2010
Mokambi mpo na Kosalisa Biso Tokoma Ndako
sánzá ya libwa 2010


Bana

Mokambi mpo na Kosalisa Biso Tokoma Ndako

Lolenge nini olingaki koyoka soki obungaki mpe oyebaki te nzela ya kozonga ndako na libota na yo? Okokaki kozala na esengo ya kolanda moto moko oyo akokaki kolakisa yo nzela? Mokambi Eyring alobi Buku ya Molomoni ezali lokola mokambi oyo azali kosalisa biso kozonga ndako epai ya Tata na Likolo.

Awa na se ezali na makambo maye Buku ya Molomoni ezali koyebisa ete tosengeli kosala mpo tozonga na ndako. Tanga 2 Nefi 31:10, 11, 20. O nse ya maloba moko moko awa na nse, koma molongo ya kotanga oyo elongobani uta na Buku ya Molomoni. Okozala na mposa ya kosalela moko ya milongo miye mbala mibale.

Bobongola mitema na bino mpe bobatisama.

Zala na elikya ya bongengi.

Linga Nzambe mpe bato banso.

Landa Yesu.