Makomi
1 Nefi 21


Mokapo 21

Masiya akozala mwinda mpo ya Bapaganu mpe akobikisa bakangemi—Yisalaele ekosangana na nguya o mikolo mya nsuka—Bakonzi bakozala batata babokoli ba bango—Mekisani Yisaya 49. Penepene na 588–570 Yambo ya Klisto.

1 Mpe lisusu: Yokemelani, O ndako ya Yisalaele, banso bino baye bobukami mpenza mpe bobenganami libanda na ntina ya nkuna ya bakengeli ba bato ba ngai; iyo, banso bino baye bobukami mpenza, baye bopalanganisami libanda, baye bozali ba bato ba ngai, O ndako ya Yisalaele. Tiani matoyi, O bisanga, epai ya ngai, yokemelani bino bato uta o mosika; Nkolo abiangaki ngai uta o libumu; uta o nsopo ya mama wa ngai atangaki nkombo ya ngai.

2 Mpe asalaki monoko mwa ngai bo mopanga moko mopotu; o elilingi ya engindi ya ye abombaki ngai, mpe asalaki ngai likula lyoko lya nsonge; o libenga lya ye lya bokila abombaki ngai.

3 Mpe alobaki epai ya ngai: Ozali wa ngai mosali, O Yisalaele, na oyo nakokembelama.

4 Nde nalobaki, nasalaki mosala na mpamba, nabebisaki makasi ma ngai botambano mpe na mpamba; solo bosambisi bwa ngai bozali elongo na Nkolo, mpe mosala mwa ngai elongo na Nzambe wa ngai.

5 Mpe sikawa, elobi Nkolo—ete akelaki ngai uta o libumu ete nazala mosali wa ye, mpo ya komeme lisusu Yakobo epai ya ye—ata Yisalaele esangani te, kasi nakozala na nkembo o miso mya Nkolo, mpe Nzambe wa ngai akozala makasi ma ngai.

6 Mpe alobaki: Ezali eloko eke ete ozala mosali wa ngai mpo ya kotelemisa mabota ma Yakobo, mpe kozongisa babatelami ba Yisalaele. Nakopesa yo lisusu bo mwinda moko na Bapaganu, ete okoka kozala lobiko la ngai epai ya nsuka ya mabele.

7 Boye elobi Nkolo, Mosikoli wa Yisalaele, Mosantu Moko wa ye, na ye oyo bato bakotiola, na ye oyo bikolo bikoboya, na mosali wa bayangeli: Bakonzi bakomono mpe bakoteleme, bana ba bakonzi lisusu bakokumbama, na ntina ya Nkolo oyo azali potongono.

8 Boye elobi Nkolo: O ntango yoko endimama nayokaki yo, O bisanga bya mbu, mpe o mokolo mwa lobiko nasungaki yo; mpe nakobatela yo, mpe nakopesa yo mosali wa ngai mpo ya boyokani boko bwa bato, mpo ya kotia mabele, mpo ya kosala mpo ya kosangola lisango lya mpamba;

9 Ete okoka koloba na bakangemi: Kendani; o baye bafandi o molili: Bomilakisa. Bakolia o nzela, mpe bilanga bya bango bya bilei bikozala bisika binso bya likolo.

10 Bakoyoka nzala te mpe mposa ya mai te, mpe molunge te mpe moi mokobete bango te; mpo ye oyo ayokaki ngolu likolo lya bango akokamba bango, kutu mpembeni ya biliba bya mai akokamba bango.

11 Mpe nakosala ngomba ya ngai inso nzela yoko, mpe balabala ya ngai ikonetolama.

12 Mpe nde, O ndako ya Yisalaele, tala, baye bakoya uta o mosika; mpe tala, baye uta o nordi mpe uta o westi; mpe baye uta o mboka ya Sinimi.

13 Yemba, O lola; mpe zala na bosepeli, O mabele; mpo makolo ma bango baye bazali o esti makotiama; mpe makobukana na koyembaka, O ngomba; mpo bakobeteme lisusu te; mpo Nkolo abondisaki bato ba ye, mpe akoyoka ngolu likolo lya batungisami ba ye.

14 Kasi, tala, Siona alobaki: Nkolo asundoli ngai, mpe Nkolo wa ngai abosani ngai—kasi akolakisa ete te.

15 Mpo ekoki mwasi kobosana wa ye mwana ameleke, ete ayoka ngolu te likolo lya mwana mobali wa libumu lya ye? Iyo, bakoki kobosana, kasi nakobosana yo te, O ndako ya Yisalaele.

16 Tala, nakati yo likolo lya biengindi bya maboko ma ngai; bifelo bya yo bizali ntango inso liboso lya ngai.

17 Bana ba yo bakosala mbangu na babebisi ba yo; mpe bango baye bakosala yo mobulu bakokende mosika na yo.

18 Tombola miso mya yo zingazinga mpembeni mpe tala; banso baye bamisangisi elongo, mpe bakoya na yo. Mpe lokola nazali na bomoi, elobi Nkolo, solo okolata bango banso, lokola likembi, mpe okokanga bango kutu lokola mwasi abandemi o libala.

19 Mpo bisika bya yo bibomabomama mpe bya mpamba, mpe mboka ya bobebisami bwa yo, ikozala kutu sikawa ya nkaka mingi koleka na ntina ya bafandi; mpe bango baye baminaki yo bakozala mosika mpenza.

20 Bana baye okozwa, esili yo kobungisa ya yambo, bakoloba lisusu o matoyi ma yo: Esika eleki eke mpo ya ngai; pesa ngai esika ete nakoka kofanda.

21 Nde okoloba o motema mwa yo: Nani aboteli ngai baye, komonoko nabungisaki bana ba ngai, mpe nazali mpamba, mokangemi moko, mpe nalongolama epai na epai? Mpe nani abokolaki baye? Tala, natikalaki ngai moko; baye, wapi bazalaki?

22 Boye elobi Nkolo Nzambe: Tala, nakotombola engindi na ngai na Bapaganu, mpe nakotia bendele ya ngai na bato; mpe bakomeme bana babali ba yo o maboko ma bango, mpe bana basi ba yo bakokumbana o mapeka ma bango.

23 Mpe bakonzi bakozala batata babokoli ba yo, mpe basi ba bakonzi ba bango bamama babokoli ba yo; bakogumbama na yo na bilongi bya bango ona mabele, mpe bakolembola mputulu ya makolo ma yo; mpe okoyeba ete nazali Nkolo; mpo bakoyoka nsoni te baye bakozela ngai.

24 Mpo bakobotolo niama bakangi uta na mokasi, to bakobikisa bokangemi ba mibeko?

25 Kasi boye elobi Nkolo, kutu bakangemi ba mokasi bakolongolama, mpe niama bakangi na moto wa nsomo akobikisama; mpo nakowela na oyo akowela na yo, mpe nakobikisa bana ba yo.

26 Mpe nakoleisa bango baye bakoniokolo yo na mosuni mwa bangomei; bakolangwisama na makila ma bangomei lokola vino ya sukali; mpe mosuni monso mokoyeba ete ngai, Nkolo, nazali, Mobikisi wa yo mpe Mosikoli wa yo, Mokasi Moko wa Yakobo.