Makomi
2 Nefi 8


Mokapo 8

Na mikolo mya nsuka, Nkolo akobondisa Siona mpe akosangisa Yisalaele—Basikolami bakoya o Siona o kati ya bosepeli bonene—Mekisani Yisaya 51 mpe 52:1–2. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Yokemelani epai ya ngai, bino baye bakolanda nsima ya bosembo. Talani epai ya libanga uta wapi bopasolamaki, mpe o lidusu lya libulu uta wapi botimolamaki.

2 Talani epai ya Abalayama tata wa bino, mpe epai ya Salai, oyo abotaki bino; mpo nabiangaki ye moko, mpe napambolaki ye.

3 Mpo Nkolo abondisi Siona, akobondisa bisika binso bibeba bya ye; mpe akokomisa esobe ya ye bo Edene, mpe eliki ya ye bo elanga ya Nkolo. Bosepeli mpe nsai ekozwama kuna, botondi mpe mongongo mwa nzembo.

4 Yokemelani epai ya ngai, bato ba ngai; mpe pesani litoyi epai ya ngai, O ekolo ya ngai; mpo mobeko moko mokobima uta na ngai, mpe nakosala bosambisi bwa ngai bofanda bo mwinda moko mpo ya bato.

5 Bosembo bwa ngai bozali penepene; lobiko la ngai lokotambola, mpe loboko la ngai lokosambisa bato. Bisanga bya mai bikozela likolo lya ngai, mpe likolo lya loboko la ngai bakondima.

6 Tombolani miso mya bino o lola, mpe talani mabele o nse; mpo lola lokolimwa bo molinga, mpe mabele makokoma ya kala bo elamba yoko; mpe baye bafandi o mango bakokufa o lolenge lona kaka. Kasi lobiko la ngai lokozala libela, mpe bosembo bwa ngai bokosila te.

7 Yokemelani epai ya ngai, bino baye boyebi bosembo, bato na o ya bango mitema nakomaki mobeko mwa ngai, bangani mpamela ya bato te, mpe bangani matio ma bango te.

8 Mpo mpomboli ekolia bango nie bo elamba yoko, mpe mpambo ekolia bango bo nkunza ya mpate. Kasi bosembo bwa ngai bokozala libela, mpe lobiko la ngai uta nkola o nkola.

9 Lamuka, lamuka! Lata makasi, O loboko la Nkolo; Lamuka lokola o mikolo mya kala. Ezali yo te oyo akataki Laba, mpe azokisaki dalagona?

10 Ezali yo te oyo akaukisaki mai ma mbu, mai ma mozindo monene; oyo akomisaki bozindo bwa mai nzela mpo ya basikolami baleka likolo?

11 Yango wana, basikolami ba Nkolo bakozonga, mpe bakoya na koyembaka epai ya Siona; mpe bosepeli mpe bosantu bwa libela bokozala likola lya mito mya bango; mpe bakozwa nsai mpe bosepeli; mpe mawa mpe eleli ekokima mosika.

12 Nazali ye; iyo, nazali ye oyo akobondisa yo. Tala, nani ozali, ete ozala na bobangi bwa moto, oyo akokufa, mpe ya mwana wa moto, oyo azali bo matiti?

13 Mpe obosana Nkolo mozalisi wa yo, oyo atandolaki lola, mpe atongaki nse ya mabele, mpe obangaki ntango inso mokolo na mokolo, na ntina ya nkanda ebe ya mokakemi, lokola soko azalaki penepene na kobebisa? Mpe wapi nkanda ebe ya mokakemi?

14 Mokangemi o mboka mompaya akowelisa, ete akoka kokangolama, mpe ete akufa te o libulu, to ete limpa lya ye lizanga te.

15 Kasi nazali Nkolo Nzambe wa yo, ya ye mbonge ekoganga; Nkolo wa Bibele ezali nkombo ya ngai.

16 Mpe natii maloba ma ngai o monoko mwa yo, mpe nazipi yo o elilingi ya loboko la ngai, ete nakoka kokona lola mpe kotonga nse ya mabele, mpe koloba epai ya Siona: Tala, bozali bato ba ngai.

17 Lamuka, lamuka, teleme, O Yelusaleme, oyo ameli o loboko la Nkolo nkeni ya nkanda ebe ya ye—omelaki kina o mampoto ma nkeni masalaki yo kolengaka—

18 Mpe moko te mpo ya kokamba ye o ntei ya bana babali banso baye abota; mpe ete akamata ye te na loboko, na bana babali banso akolisa.

19 Bana babali baye babale bayaki epai ya yo, nani akoyoka mawa mpo ya yo—bobukani mpe bobebisami, mpe nzala mpe mopanga mwa yo—mpe na nani nakobondisa yo?

20 Bana babali ba yo bakwei, longola se baye babale; balali o moto mwa balabala inso; lokola ngombe ya mobali o moniama moko, batondi na nkanda ebe ya Nkolo, mpamela ya Nzambe wa yo.

21 Yango wana yoka sikawa eye, yo otungisama, mpe olangwisama, kasi na vino te:

22 Boye elobi Nkolo wa yo, Nkolo mpe Nzambe wa yo akosamba likambo lya bato ba ye; tala, nalongoli o loboko la yo nkeni ya bolengisi, mampoto ma nkeni ya nkanda ebe ya ngai; okomele yango lisusu te.

23 Kasi nakotia yango o loboko la bango baye batungisi yo; baye balobi na bozo bwa yo: Gumbama o nse, ete tokoka koleka likolo—mpe olalisaki nzoto ya yo lokola mabele mpe lokola nzela mpo ya bango ete balekaki likolo.

24 Lamuka, lamuka, lata makasi ma yo, O Siona; lata bilamba kitoko bya yo, O Yelusaleme, mboka esantu; uta sikawa ekozala moko lisusu te akoya o kati ya yo mosutu mpe wa mbindo.

25 Ominingisa uta o mputulu; tombwana, fanda, O Yelusaleme; omikangola uta o nkanga ya nkingo ya yo, o mwana mwasi mokangemi wa Siona.