosala likambo liye; mpe tokozala na etingia te na kobatelaka mitindo mya Nkolo? Yango wana, soko okokita o kati ya esobe epai ya tata wa ngai, okozwa esika elongo na biso.

35 Mpe esalemaki ete Zolami azwaki mpiko o maloba maye nalobaki. Sikawa, Zolami ezalaki nkombo ya mosali ona; mpe alakaki ete akokita o kati ya esobe epai ya tata wa biso. Iyo, mpe alapaki lisusu ndai yoko epai ya biso ete akofanda elongo na biso uta o ntango ena.

36 Nzokande, tozalaki na mposa ete afanda elongo na biso mpo ya ntina eye, ete Bayuda bakoka koyeba te etali bokimi bwa biso o kati ya esobe, mbele balanda biso mpe baboma biso.

37 Mpe esalemaki ete elapaki Zolami ndai yoko epai ya biso, bobangi bwa biso bosilaki etali ye.

38 Mpe esalemaki ete tokamataki palaki ya motako, mpe mosali wa Labana, mpe tokendeki o kati ya esobe, mpe tosalaki mobembo epai ya ema ya tata wa biso.